Makomi
Mosiya 1


Buku ya Mosiya

Mokapo 1

Mokonzi Benyamina ateyi bana mibali na ye lokota mpe masakoli ya batata na bango—Eyamba mpe bompenza na bango bobatelamaki na ntina ya masolo ya makomi oyo ebombamaki likolo ya bapalaki ya ndenge na ndenge—Mosiya aponami lokola mokonzi mpe apesami mokumba ya kobatela masolo ya makomi mpe biloko misusu. Penepene na mibu 130–124 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa ezalaki lisusu te na boswani na mboka mobimba ya Zalayemila, na kati ya bato nyonso oyo bazalaki ya mokonzi Benyamina, boye ete mokonzi Benyamina azalaki kaka na kimia na ntango nyonso oyo etikalaki mikolo na ye.

2 Mpe esalemaki ete azalaki na bana mibali Misato; mpe abiangaki nkombo na bango Mosiya, Elolumi, mpe Elamani. Mpe asalaki ete bateyama na lokota nyonso ya batata na ye, ete na nzela wana bakoka kokoma bato ya bososoli; mpe ete bakoka koyeba mpo na oyo etali masakoli oyo elobamaki na minoko ya batata na bango, oyo epesamaki bango na loboko ya Nkolo.

3 Mpe ateyaki lisusu bango mpo na oyo etali masakoli oyo ekomamaki likolo ya bapalaki ya motako, kolobaka: Bana mibali na ngai, nalingi bomikundola ete soki ezalaka bapalaki oyo te, oyo ezali na masolo ya makomi mpe mitindo oyo, tosengelaki koyoka mpasi kati na bozangi koyeba, kutu na ntango ya lelo, koyebaka te mibombamo ya Nzambe.

4 Mpo ekokaki te kosalema ete tata na biso, Lehi, akoka komikundola lisusu makambo oyo nyonso, mpo na kolakisa yango na bana na ye, longola se soki ezalaki na lisalisi ya bapalaki oyo; mpo lokola bateyaki ye na lokota ya Baejipito boye akokaki kotanga minkoma oyo ezalaki likolo, mpe kolakisa yango na bana na ye, ete boye bakokaki kolakisa yango na bana na bango, mpe bongo kokokisaka mitindo ya Nzambe, kutu kino na ntango ya lelo.

5 Nazali koloba epayi na bino, bana mibali na ngai, soki ezalaka te mpo na biloko oyo, oyo ebombamaki mpe ebatelamaki na loboko ya Nzambe, ete tokoka kotanga mpe kososola mibombamo na ye, mpe kozala na mitindo na ye ntango nyonso liboso ya miso na biso, ete kutu batata na biso balingaki moke moke kobebisama na bozangi boyambi, mpe tolingaki kozala lokola bandeko na biso, Balamani, baoyo bayebi eloko moko te mpo na oyo etali makambo oyo, soki te kutu bazali kondima yango te ntango balakisami yango, na ntina ya mimesano ya batata na bango, oyo elongobani te.

6 O bana mibali na ngai, nalingi bomikundola ete maloba oyo ezali solo, mpe lisusu ete masolo ya makomi oyo ezali solo. Mpe tala, lisusu bapalaki ya Nefi, oyo ezali na masolo ya makomi mpe maloba ya batata na biso uta na ntango batikaki Yelusaleme kino sikawa, mpe ezali solo; mpe tokoki koyeba bosolo na yango mpo tozali na yango liboso ya miso na biso.

7 Mpe sikawa, bana mibali na ngai, nalingi ete bomikundola koluka yango na molende, ete bokoka kozwa litomba na yango; mpe nalingi ete bobatela mitindo ya Nzambe, ete bokoka kofuluka na mboka yango engebene na bilako oyo Nkolo asalaki epayi ya batata na biso.

8 Mpe mokonzi Benyamina ateyaki bana mibali na ye makambo mingi mosusu, oyo ekomami na buku oyo te.

9 Mpe esalemaki ete esilaki mokonzi Benyamina kotia nsuka na koteyaka bana mibali na ye, ete akomaki mobange, mpe amonaki ete asengelaki kala mingi te kokende nzela ya mabele nyonso; boye, akanisaki ete elongobanaki ete apesa bokonzi epayi ya moko ya bana mibali na ye.

10 Boye, bamemaki Mosiya liboso na ye; mpe oyo ezali maloba oyo alobaki epayi na ye, kolobaka: Mwana mobali na ngai, nalingi ete osala liyebisi moko epayi na epayi na mboka oyo mobimba na kati ya bato nyonso oyo, to bato ya Zalayemila, mpe bato ya Mosiya baoyo bafandi na mboka, ete na nzela wana bakoka kosangana esika moko; mpo, na mokolo ya nsima nakoyebisa epayi ya bato oyo na ngai na monoko na ngai moko ete ozali mokonzi mpe moyangeli likolo ya bato baye, oyo Nkolo Nzambe na biso apesaki biso.

11 Mpe lisusu, nakopesa bato oyo nkombo, ete na yango bakoka kokesenisama likolo ya bato nyonso oyo Nkolo Nzambe amemaki uta na mboka ya Yelusaleme; mpe oyo nakosala mpo bazalaki bato ya molende na kobatelaka mitindo ya Nkolo.

12 Mpe nakopesa epayi na bango nkombo oyo ekolongolama soki moke te, longola se soki ezali na nzela ya bobuki mobeko.

13 Iyo, mpe lisusu nalobi epayi na yo, ete soki bato oyo basungami mpenza na Nkolo bakwei kati na bobuki mobeko, mpe bakomi bato ya nkuna mpe bato ya ekobo, ete Nkolo akosundola bango, ete na yango bakoma bato ya bolembu lokola bandeko na bango; mpe akobatela bango lisusu te na nguya na ye ezanga emekiseli mpe ya kokamwa, lokola abatelaki kino sikawa batata na biso.

14 Mpo nakoloba epayi na yo, ete soki atandolaki te loboko na ye na kobatelaka batata na biso basengelaki kokweya kati na maboko ya Balamani, mpe kokoma bato oyo bazwi likama ya boyini na bango.

15 Mpe esalemaki ete esilaki mokonzi Benyamina kotia nsuka na maloba oyo na mwana mobali na ye, ete apesaki ye mokumba mpo na oyo etali makambo nyonso ya bokonzi.

16 Mpe lisusu, apesaki ye mokumba mpo na oyo etali masolo ya makomi oyo ekomamaki likolo ya bapalaki ya motako; mpe lisusu bapalaki ya Nefi; mpe lisusu, mompanga ya Labana, mpe libungutulu to mokambi, oyo ekambaki batata na biso na nzela ya esobe, oyo elengelamaki na loboko ya Nkolo ete na yango bakokaki kokambama, moko na moko engebene na bokebi mpe molende oyo bapesaki epayi na ye.

17 Boye, lokola bazangaki bondimi bafulukaki te to bakendaki liboso mpe te na mobembo na bango, kasi bazongisamaki nsima, mpe bamilukelaki nkanda ya Nzambe likolo na bango; mpe boye babetamaki na nzala mpe mitungisi ya nsomo, mpo na kolamusa bango na bokundoli ya mosala na bango.

18 Mpe sikawa, esalemaki ete Mosiya akendaki mpe asalaki lokola tata na ye atindaki ye, mpe asakolaki epayi ya bato nyonso oyo bazalaki na mboka ya Zalayemila ete na yango bakokaki kosangana bango moko esika moko; mpo na kokende na tempelo koyoka maloba oyo tata na ye akolobela bango.

Bimisa na lokasa