Makomi
3 Nefi 20


Mokapo 20

Yesu apesi limpa mpe vino na likamwisi mpe apesi elambo epai ya bato—Montika mwa Yakobo mokoya o boyebi bwa Nkolo Nzambe wa bango, mpe bakosangola Baamerika—Yesu azali profeta lokola Mose, mpe Banefi bazali bana ba baprofeta—Bato basusu ba Nkolo, bakosangana o Yelusaleme. Penepene na 34 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe esalemaki ete atindaki ebele ete batika kosambela, mpe lisusu bayekoli ba ye. Mpe atindaki bango lisusu ete batika te kosambela o mitema mya bango.

2 Mpe atindaki bango ete batombwana mpe bateleme likolo lya makolo ma bango. Mpe batombwanaki mpe batelemeki likolo lya makolo ma bango.

3 Mpe esalemaki ete abukaki lisusu limpa mpe apambolaki lyango, mpe apesaki na bayekoli mpo ya kolia.

4 Mpe eliaka bango atindaki bango ete babuka limpa, mpe bapesa epai ya ebele.

5 Mpe epesaka bango epai ya ebele apesaki lisusu vino mpo ya komele, mpe atindaki bango ete bapesa epai ya ebele.

6 Sikawa, emememeke limpa te, mpe vino te, na bayekoli te, mpe na ebele te.

7 Kasi solo apesaki epai ya bango limpa mpo ya kolia, lisusu vino mpo ya komele.

8 Mpe alobaki epai ya bango: Ye oyo alei limpa eye alei nzoto ya ngai mpo ya bozo bwa ye; mpe ye oyo ameli vino eye ameli makila ma ngai mpo ya bozo bwa ye; mpe bozo bwa ye bokoyoka mokolo moko te nzala mpe mposa ya mai, kasi bokotondisama.

9 Sikawa, eliaka mpe emeleke ebele, tala, batondisamaki na Molimo; mpe bagangaki na mongongo moko, mpe bapesaki nkembo na Yesu, oyo bamonoki mpe bayokaki.

10 Mpe esalemaki ete epesaka bango nkembo epai ya Yesu, alobaki epai ya bango: Sikawa nasilisi motindo moye Tata apesaki ngai motali bato baye, baye bazali montika moko mwa ndako ya Yisalaele.

11 Bomikundola ete nalobaki epai ya bino, mpe nalobaki ete ekokokisama maloba ma Yisaya—tala makomami, bozali na mango liboso lya bino, yango wana lukani mango.

12 Mpe solo, solo nalobi epai ya bino, ete ekokokisama mango nde ezali bokokisami bwa boyokani boye Tata asalaki epai ya bato ba ye, O ndako ya Yisalaele.

13 Mpe nde, mintika, miye mikopalanganisama libanda likolo lya etando ya mabele, mikosangisama, uta o esti, mpe uta o westi, mpe uta o sudi, mpe uta o nordi; mpe bakomememe o boyebi bwa Nkolo Nzambe wa bango, oyo asikoli bango.

14 Mpe Tata atindi ngai ete napesa epai ya bino mboka eye, mpo ya lisango lya bino.

15 Mpe nalobi epai ya bino, ete soko Bapaganu bayamboli te nsima ya lipamboli liye bakozwa, esilisi bango kopalanganisa bato ba ngai—

16 Nde bino, baye bazali montika moko mwa ndako ya Yakobo, bokokende o katikati ya bango mpe bokozala o ntei ya bango baye bakozala mingi, mpe bokozala o ntei ya bango lokola nkosi moko o ntei ya niama ya zamba, mpe lokola mwana wa nkosi o ntei ya bitonga bya mpate, oyo soko akei o kati ya bango, aniati o nse, mpe apasoli na biteni, mpe moto te akoki kobikisa.

17 Loboko la yo lokotombolama likolo lya banguna ba yo mpe bayini banso ba yo bakokatama mosika.

18 Mpe nakosangisa bato ba ngai elongo lokola moto asangisi maboke ma ye o kati ya motalaka.

19 Mpo nakosala bato ba ngai, elongo na baye Tata asali boyokani, iyo, nakosala maseke ma yo ebende, mpe nakosala biengindi bya yo motako. Mpe bokotuta na biteni bato mingi; mpe nakobulisa matabisi ma bango epai ya Nkolo, mpe biloko bya bango epai ya Nkolo wa mabele mobimba. Mpe tala, nazali ye oyo nasali yango.

20 Mpe ekosalema, elobi Tata, ete mopanga mwa boyengebene bwa ngai mokodiembela likolo lya bango o mokolo mona; longola se soko bayamboli, ekokweya likolo lya bango, elobi Tata, iyo, likolo lya bikolo binso bya Bapaganu.

21 Mpe ekosalema ete nakotia bato ba ngai, O ndako ya Yisalaele.

22 Tala, bato baye nakotia o mboka eye, mpo ya kokokisa boyokani boye nasalaki elongo na Tata wa bino Yakobo; mpe ekozala Yelusaleme yoko ya Sika. Mpe nguya ya lola ikozala o katikati ya bato baye, iyo, kutu nakozala o ntei ya bino.

23 Tala, nazali ye oyo Mose alobelaki, kolobaka: Profeta moko ekotelemisa Nkolo Nzambe wa bino epai ya bandeko ba bino, lokola ngai; ye bokoyokela o makambo manso akoloba epai ya bino. Mpe ekosalema ete moto na moto oyo akoyokela te profeta ona akokatama mosika uta o ntei ya bato.

24 Solo, nalobi epai ya bino, iyo, baprofeta banso uta na Samwele, mpe bango banso balandi nsima, mingi lokola balobaki, mpe batatolaki ngai.

25 Mpe tala, bozali bana ba baprofeta; mpe bozali ba ndako ya Yisalaele; bozali ba boyokani boye tata asalaki elongo na batata ba bino, kolobaka epai ya Abalayama: Mpe na nkona ya yo mabota manso ma mabele makopambolama.

26 Tata kotelemisaka ngai epai ya bino yambo, mpe atindaki ngai mpo ya kopambola bino na kobalulaka moko na moko wa bino uta o mabe ma bino, mpe eye zambi bozali bana ba boyokani—

27 Mpe nsima ete bopambolami, nde ekokokisa Tata boyokani boye asalaki elongo na Abalayama, kolobaka: Na nkona ya yo ekopambolama mabota manso ma mabele—mpo ya bosopi Molimo Mosantu na nzela ya ngai likolo lya Bapaganu, lipamboli liye likolo lya Bapaganu likokomisa bango bakasi likolo lya banso, mpo ya bopalangani bwa bato ba ngai, O ndako ya Yisalaele.

28 Mpe bakozala fimbo yoko epai ya bato ba mboka eye. Nzokande, ekozwa bango litondi lya nsango elamu ya ngai, nde soko bakoyeisa mitema mya bango mikasi na ngai, nakozongisa mabe ma bango likolo lya mito mya bangomei, elobi Tata.

29 Mpe nakomikundola boyokani boye nasalaki elongo na bato ba ngai; mpe nayokanaki elongo na bango ete nakosangisa bango elongo o ntango esengeli ya ngaimei, ete napesa epai ya bango lisusu mboka ya batata ba bango, mpo ya lisango lya bango; eye ezali mboka ya Yelusaleme, eye ezali mboka ya elako mpo ya bango libela, elobi Tata.

30 Mpe ekosalema ete ntango ekoya, ekoteyama litondi lya nsango elamu ya ngai;

31 Mpe bakondima na ngai, ete, nazali Yesu Klisto, Mwana Mobali wa Nzambe, mpe bakosambela epai ya Tata o nkombo ya ngai.

32 Nde bakengi ba bango, bakotombola mongongo mwa bango, mpe na mongongo elongo bakoyemba, mpo bakomono miso na miso.

33 Nde Tata akosangisa bango elongo lisusu, mpe akopesa bango Yelusaleme mpo ya mboka ya lisango lya bango.

34 Nde bakobukana na bosepeli—Yembani elongo, bino bisika bya mpamba bya Yelusaleme; mpo Tata abondisi bato ba ye, asikoli Yelusaleme.

35 Tata asali bolumbu loboko la ye losantu o miso mya bikolo binso; mpe nsuka inso ya mabele ikomono lobiko la Tata; mpe Tata mpe ngai tozali moko.

36 Mpe nde ekomememe esalema eye ekomami: Lamuka, lamuka lisusu, mpe lata bokasi bwa yo, O Siona; lata bilamba bya yo bya kitoko, O Yelusaleme, mboka esantu. Mpo uta sikawa ekoya lisusu te o kati ya yo mosutu mpe moto na mbindo.

37 Ominingisa uta o mputulu; tombwana, fanda, O Yelusaleme; omikangola uta o nkanga ya nkingo ya yo, O mwana mwasi mokangemi wa Siona.

38 Mpe boye elobi Nkolo: Bomiteki mpo ya mpamba, mpe bokosikolama na mbongo te.

39 Solo, solo nalobi epai ya bino, ete bato ba ngai bakoyeba nkombo ya ngai; iyo, o mokolo mona bakoyeba ete nazali ye oyo alobi.

40 Mpe nde bakoloba: Boniboni kitoko likolo lya ngomba ezali makolo ma ye oyo akomeme nsango elamu epai ya bango; oyo akobimisa kimia, oyo akomeme nsango elamu ya bolamu; oyo akobimisa lobiko; oyo akoloba epai ya Siona, Nzambe wa yo akonzi.

41 Mpe nde bogangi boko bokokendi: Longwani, longwani, kendeni libanda uta awa, simbani te ena eye ezali mbindo, kendeni libanda lya ntei ya ye, zalani sembesembe bino baye bamemi sani ya Nkolo.

42 Mpo bokobima te na mbangu, to bokokende na kokima te; mpo Nkolo akokende liboso lya bino, Nzambe wa Yisalaele akozala nsima ya bino.

43 Tala, mosali wa ngai akosalaka na bokebi; akonetolama mpe akotombolama, mpe akozala likolo mpenza.

44 Lokola mingi bakamwaki na ye—elongi ya ye ebebisamaki boye, mingi koleka moto onso, mpe lolenge la ye mingi koleka loye la bana babali ba bato.

45 Boye nde akoniakela bikolo mingi; bakonzi bakokanga minoko mya bango na ye, mpo ena eye elobelamaka bango te, bakomono, mpe ena eye bayokaka te, bakomaniola.

46 Solo, solo, nalobi epai ya bino, makambo maye manso solo makoya, kutu lokola Tata atindaki ngai. Nde, boyokani boye, boye Tata ayokani elongo na bato ba ye bokokokisama; mpe nde Yelusaleme ekofandama lisusu na bato ba ngai, mpe ekozala mboka ya lisango lya bango.