Makomi
3 Nefi 8


Mokapo 8

Ekumbaki, boningani bwa mabele, moto, mopepe mwa kaina, mobulungano mwa biloko motatoli bobakami bwa Klisto o ekulusu—Bato mingi babebisami—Molili mozipi mboka mpo ya mikolo misato—Bango baye batikali bamileli. Penepene na 33–34 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Sikawa esalemaki ete engebene na likundoli lya biso, mpe toyebi likundoli lya biso lizali lya solo; mpo tala, ezalaki moto moko moyengebene oyo abombaki likundoli—mpo solo asalaki makamwisi mingi o nkombo ya Yesu; mpe ezalaki moko te oyo akokaki kosala likamwisi lyoko o nkombo ya Yesu longola se soko apetolami eteni na eteni uta o bobe bwa ye—

2 Mpe sikawa esalemaki, soko esalemaki te libunga na moto oyo na botangi ntango ya biso, mobu mwa tuku misato na misato molekaki;

3 Mpe bato babandaki kotalela na limemia linene elembo eye epesamaki na profeta Samwele, Molamani, iyo, mpo ya ntango eye ekozala molili mpo ya ntaka ya mikolo misato likolo lya etando ya mboka.

4 Mpe ebandaki kozala ntembe mpe boswani bonene o ntei ya bato, ata bilembo mingi boye bipesamaka.

5 Mpe esalemaki o mobu mwa tuku misato na minei, o sanza ya yambo, o mokolo mwa minei mwa sanza, ekumbaki yoko enene, ya lolenge loko lokola loyebanaka mokolo moko te o mboka mobimba.

6 Mpe ezalaki lisusu ekumbaki enene mpe ya nsomo; mpe ezalaki nkake ya nsomo, mpenza ete eningisaki mabele manso lokola ezalaki penepene na kokabwana o katikati.

7 Mpe ezalaki minkalali mikasi mpenza, mya lolenge lokola loyebanaka mokolo moko te o mboka mobimba.

8 Mpe engumba ya Zalayemila ekamataki moto.

9 Mpe engumba ya Moloni ezindaki o kati ya bozindo bwa mbu, mpe bafandi ba yango bazindaki.

10 Mpe mabele mamememeki likolo lya engumba ya Moloniya, ete o esika ya engumba ekomaki ngomba yoko enene.

11 Mpe ezalaki bobebisami boko bonene o mboka ya epai ya sudi.

12 Kasi tala, ezalaki bobebisami boko bonene mpe bwa somo mingi koleka o mboka ya epai ya nordi; mpo tala, etando enso ya mboka ebongwanaki, na ntina ya ekumbaki mpe mopepe mwa kaina, mpe nkake mpe minkalali, mpe boningani bonene mpenza bwa mabele;

13 Nzela inene ibukanaki, ndelo ya nzela ike ibebaki, mpe bisika mingi bipatalala bikomaki bibukanabukana.

14 Mpe bingumba mingi binene mpe bya lokumu bizindaki, mpe mingi bizindaki, mpe mingi bininganaki kina ndako ya byango bikweyaki o mabele, mpe bafandi ba byango babomamaki, mpe bisika bitikalaki mpamba.

15 Mpe ezalaki yoko bingumba biye bitikalaki; kasi bobebi bwa byango bozalaki bonene mpenza, mpe ezalaki mingi o byango babomamaki.

16 Mpe ezalaki boko baye bamememeki na mopepe mwa kaina, wapi bakendeki moto te ayebi; longola se bayebi ete bamememeki mosika.

17 Mpe boye etando ya mabele mobimba ekomaki lolenge losusu, na ntina ya ekumbaki, mpe nkake, mpe minkalali, mpe boningani bwa mabele.

18 Mpe tala, mabanga mapasukaki na biteni bibale, mpe mabukanaki likolo lya etando ya mabele mobimba, mpenza ete mamononoki biteni biteni, mpe bipasukapasuka mpe na biteni bibukana, likolo lya etando mobimba ya mboka.

19 Mpe esalemaki ete etikaki nkake, mpe minkalali, moketi, mpe ekumbaki, boningani bwa mabele—mpo tala, iwumelaki mpo ya penepene na ntaka ya ngonga isato—elobamaki na boko ete ntango ezalaki enene koleka; nzokande, solo makambo mana manene mpe ma nsomo masalemaki o ntaka penepene na ngonga isato—mpe nde tala, ezalaki molili likolo lya etando ya mboka.

20 Mpe esalemaki ete ezalaki molili monene likolo lya etando mobimba ya mboka, mpenza ete, bafandi ba yango baye bakweyaka te bakokaki koyoka mbongi ya molili.

21 Ekokaki kozala mwinda te, na ntina ya molili mokasi, mpe buzi te, mpe esungi te; ekokaki kozala moto te mopelisamaki na libaya lilamu mpe likauka mpenza lya bango, boye ete ekokaki kozala mwinda ata moko te.

22 Mpe emononoki mwinda te, mpe moto te, to nzenimoto te, mpe moi te, to sanza te, to minzoto te, mpo inene boye izalaki londende la molili loye lozalaki likolo lya etando ya mboka.

23 Mpe esalemaki ete ewumelaki mpo ya ntaka ya mikolo misato ete emononoko mwinda te mpe ezalaki matanga mpe bogangi mpe boleli bonene o ntei ya bato banso ntango inso, iyo, enene ezalaki minkime mya bato, na ntina ya molili mpe bobebisami bonene boye boyaka likolo lya bango.

24 Mpe o esika yoko bayokaki koganga, kolobaka: O ete toyambolaka yambo ya mokolo moye monene mpe mwa nsomo, mpe nde elingaki bandeko ba biso kobikisama, mpe balingaki kozikisama te o engumba enene Zalayemila.

25 Mpe o esika esusu, bayokamaki koganga mpe kolela, kolobaka: O ete toyambolaka yambo ya mokolo moye monene mpe mwa nsomo, mpe tobomaka te mpe tobambaka baprofeta mabanga te mpe tobenganaka bango libanda te; nde elingaki bamama ba biso mpe bana basi kitoko ba biso, bana ba biso, kobikisama, mpe kokundama te o engumba enene Moloniya. Mpe izalaki bogangi bwa bato bonene mpe bwa nsomo.