Makomi
3 Nefi 16


Mokapo 16

Yesu akobimela isusu ya mpate ibunga ya Yisalaele—o mikolo mya nsuka nsango elamu ekokende na Bapaganu mpe nde o ndako ya Yisalaele—Bato ba Nkolo bakomono miso na miso ememi lisusu Nkolo Siona. Penepene na 34 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe solo, solo, nalobi epai ya bino ete nazali na mpate isusu, iye izali te o mboka eye, mpe o mboka ya Yelusaleme te, mpe o biteni te bya mboka zingazinga mpembeni wapi nasali.

2 Mpo bango baye nalobeli bazali baye bayoki naino te mongongo mwa ngai, mpe o ntango yoko te namimonisi epai ya bango.

3 Kasi nazwi motindo moko na Tata ete nakokende epai ya bango, mpe ete bakoyoka mongongo mwa ngai, mpe bakotangema o ntei ya mpate ya ngai, ete ekoka kozala etonga yoko, mobateli moko; yango wana nakei komilakisa epai ya bango.

4 Mpe natindi bino ete bokoma maloba maye, esili ngai kokende, ete soko ezali ete bato ba ngai o Yelusaleme, bango baye bamonoki ngai mpe bazalaki elongo na ngai o mosala mwa ngai, basengi te Tata o nkombo ya ngai, ete bakoka kozwa boyebi bwa bino na Molimo Mosantu, mpe lokola mabota masusu maye bayebi te, ete maloba maye, maye bokokoma makobombama mpe makolakisama epai Bapaganu, ete na nzela ya litondi lya Bapaganu, montika mwa nkona ya bango, baye bakopalanganisama likolo lya etando ya mabele na ntina ya bozangi bondimi bwa bango, bakoka komememe o kati, to bakoka komememe o boyebi boko bwa ngai, Mosikoli wa bango.

5 Mpe nde nakosangisa bango o kati uta o ntaka inei ya mabele; mpe nde nakokokisa boyokani boye Tata asalaki epai ya bato banso ba ndako ya Yisalaele.

6 Bapambolami Bapaganu, na ntina ya boyambi bwa bango na ngai, o kati ya mpe na Molimo Mosantu, oyo atatoli epai ya bango ngai mpe Tata.

7 Tala, na ntina ya boyambi bwa bango na ngai, elobi Tata, mpe na ntina ya bozangi bondimi bwa bino, O ndako ya Yisalaele, o mikolo mya nsuka bosolo bokoya epai ya Bapaganu, ete litondi lya makambo maye likoyebisama epai ya bango.

8 Kasi lisuma, elobi Tata, epai ya Bapaganu bazangi bondimi—mpo ata bayei likolo lya ya etando ya mboka eye, mpe bapalanganisi bato ba ngai baye bazali ba ndako ya Yisalaele; mpe bato ba ngai baye bazali ba ndako ya Yisalaele babwakami libanda uta o ntei ya bango, mpe baniatami o nse ya makolo ma bango.

9 Mpe na ntina ya ngolu ya Tata epai ya Bapaganu, mpe masambisi ma Tata likolo lya bato ba ndako ya Yisalaele, solo, solo, nalobi epai ya bino, nsima ya eye enso, mpe nasali ete bato ba ngai ba ndako ya Yisalaele babeteme, batungisama, babomama, mpe babwakama libanda uta o ntei ya bango, mpe mpo ya kokoma bayinami ba bango, mpe mpo ya kokoma litio lyoko mpe liseki lyoko o ntei ya bango—

10 Mpe boye etindi Tata ete naloba epai ya bino: O mokolo mona ekosumuka Bapaganu na nsango elamu ya ngai, mpe ekobwaka bango litondi lya nsango elamu ya ngai, mpe bakotombwana o lofundo la mitema mya bango likolo lya bikolo binso, mpe likolo lya bato banso o mabele mobimba, mpe bakotonda na ndenge inso ya lokuta, mpe bokosi, mpe nko, mpe ndenge inso ya bokibisi, mpe bobomi, mpe poloso ya banganga, mpe pite, mpe bonsomo bwa nkuku; mpe soko bakosala makambo mana manso, mpe bakobwaka litondi lya nsango elamu ya ngai, tala, elobi Tata, nakomeme litondi lya nsango elamu ya ngai uta o ntei ya bango.

11 Mpe nde nakomikundola boyokani bwa ngai boye nasali epai ya bato ba ngai, O ndako ya Yisalaele, mpe nakomeme nsango elamu ya ngai epai ya bango.

12 Mpe nakolakisa epai ya yo, O ndako ya Yisalaele, ete Bapaganu bakozala na nguya te likolo lya yo; kasi nakomikundola boyokani bwa ngai epai ya yo, O ndako ya Yisalaele, mpe okoya epai ya boyebi bwa litondi lya nsango elamu ya ngai.

13 Kasi soko Bapaganu bakoyambola mpe bakozonga epai ya ngai, elobi Tata, tala, bakotangema o ntei ya bato ba ngai, O ndako ya Yisalaele.

14 Mpe nakondima te ete bato ba ngai, baye bazali ba ndako ya Yisalaele, bakende o kati o ntei ya bango, mpe baniatama o nse, elobi Tata.

15 Kasi, soko babaluki te epai ya ngai, soko bayokemeli te epai ya maloba ma ngai, nakondima bato ba ngai, O ndako ya Yisalaele, ete bakende o kati o ntei ya bango, mpe baniatama o nse, mpe bakozala lokola mongwa moye mobungisi elengi ya yango, moye kina o ntango ena ezali elamu mpo ya eloko te kasi mpo ya kobwakama libanda, mpe koniatama o nse ya likolo lya bato ba ngai, O ndako ya Yisalaele.

16 Solo, solo, nalobi epai ya bino, boye etindi ngai Tata—ete napesa epai ya bato baye mboka eye mpo ya lisango lya bango.

17 Mpe nde maloba ma profeta Yisaya makokokisama, maye malobi:

18 Bakengi ba yo bakotombola mongongo; na mongongo elongo bakoyemba, mpo bakomono miso na miso ekomeme Nkolo lisusu Siona.

19 Bukanani o bosepeli; yembani elongo bino bisika bya mpamba bya Yelusaleme; mpo Nkolo abondisi bato ba ye, asikoli Yelusaleme;

20 Nkolo asali bolumbu loboko la ye losantu o miso mya bikolo binso, mpe nsuka inso ya mabele ikomono lobiko la Nzambe.