Makomi
3 Nefi 17


Mokapo 17

Yesu atindi bato bamaniola maloba ma ye mpe basambela mpo ya bososoli—Abikisi bakoni ba bango—asambeli mpo ya bato, kosalelaka lokota loko loye lokoki te kokomama—Banzelu basali na mpe moto mozingi bake ba bango. Penepene na 34 ya Mobu mwa mokonzi.

1 Tala, sikawa esalemaki ete elobaka Yesu maloba maye, atalaki zingazinga mpembeni lisusu ebele, mpe alobaki epai ya bango: tala, ntango ya ngai ezali mosika te.

2 Namoni ete bozali batau, ete bokoki te kososola maloba manso maye natindami na tata mpo ya koloba epai ya bino o ntango eye.

3 Yango wana, kendeni epai ya bino, mpe maniolani likolo lya makambo maye nalobi, mpe sengeni na Tata, o nkombo ya ngai, ete bokoka kososola, mpe kolengele makanisi ma bino mpo ya mokola mwa nsima, mpe nakoya epai ya bino lisusu.

4 Kasi sikawa nakei epai ya Tata, mpe lisusu mpo ya komilakisa epai ya mabota mabunga ma Yisalaele, mpo babungi te epai ya Tata, mpo ayebi wapi akamataki bango.

5 Mpe esalemaki ete elobaka boye Yesu, abwakaki miso mya ye zingazinga mpembeni lisusu na ebele, mpe amonoki bazalaki na mpizoli, mpe batalaki sikisiki likolo lya ye lokola soko balingaki kosenge ye kotikala mwa moke lisusu elongo na bango.

6 Mpe alobaki epai ya bango: Tala, nsopo ya ngai itondi na mawa ona bino.

7 Ezali bino na bakoni o ntei ya bino? Memeni bango awa. Ezali bino na batengoli, to bato ba lolanda, bato ba tengutengu, to bakatami binema, to bato ba mbala, to balemene, to bakufa matoyi, to baye batungisami na ndenge inso? Memeni bango awa, mpe nakobikisa bango, mpo nazali na mawa likolo lya bino; nsopo ya ngai itondi na ngolu.

8 Mpo namoni ete bozali na mposa ete nalakisa epai ya bino nini nasali epai ya bandeko ba bino o Yelusaleme, mpo namoni ete bondimi bwa bino bokoki ete nabikisa bino.

9 Mpe esalemaki ete elobaki ye boye, ebele banso, na lisanga lyoko, bakendeki elongo na bakoni ba bango mpe batungisami ba bango, batengoli ba bango, mpe elongo na bato ba lolanda ba bango, mpe elongo na bababa ba bango, mpe elongo na bango banso baye batungisamaki na yoko lolenge, mpe abikisaki bango moko na moko lokola bamememeki epai ya ye.

10 Mpe banso, baye babikisamaki mpe baye bazalaki kolongono, bagumbamaki o nse o makolo ma ye, mpe bakumbamelaki ye; mpe mingi lokola bakokaki mpo ya ebele bapwepweki makolo ma ye, mpenza ete basokolaki makolo ma ye na mpizoli ya bango.

11 Mpe esalemaki ete atindaki ete bana bake ba bango bamememe.

12 Boye bamemeki bana bake ba bango mpe batiaki bango o nse likolo lya mabele zingazinga mpembeni ya ye, mpe Yesu atelemeki o katikati; ebele bapesaki nzela kina bamememeke banso epai ya ye.

13 Mpe esalemaki ete ememeke bango bana bake banso, mpe Yesu atelemeki o katikati, atindaki ebele ete bafukama o nse likolo lya mabele.

14 Mpe esalemaki ete efukamaka bango likolo lya mabele, Yesu alelaki o kati ya yemei, mpe alobaki: Tata, nazali na mobulu na ntina ya nkuna ya bato ba ndako ya Yisalaele.

15 Mpe elobaka ye maloba maye, yemei lokola afukamaki likolo lya mabele, tala asambelaki epai ya Tata, mpe makambo maye asambelaki makoki te kokomama, mpe ebele bapesaki litatoli baye bayokaki ye.

16 Mpe nsima ya lolenge loye bapesaki litatoli: Mokolo moko te miso mimono, mpe matoyi mayoka, yambo, makambo manene mpe ma bokamwi lokola maye tomonoki mpe toyokaki Yesu koloba epai ya Tata;

17 Mpe lolemo lokoki te koloba, mpe ekoki te kokomama na moto, mpe mitema mya bato mikoki te kokanisa makambo manene mpe ma bokamwi lokola tomonoki mpe toyokaki likola Yesu koloba; mpe moko te akoki kokanisa bosepeli boye botondisaki bozo bwa biso o ntango toyokaki ye kosambela mpo ya biso epai ya Tata.

18 Mpe esalemaki ete etiaka Yesu nsuka yoko na losambo epai ya Tata, atelemeki; kasi enene boye ezalaki bosepeli bwa ebele ete balongamaki.

19 Mpe esalemaki ete Yesu alobaki epai ya bango, mpe atindaki bango bateleme.

20 Mpe batelemeki uta o mabele, mpe alobaki epai ya bango: Bopambolami na ntina ya bondimi bwa bino. Mpe sikawa tala, bosepeli bwa ngai botondi.

21 Mpe elobaka Yesu maloba maye, alelaki, ebele bapesaki litatoli lya yango, mpe akamataki bana bake ba bango, moko na moko, mpe apambolaki bango mpe asambelaki epai ya Tata mpo ya bango.

22 Mpe esalaki ye eye, alelaki lisusu.

23 Mpe alobaki epai ya ebele, mpe alobaki epai ya bango: Talani bake ba bino.

24 Mpe lokola batalaki mpo ya komono babwakaki miso mya bango ona lola, mpe bamonoki lola lofungwani, mpe bamonoki banzelu kokitaka o libanda lya lola lokola ezalaki o katikati ya moto; mpe bayaki o nse mpe bazingaki bana bake mpembeni; mpe bazingamaki mpembeni na moto, mpe banzelu basalaki epai ya bango.

25 Mpe ebele bamonoki mpe bapesaki litatoli; mpe bayebi ete likundoli lya bango lizali lya solo mpo banso ba bango bamonoki mpe bayokaki; mpe moto na moto mpo ya yemei; mpe na motango penepene na bato nkoto ibale na nkama mitano; mpe bazalaki babali, basi, mpe bana.