Makomi
3 Nefi 9


Mokapo 9

Kati na molili, mongongo ya Klisto esakoli bobebisami ya bato mpe bingumba mingi mpo na nkuna na bango—Asakoli lisusu bonzambe na Ye, ayebisi ete mobeko ya Mose mokokisami, mpe abiangi bato baya epayi na Ye mpe babikisama. Penepene na 34 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe esalemaki ete mongongo moko eyokanaki na kati ya bafandi nyonso ya mabele, likolo ya etando mobimba ya mboka oyo, kobelelaka:

2 Lisuma, lisuma, lisuma epayi ya bato oyo; lisuma epayi ya bafandi ya mabele mobimba longola se soki bakoyambola; mpo zabulu azali koseka mpe banjelu na ye kosepela, na ntina ya bobomi ya bana mibali mpe bana basi kitoko ya bato na ngai; mpe ezali na ntina ya mabe mpe bonsomo na bango ete bakwei.

3 Tala, engumba monene wana ya Zalayemila natumbi moto, mpe bafandi ya yango.

4 Mpe tala, engumba monene wana ya Moroni nasali ete ezindisama na bozindo ya mbu, mpe bafandi ya yango bazindisami mpe lokola.

5 Mpe tala, engumba monene wana ya Moroniya nazipi na mabele, mpe bafandi na yango, mpo na kobomba mabe mpe bonsomo na bango uta na liboso ya elongi na ngai, ete makila ya baprofeta mpe ya basantu mamata lisusu te epayi na ngai na kofundaka bango.

6 Mpe tala, engumba ya Giligali nasali ete ezindisama, mpe bafandi na yango mpo na kokundama na bozindo ya mabele;

7 Iyo, mpe engumba ya Oniya mpe bafandi ya yango, mpe engumba ya Mokumi mpe bafandi na yango, mpe engumba ya Yelusaleme mpe bafandi na yango; mpe mai nasali ete emata na bisika na yango, mpo na kobomba nkuna mpe bonsomo na bango uta na liboso ya elongi na ngai, ete makila ya baprofeta mpe basantu mamata lisusu te epayi na ngai na kofundaka bango.

8 Mpe tala, engumba ya Gadiandi, mpe engumba ya Gadiomina mpe engumba ya Yakobo, mpe engumba ya Gimigimino, oyo nyonso nasali ete bizindisama mpe nasali ngomba ya mike mike mpe lobwaku na bisika na yango; mpe bafandi ya yango nde nakundi na bozindo ya mabele, mpo na kobomba nkuna mpe bonsomo na bango uta na liboso ya elongi na ngai, ete makila ya baprofeta mpe basantu mamata lisusu te epayi na ngai na kofundaka bango.

9 Mpe tala, engumba monene wana ya Yakobugati, oyo efandisamaki na bato ya mokonzi Yakobo, nasali ete etumbama na moto na ntina ya masumu mpe nkuna na bango, oyo ezalaki koleka nkuna ya mabele mobimba, na ntina ya bobomi mpe makelemba na bango ya nkuku; mpo ezalaki bango oyo babebisaki kimia ya bato na ngai mpe mbulamatari ya mboka; boye nasalaki ete batumbama, mpo na kobebisa bango uta na liboso ya elongi na ngai, ete makila ya baprofeta mpe basantu mamata epayi na ngai lisusu te na kofundaka bango.

10 Mpe tala, engumba ya Lamani, mpe engumba ya Yosi, mpe engumba ya Gada mpe engumba ya Kisikumeni, nasali ete bitumbama na moto, mpe bafandi na yango, na ntina ya nkuna na bango ya kobwakaka baprofeta libanda, mpe kobambaka mabanga bango oyo natindaki mpo na kosakola epayi na bango etali nkuna mpe bonsomo na bango.

11 Mpe lokola babwakaki bango nyonso libanda, ete ezalaki na moto moko ya sembo te na kati na bango, nakitisaki moto mpe nabebisaki bango, ete nkuna mpe bonsomo na bango bokoka kobombama uta na liboso ya elongi na ngai, ete makila ya baprofeta mpe ya basantu baye natindaki na kati na bango makoka kobelela epayi na ngai te uta na mabele na kofundaka bango.

12 Mpe nasalaki ete bobebisami mingi ya monene eya likolo ya mboka oyo mpe likolo ya bato oyo, na ntina ya nkuna na bango mpe bonsomo na bango.

13 O bino nyonso oyo bobikisami mpo bozalaki sembo koleka bango, sikawa ekozonga bino te epayi na ngai mpe ekoyambola bino te uta na masumu na bino, mpe ekobongwana bino te, ete nakoka kobikisa bino?

14 Iyo, solo nalobi epayi na bino, soki bokoya epayi na ngai bokozwa bomoi ya seko. Tala, loboko na ngai ya boboto etandolami epayi na bino, mpe moto nyonso oyo akoya, nakoyamba ye; mpe bapambolami ezala bango oyo bakoya epayi na ngai.

15 Tala, nazali Yesu Klisto Mwana ya Nzambe. Nakelaki lola mpe mabele, mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango. Nazalaki elongo na Tata uta na ebandeli. Nazali na Tata, mpe Tata azali na ngai; mpe na ngai nde Tata akembeli nkombo na ye.

16 Nayaki epayi ya baoyo ya ngai moko, baoyo ya ngai moko bayambaki ngai te. Mpe makomi matali boyei na ngai makokisami.

17 Mpe mingi lokola bayambi ngai, na bango napesi nguya ya kokoma bana ya Nzambe; mpe kutu bongo ekosala ngai na mingi lokola bakondima na nkombo na ngai, mpo tala, na ngai bosikoli eyei, mpe na ngai mobeko ya Mose mokokisami.

18 Nazali pole mpe bomoi ya mokili. Nazali Alifa mpe Omega, ebandeli mpe nsuka.

19 Mpe bokobonzela ngai lisusu bosopi makila te; iyo, mbeka na bino mpe mabonza matumbama makolongolama na bino, mpo nakondima ata moko te ya mbeka na bino mpe mabonza matumbama na bino.

20 Mpe bokobonzela ngai mbeka ya motema ebukana mpe molimo ya mawa. Mpe oyo akoya epayi na ngai na motema ebukana mpe molimo ya mawa, ye nde nakobatisa na moto mpe na Molimo Mosantu, kutu lokola Balamani, na ntina ya bondimi na bango na ngai na ntango ya bobongwami na bango, babatisamaki na moto mpe na Molimo Mosantu, mpe bayebaki yango te.

21 Tala, nayei epayi na mokili mpo na komema bosikoli na mokili, mpo na kobikisa mokili na masumu.

22 Na boye, oyo nyonso akoyambola mpe akoya epayi na ngai lokola mwana moke, ye nde nakoyamba, mpo bokonzi ya Nzambe ezali ya bato ya lolenge oyo. Mpo tala, mpo ezali pona na baye ya lolenge oyo nde nalalisaki bomoi na ngai na nse mpe nakamataki yango lisusu; na boye, boyambola mpe boya epayi na ngai bino nsuka ya mabele, mpe bobikisama.

Bimisa na lokasa