Makomi
3 Nefi 15


Mokapo 15

Yesu asangeli ete mobeko mwa Mose mokokisami na ye—Banefi bazali mpate isusu eye alobelaki o Yelusaleme—Na ntina ya bobe, bato ba Nkolo o Yelusaleme bayebaki te etali mpate ipalanganisama ya Yisalaele. Penepene na 34 ya Mobu mya Mokonzi.

1 Mpe sikawa esalemaki ete esukisaka Yesu maloba maye, abwakaki miso mya ye zingazinga mpembeni, mpe alobaki epai ya bango: Tala, bino boyoki makambo maye nateyaki yambo namataki na Tata wa ngai; yango wana, onso oyo amikundoli makambo maye ma ngai mpe asali mango, nakosekwisa ye o mokolo mwa nsuka.

2 Mpe esalemaki ete elobaka Yesu makambo maye, amonoki ete ezalaki boko ntei ya bango baye bakamwaki mpenza mpe bamitunaki nini alingaki etali mobeko mwa Mose; mpo basosolaki te liloba ete makambo ma kala malekaka, mpe ete makambo manso makomaka ma sika.

3 Mpe alobaki epai ya bango: Kamwani te ete nalobi epai ya bino ete makambo ma kala malekaka, mpe makambo manso makomaka ma sika.

4 Tala, nalobi epai ya bino ete mobeko mokokisami moye napesamaki epai ya Mose.

5 Tala, nazali ye oyo apesaki mobeko, mpe nazali ye oyo asalaki boyokani elongo na bato ba ngai ba Yisalaele; yango wana, mobeko na ngaimei mokokisami, mpo nayei kokokisa mobeko, yango wana mosuki.

6 Tala, nabebisi te baprofeta, mpo mingi soko ekokisami te na ngai, solo nalobi epai ya bino, inso ikosalema.

7 Mpe zambi nalobaki epai ya bino ete makambo ma kala maleki, nabebisi te ena eye elobami etali makambo makoya.

8 Mpo tala, boyokani boye nasali elongo na bato ba ngai bokoki sami bonso te, kasi mobeko moye mopesamaki epai ya Mose, mozwi nsuka yoko na ngai.

9 Tala, nazali mobeko, mpe mwinda. Talani epai ya ngai, mpe tiani molende kina o nsuka, mpe bokozala na bomoi; mpo epai ya ye oyo atii molende kina o nsuka nakopesa bomoi bwa seko.

10 Tala, napesi epai ya bino mitindo; yango wana bombani mitindo mya ngai. Mpe eye ezali mobeko mpe baprofeta, mpo solo batatolaki ngai.

11 Mpe sikawa esalemaki ete elobaka Yesu maloba maye, alobaki epai ya bazomi na babale bana baye aponoko:

12 Bozali bayekoli ba ngai; mpe bozali mwinda epai ya bato, baye bazali montika moko mwa ndako ya Yosefe.

13 Mpe tala, eye ezali mboka ya lisango lya bino; mpe Tata apesi yango epai ya bino.

14 Mpe o ntango yoko te Tata apesi ngai motindo ete nalobela yango epai ya bandeko ba bino ba Yelusaleme.

15 Mpe o ntango yoko te Tata apesi ngai motindo ete nalobela epai ya bango etali mabota masusu ma ndako ya Yisalaele, maye Tata amemeki mosika libanda lya mboka.

16 Eye mingi Tata atindi ngai, ete nalobela epai ya bango:

17 Ete nazali na mpate isusu iye izali te ya etonga eye, bango lokola nasengeli komeme mpe bakoyoka mongongo mwa ngai; mpe ekozala etonga yoko, mpe mobateli moko.

18 Mpe sikawa, na ntina ya nkanza mpe bozangi bondimi basosolaki te maloba ma ngai; yango wana natindamaki koloba lisusu te na Tata etali likambo lina epai ya bango.

19 Kasi, solo, nalobi epai ya bino ete Tata atindi ngai, mpo nalobeli yango epai ya bino, ete bakabwanaki uta o ntei ya bango na ntina ya bobe bwa bango; yango wana ezali na ntina ya bobe bwa bango ete bayebi bino te.

20 Mpe solo, nalobi epai ya bino lisusu ete Tata akabolaki mabota masusu uta na bango, mpe ezali na ntina ya bobe bwa bango ete bayebi bango te.

21 Mpe solo nalobi epai ya bino, ete bozali bango baye nalobaki: Nazali na mpate isusu iye izali o etonga eye te, bango lokola nasengeli komeme, mpe bakoyoka mongongo mwa ngai; ekozala etonga yoko; mpe mobateli moko.

22 Mpe basosolaki ngai te, mpo babanzaki ezalaka Bapaganu, mpo basosolaki te ete Bapaganu bakobongwana na nzela ya liteya lya bango.

23 Mpe basosolaki ngai te ete nalobaki bakoyoka mongongo mwa ngai; mpe basosolaki ngai te ete Bapaganu o ntango yoko te bakoyoka mongongo mwa ngai—ete nakomimonisa te epai ya bango longola se soko ezali na Molimo Mosantu.

24 Kasi tala, boyoki mongongo mwa ngai, mpe bomoni ngai; mpe bozali mpate ya ngai, mpe botangemi o ntei ya bango baye Tata apesi ngai.