Makomi
3 Nefi 3


Mokapo 3

Gidiani, mokambi ya Gadiatoni, asengi ete Lakonusi mpe Banefi bango moko bamitika mpe mboka na bango—Lakonusi aponi Gidigidoni lokola mokonzi na mampinga—Banefi basangani na Zalayemila mpe na Beboo mpo na komibatela. Penepene na mibu 16–18 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe sikawa esalemaki ete na mobu ya zomi na motoba uta na boyei ya Klisto, Lakonusi, mokambi etuka ya mboka yango, azwaki mokanda uta na mokambi mpe mokambi etuka ya lingomba oyo ya bayongoli; mpe oyo ezalaki makambo oyo ekomamaki, kolobaka:

2 Lakonusi, moto aleki lokumu mpe mokambi mokonzi ya etuka, tala, nakomi mokanda oyo epayi na yo, mpe napesi epayi na yo masanzoli minene na ntina ya botelemi ngwi na yo, mpe lisusu botelemi ngwi ya bato na yo, na kosimbaka oyo wana bobanzi ezali makoki mpe lipanda na bino; iyo, botelemi malamu, lokola soki bosalisami na loboko ya nzambe moko, na kobatelaka lipanda na bino, bozwi na bino, mpe ekolo na bino, to oyo wana bobiangi bongo.

3 Mpe emonani lokola mawa epayi na ngai, moto ya lokumu koleka Lakonusi, ete ozali liboma mpe mpamba mpenza kino na kokanisa ete okoki kotelemela bilombe bato mingi boye baoyo bazali na nse ya mitindo na ngai, baoyo sikawa na ntango oyo basili kolenda na manduki na bango, mpe bazali kozela motema likolo se liloba—Bokitela Banefi mpe bobebisa bango.

4 Mpe ngai, lokola nayebi milimo na bango ete balongamaka te, mpo namekaki bango na libanda ya etumba, mpe lokola nayebi boyini ya libela na bango epayi na bino na ntina ya mbeba mingi oyo bosali epayi na bango, boye soki bakokita kobunda na bino bakobimela bino na bobebisami nie.

5 Boye nakomaki mokanda oyo, kokangaka yango na loboko na ngai moko, koyokaka mawa mpo na bolamu na bino, na ntina ya botelemi na bino ngwi na oyo wana bondimi kozala alima, mpe molimo ya lokumu na bino na libanda ya etumba.

6 Boye nakomeli yo, mpo nazali na mposa ete botika epayi ya bato na ngai oyo, bingumba na bino, bamboka na bino, mpe bozwi na bino, na esika ete babimela bino na mompanga mpe ete bobebisami eya likolo na bino.

7 To na maloba mosusu, bomitika epayi na biso, mpe bosangana elongo na biso, mpe bomesena na misala na biso ya nkuku, mpe bokoma bandeko na biso ete bozala lokola biso—bawumbo na biso te, kasi bandeko na biso mpe bato basangisami na biloko na biso nyonso.

8 Mpe tala, nalapi ndai epayi na yo, ete soki osali oyo, bokobebisama te; kasi soki osali oyo te, nalapi ndai epayi na yo, ete na sanza ya nsima nakotinda ete mampinga na ngai makita kobunda na bino, mpe bakokanga maboko na bango te, mpe bakotika bino te, kasi bakoboma bino, mpe bakotika mompanga mokweya likolo na bino kino bokosilisama.

9 Mpe tala, nazali Gidiani; mpe nazali mokambi etuka ya lingomba oyo ya nkuku ya Gadiatoni; oyo lingomba mpe misala na yango nayebi ezali malamu; mpe bazali ya mikolo ya kala mpe bakitanisamaki epayi na biso.

10 Mpe nakomi mokanda oyo epayi na yo, Lakonusi, mpe natie elikya ete bokopesa bamboka na bino mpe bozwi na bino, na bozangi bosopi makila, ete bato na ngai oyo bakoka kozongela makoki mpe ebonga na bango ya ekobima, oyo bakabwani mosika uta na bino na ntina ya nkuna na bino na kopekisaka bango makoki na bango ya ekobima, mpe longola se soki bosali oyo, nakobekola mbeba na bango. Nazali Gidiani.

11 Mpe sikawa esalemaki ete ntango Lakonusi azwaki mokanda oyo akamwaki mingi koleka, na ntina ya bozangi bobangi ya Gidiani na kosengaka azwa bamboka ya Banefi, mpe lisusu na kokanelaka bato mpe kobekolaka mbeba na bango oyo bazwaki mbeba te, longola se soki bamisalaki mabe na kokabwanaka na bayongoli wana ya nkuna mpe ya nsomo.

12 Sikawa tala, Lakonusi oyo, mokambi ya etuka, azalaki moto moko moyengebene, mpe akokaki kobangisama te na masengami mpe bokaneli ya moyongoli moko; boye atiaki te bokebi na mokanda ya Gidiani, mokambi etuka ya bayongoli, kasi asalaki ete bato na ye babelela epayi ya Nkolo, mpo na bokasi na ntango oyo bayongoli bakokita kobunda na bango.

13 Iyo, atindaki bosakoli na kati ya bato nyonso, ete basangisa esika moko basi na bango, mpe bana na bango, bibwele na bango, bitonga na bango, mpe biloko nyonso na bango, longola se mboka na bango, na esika moko.

14 Mpe asalaki ete bisika ya makasi bitongama nzinganzinga na bango, mpe bokasi ya bisika yango ezala makasi koleka mpenza. Mpe asalaki ete mampinga, ezala ya Banefi mpe ya Balamani mpe lokola, soki te nyonso kati na bango oyo batangamaki na kati ya Banefi, batiama lokola bakengeli nzinganzinga mpembeni mpo na kokengela bango, mpe kobatela bango uta na bayongoli na moi mpe na butu.

15 Iyo, alobaki epayi na bango boye: Lokola Nkolo azali na bomoi, longola se soki boyamboli uta na mabe na bino nyonso, mpe bobeleli epayi ya Nkolo, bokobikisama ata moke te uta na maboko ya bayongoli bana ya Gadiatoni.

16 Mpe maloba mpe masakoli ya Lakonusi ezalaki minene mpenza ete esalaki ete bobangi eya likolo ya bato nyonso, mpe bamilendisaki na bokasi na bango mpo na kosala engebene na maloba ya Lakonusi.

17 Mpe esalemaki ete Lakonusi aponaki bakapiteni bakonzi likolo ya mampinga nyonso ya Banefi, mpo na kopesa bango mibeko na ntango oyo bayongoli bakokita uta na esobe mpo na kobunda na bango.

18 Sikawa mokonzi aleki monene na kati ya bakapiteni bakonzi nyonso mpe komanda monene ya mampinga nyonso ya Banefi aponamaki, mpe nkombo na ye ezalaki Gidigidoni.

19 Sikawa ezalaki momeseno na kati ya Banefi nyonso mpo na kopona bakapiteni bakonzi na bango, (longola se na ntango ya nkuna) moto moko oyo azalaka na molimo ya emoniseli mpe lisusu ya masakoli; boye, Gidigidoni oyo azalaki profeta moko monene na kati na bango, mpe azalaki lisusu mosambisi mokonzi.

20 Sikawa bato balobaki epayi ya Gidigidoni: Sambela epayi ya Nkolo, mpe tika tomata likolo ya bangomba mpe kati na esobe, ete tokoka kokweya likolo ya bayongoli mpe kobebisa bango kati na bamboka na bango moko.

21 Kasi Gidigidoni alobaki epayi na bango: Nkolo apekisi; mpo soki tomati mpo na kobunda na bango Nkolo akotika biso kati na maboko na bango; boye tokomilengela na kati ya ntei ya bamboka na biso, mpe tokosangisa mampinga na biso nyonso esika moko mpe tokokende kobunda na bango te, kasi tokozela kino bakoya kobanda biso; boye lokola Nkolo azali na bomoi, soki tosali oyo akotika bango kati na maboko na biso.

22 Mpe esalemaki ete na mobu ya zomi na nsambo, na nsuka nsuka ya mobu, bosakoli uta na Lakonusi ekendaki epayi nyonso na etando mobimba ya mboka, mpe bakamataki babampunda na bango, mpe makalo na bango, banyama na bango ya kobokola, bibwele na bango, mpe bitonga na bango, mpe mboto na bango, mpe biloko nyonso na bango, mpe batambolaki nkoto na nkoto mpe zomi na zomi na nkoto na nkoto, kino bakendaki bango nyonso na esika oyo eponamaki ete basangisa bango moko elongo, mpo na komibatela na banguna na bango.

23 Mpe mboka oyo eponamaki ezalaki mboka ya Zalayemila, mpe mboka oyo ezalaki na katikati ya mboka ya Zalayemila mpe mboka ya Beboo, iyo, na monkoloto oyo ezalaki na katikati ya mboka ya Beboo mpe mboka ya Libebi.

24 Mpe ezalaki na nkoto mingi mpenza ya bato oyo babiangamaki Banefi, baye basanganaki bango moko esika moko na mboka oyo. Sikawa, Lakonusi asalaki ete basangana bango moko esika moko na mboka epayi na sudi, na ntina ya bolakeli mabe monene oyo ezalaki likolo ya mboka epayi na nordi.

25 Mpe bamilendisaki mpo na kobunda na banguna na bango; mpe bafandaki na mboka moko, mpe na nzoto moko, mpe babangaki maloba oyo elobamaki na Lakonusi, na lolenge ete bayambolaki uta na masumu na bango nyonso; mpe bamatisaki sambo na bango epayi ya Nkolo Nzambe na bango, ete abikisa bango na ntango oyo banguna na bango bakoya kobunda na bango.

26 Mpe bazalaki na mawa mingi koleka na ntina ya banguna na bango. Mpe Gidigidoni asalaki ete basala bibundeli ya bitumba ya ndenge na ndenge, mpe asalaki ete bazala makasi na bibundeli na bango, mpe na nguba ya minene, mpe nguba ya mike, mpe esalema na lolenge ya malakisi na ye.

Bimisa na lokasa