Makomi
3 Nefi 5


Mokapo 5

Banefi bayamboli mpe batiki masumu na bango—Mormon akomi mambi ya kala ya bato na ye mpe asakoli liloba ya libela—Yisalaele ekosangisama uta na bopanzani na ye ya ntango molai. Penepene na mibu 22–26 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe sikawa tala, ezalaki na moto moko te na kati ya bato nyonso ya Banefi oyo atiaki ntembe ata moke na maloba ya baprofeta basantu nyonso oyo balobaki; mpo bayebaki ete esengelaki mpenza ete makokisama.

2 Mpe bayebaki ete esengeli elongobana ete Klisto aya, na ntina ya bilembo mingi oyo epesamaki, engebene na maloba ya baprofeta; mpe na ntina ya makambo esilaki koleka bayebaki ete esengelaki mpenza ete makambo yango nyonso masalema engebene na oyo elobamaki.

3 Boye batikaki masumu na bango nyonso, mpe bonsomo na bango, mpe pite na bango, mpe basalelaki Nzambe na molende nyonso moi mpe butu.

4 Mpe sikawa esalemaki ete ntango bakamataki bayongoli nyonso bakangemi ya boloko, na lolenge ete moko te akimaki oyo babomaki te, babwakaki bato bakangemi na bango kati na boloko, mpe basalaki ete liloba ya Nzambe eteyama epayi na bango; mpe mingi lokola balingaki bayambola uta na masumu na bango mpe bakotaki kati na liyokani ete babomama lisusu te, batikaki bango na lipanda.

5 Kasi mingi lokola ezalaki na baoyo bakotaki kati na liyokani te, mpe baoyo bakobaki kozala na bobomi ya nkuku wana kati na mitema na bango, iyo, mingi lokola bamonanaki se kobimisa bokaneli na bandeko na bango bakweisamaki mpe bapesamaki etumbu engebene na mobeko.

6 Mpe boye batiaki nsuka na makelemba wana ya nkuna, ya nkuku, mpe ya nsomo likolo ya oyo wapi nkuna ezalaki mingi, mpe bobomi mingi esalemaki mpenza.

7 Mpe boye mobu ya ntuku mibale na mibale elekaki, mpe ya ntuku mibale na misato mpe lokola, mpe ya ntuku mibale na minei, mpe ya ntuku mibale na mitano, mpe boye mibu ntuku mibale na mitano elekaki.

8 Mpe makambo mingi esalemaki, oyo, na miso ya boko bato, elingaki kozala monene mpe ya kokamwa; nzokande, makoki te nyonso kokomama na buku oyo; iyo, buku oyo ekoki te kozala kutu na eteni moko ya nkama ya nini esalemaki na kati ya bato mingi mpenza boye na ntaka ya mibu ntuku mibale na mitano;

9 Kasi tala, ezali na masolo ya makomi oyo ezali na misala ya botamboli nyonso ya bato oyo; mpe lisitwale ya mokuse kasi ya solo epesamaki na Nefi.

10 Yango wana nasali lisolo ya makomi na ngai ya makambo oyo engebene na lisolo ya makomi ya Nefi, oyo ekomamaki likolo ya bapalaki oyo ebiangamaki bapalaki ya Nefi.

11 Mpe tala, nasali lisolo ya makomi likolo ya bapalaki oyo nasali na maboko na ngai moko.

12 Mpe tala, nabiangami Mormon, mpo napesamaki nsima ya mboka ya Mormon, mboka kati na oyo wapi Alma atiaki eklezia na kati ya bato, iyo, eklezia ya yambo oyo etiamaki na kati na bango nsima ete babuka mobeko.

13 Tala, nazali moyekoli ya Yesu Klisto, Mwanana Nzambe. Nabiangami na ye mpo na kosakola liloba na ye kati ya bato na ye, ete bakoka kozwa bomoi ya libela.

14 Mpe ekomaki likambo elongobani ete ngai, engebene na bolingi ya Nzambe, ete sambo ya baoyo bakenda kala, baoyo bazalaki basantu, ekokisama engebene na bondimi na bango, nasengeli kosala lisolo ya makomi moko ya makambo oyo masalemaki—

15 Iyo, lisolo ya makomi moko ya moke ya makambo oyo masalemaki uta na ntango Lehi atikaki Yelusaleme, kutu kino na ntango ya lelo.

16 Boye nasali lisolo ya makomi na ngai uta na masitwale oyo epesamaki na bango oyo bazalaki liboso na ngai, kino na ebandeli ya mokolo na ngai;

17 Mpe nsima nde nasali lisolo ya makomi moko ya makambo oyo namonaki na miso na ngai moko.

18 Mpe nayebi ete lisolo ya makomi oyo nasali ezali lisolo ya makomi moko alima mpe ya solo; nzokande ezali na makambo mingi oyo, engebene na lokota na biso, tokoki kokoma te.

19 Mpe sikawa natie nsuka na maloba na ngai, oyo ezali ya ngai moko, mpe nakobi kopesa lisolo ya makambo oyo ezalaki liboso na ngai.

20 Nazali Mormon, eboto ya peto ya Lehi. Nazali na ntina ya kopambola Nzambe na ngai mpe Mobikisi na ngai Yesu Klisto, mpo ete amemaki batata na biso uta na mboka ya Yelusaleme, (mpe moto moko te ayebaki yango longola se ye moko mpe bango oyo amemaki uta na mboka wana) mpe mpo ete apesi ngai mpe bato na ngai boyebi boike mpenza mpo na lobiko ya milimo na biso.

21 Solo mpenza, apambolaki ndako ya Yakobo, mpe atondisamaki na boboto mpo na nkona ya Yosefe.

22 Mpe mbala mingi lokola bana ya Lehi babatelaki mitindo na ye, apambolaki bango mpe afulusaki bango engebene na liloba na ye.

23 Iyo, mpe solo akomema lisusu montika moko ya nkona ya Yosefe na boyebi ya Nkolo Nzambe na bango.

24 Mpe solo mpenza lokola Nkolo azali na bomoi, akosangisa uta na ntaka minei ya mabele montika nyonso ya nkona ya Yakobo, oyo bapanzami epayi na epayi likolo ya etando mobimba ya mabele.

25 Mpe lokola ayokanaki elongo na ndako mobimba ya Yakobo, kutu boye liyokani oyo wapi ayokani elongo na ndako ya Yakobo ekokisama na ntango esengeli na ye moko, mpo na bozongisi ya ndako mobimba ya Yakobo epayi na boyebi ya liyokani oyo ayokanaki elongo na bango.

26 Mpe nsima bakoyeba Mosikoli na bango, oyo azali Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe; mpe nde bakosangana uta na ntaka minei ya mabele epayi na bamboka na bango moko, uta wapi bapanzanaki; iyo, lokola Nkolo azali na bomoi ekozala boye. Amene.

Bimisa na lokasa