Makomi
3 Nefi 19


Mokapo 19

Bazomi na babale basali epai ya bato mpe basambeli mpo ya Molimo Mosantu—Bayekoli babatisami mpe bazwi Molimo Mosantu mpe lisalisi lya banzelu—Yesu asambeli kosalelaka maloba maye makoki te kokomama—Atatoli bondimi bonene mpenza bwa Banefi. Penepene na 34 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Sikawa esalemaki ete emataka Yesu o kati ya lola, ebele bapanzanaki, mpe moto na moto akamataki mwasi wa ye mpe bana ba ye mpe azongaki o ndako ya yemei.

2 Mpe epanzanaki nsango mosika noki o ntei ya bato, yambo ezala butu, ete ebele bamonoko Yesu, mpe ete asalaka epai ya bango, mpe ete akomilakisa lisusu o mokolo mwa nsima epai ya ebele.

3 Iyo, kutu butu mobimba epanzanaki nsango mosika etali Yesu; mpe mpenza batindaki epai ya bato ete bazalaki mingi, iyo, motango moko monene mpenza, basalaki mpenza butu mobimba, ete bakoka kozala o mokolo mwa nsima o esika wapi Yesu akomilakisa epai ya ebele.

4 Mpe esalemaki ete o mokolo mwa nsima, ntango esanganaki ebele elongo, tala, Nefi mpe ndeko mobali wa ye oyo asekwisaka uta o bakufi, oyo ya ye nkombo ezalaki Timote, mpe lisusu mwana mobali wa ye, oyo ya ye nkombo ezalaki Yona, mpe lisusu Matoni, mpe Matoniya ndeko mobali wa ye, mpe Kumene, mpe Kumenoni, mpe Yilimia, mpe Semenoni, mpe Yona, mpe Sidikiya, mpe Yisaya—sikawa iye izalaki nkombo ya bayekoli baye Yesu aponoko—mpe esalemaki ete bakendeki mpe batelemeki o katikati ya ebele.

5 Mpe Tala, ebele ezalaki enene boye ete bakabolaki bango na nzoto zomi na ibale.

6 Mpe bazomi na babale bateyaki ebele; mpe tala, basalaki ete ebele bafukama o nse likolo lya etando ya mabele, mpe basambela epai ya Tata o nkombo ya Yesu.

7 Mpe bayekoli basambelaki epai ya Tata lokola o nkombo ya Yesu. Mpe esalemaki ete batelemeki mpe basalaki epai ya bato.

8 Mpe eteyaka bango maloba mana kaka maye Yesu alobaka—eloko te ekeseneke na maloba maye Yesu alobaka—tala, bafukamaki lisusu mpe basambelaki na Tata o nkombo ya Yesu.

9 Mpe basambelaki mpo ya ena eye bazalaki na mposa mingi koleka; mpe bazalaki na mposa ete Molimo Mosantu apesama epai ya bango.

10 Mpe esambelaka bango boye, bakitaki epai ya ndelo ya mai, mpe ebele balandaki bango.

11 Mpe esalemaki ete Nefi akotaki o mai mpe azwaki libatisi.

12 Mpe ebimaki ye libanda o lya mai mpe abandaki kobatisa. Mpe abatisaki bango banso baye Yesu aponoko.

13 Mpe esalemaki ete ebatisamaka bango banso mpe ebimaka bango libanda lya mai, Molimo Mosantu akweyaki likolo lya bango, mpe batondisamaki na Molimo Mosantu mpe na moto.

14 Mpe tala, bazingamaki mpembeni lokola soko ezalaki na moto, mpe mokitaki uta o lola, mpe ebele batatolaki yango, mpe bapesaki litatoli, mpe banzelu bakitaki libanda lya lola mpe basalaki epai ya bango.

15 Mpe esalemaki ete ntango ezalaki banzelu kosalaka epai ya bayekoli, tala Yesu ayaki mpe atelemeki o katikati ya bango mpe asalaki epai ya bango.

16 Mpe esalemaki ete alobaki epai ya ebele mpe atindaki bango ete bafukama o nse lisusu likolo lya mabele, mpe lisusu ete bayekoli ba ye bafukama o nse likolo lya mabele.

17 Mpe esalemaki ete efukamaka bango banso o nse likolo lya mabele, atindaki bayekoli ba ye ete basambela.

18 Mpe tala, babandaki kosambela; mpe basambelaki Yesu, kobiangaka ye Nkolo wa bango mpe Nzambe wa bango.

19 Mpe esalemaki ete Yesu akendeki libanda lya katikati ya bango, mpe akendeki mwa nzela mosika na bango mpe amigumbaki o mabele mpe alobaki:

20 Tata, natondi yo ete opesi Molimo Mosantu epai ya bango baye naponi; mpe ezali na ntina ya boyambi bwa bango na ngai ete naponi bango libanda lya mokili.

21 Tata, nasambeli yo ete olinga kopesa Molimo Mosantu epai ya bango banso baye bakondima na maloba ma bango.

22 Tata, opesi bango Molimo Mosantu zambi bandimi na ngai; mpe omoni ete bandimi na ngai zambi oyoki bango, mpe basambeli epai ya ngai; mpe basambeli epai ya ngai zambi nazali elongo na bango.

23 Mpe sikawa Tata, nasambeli epai ya yo mpo ya bango, mpe lisusu mpo ya bango banso baye bakondima likolo lya maloba ma bango, ete bakoka kondima na ngai, ete nakoka kozala na bango lokola yo Tata, ozali na ngai, ete tokoka kozala moko.

24 Mpe esalemaki ete esambelaka Yesu boye epai ya Tata, ayaki epai ya bayekoli ba ye; mpe tala bazalaki kaka kokoba, na kolembe te, kosambela epai ya ye; mpe bayikanisaki te maloba mingi, mpo epesamaki epai ya bango nini bakoloba, mpe batondaki na mposa.

25 Mpe esalemaki ete Yesu apambolaki bango lokola esambelaki bango epai ya ye, mpe elongi ya ye esekaki likolo lya bango, mpe mwinda mwa elongi ya ye mopelaki likolo lya bango, mpe tala bazalaki mpembe lokola elongi ya ye mpe lisusu bilamba bya Yesu; mpe tala mpembe yango elekaki mpembe enso, iyo, kutu ekokaki kozala eloko te likolo lya mabele mpembe boye lokola mpembe yango.

26 Mpe Yesu alobaki epai ya bango: Sambelani lisusu; nzokande batikaki te kosambela.

27 Mpe abalukaki uta na bango, mpe akendeki mwa nzela mosika mpe agumbamaki o mabele; mpe asambelaki lisusu epai ya Tata, kolobaka:

28 Tata, natondi yo ete opetoli bango baye naponi, na ntina ya bondimi bwa bango; mpe nasambeli mpo ya bango, mpe lisusu mpo ya bango baye bakondima likolo lya maloba ma bango, ete bakoka kopetolama na ngai, na nzela ya bondimi likolo lya maloba ma bango, kutu lokola bapetolami na ngai.

29 Tata, nasambeli te mpo ya mokili, kasi mpo ya bango baye opesi ngai libanda lya mokili, na ntina ya bondimi bwa bango, ete bakoka kopetolama na ngai, ete nakoka kozala na bango lokola yo, Tata, ozali na ngai, ete tokoka kozala moko, ete nakoka kokembelama na bango.

30 Mpe elobaka Yesu maloba maye, ayaki lisusu epai ya bayekoli ba ye; tala, basambelaki na sikisiki; na kolembe te, epai ya ye; mpe asekaki likolo lya bango lisusu; mpe tala bazalaki mpembe lokola Yesu.

31 Mpe esalemaki ete akendeki lisusu mwa nzela mosika mpe asambelaki epai ya Tata.

32 Mpe lolemo lokoki te koloba maloba maye asambelaki, mpe ekoki kokomama na moto te maloba maye Yesu asambelaki.

33 Ebele bayokaki mpe bapesi litatoli; mpe mitema mya bango mifungwanaki mpe basosolaki o mitema mya bango maloba maye asambelaki.

34 Nzokande, boye enene mpe ya bokamwi izalaki maloba maye asambelaki ete makokaki te kokomama, mpe makoki te kolobama na moto.

35 Mpe esalemaki ete etiaki Yesu nsuka yoko ya losambo, ayaki lisusu na bayekoli ba ye, mpe alobaki epai ya bango: bondimi bonene boye namoni mokolo moko te o ntei ya Bayuda banso; yango wana nakokaki te kolakisa epai ya bango makamwisi manene boye, na ntina ya bozangi bondimi bwa bango.

36 Solo, nalobi epai ya bino, ete ezali moko te o ntei ya bango oyo amona makambo manene boye lokola bomoni; mpe bayoki te makambo manene boye lokola boyoki.