Makomi
3 Nefi 4


Mokapo 4

Mampinga ya Nefi balongi bayongoli ya ba Gadiatoni—Gidiani abomami, mpe mokitani na ye, Zeminaliya, amikangi singa—Banefi basanzoli Nkolo mpo na elonga na bango. Penepene na mibu 19–22 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe esalemaki ete na nsuka ya nsuka ya mobu ya zomi na mwambe mampinga wana ya bayongoli bamilengelaki mpo na etumba, mpe babandaki kokita mpe kowelisa uta na bangomba ya mike mike, mpe uta na bangomba minene, mpe esobe, mpe bisika makasi na bango, mpe bisika ya nkuku na bango mpe babandaki kokamata bamboka, ezala oyo ezalaki na sudi mpe lisusu oyo ezalaki na nordi, mpe babandaki kobotola bamboka nyonso oyo etikamaki na Banefi, mpe bingumba oyo etikalaki mpamba.

2 Kasi tala, ezalaki na banyama ya zamba te mpe nyama ya bokila mpe te kati na bamboka wana oyo Banefi batikaki, mpe ezalaki na nyama ya bokila te mpo na bayongoli, longola se na esobe.

3 Mpe bayongoli bakokaki te kobika longola se kati na esobe, mpo na bozangi bilei, mpo Banefi batikaki bamboka na bango mpamba, mpe basangisaki bibwele na bango mpe bitonga na bango mpe biloko nyonso na bango mpe bazalaki moto moko.

4 Boye, ezalaki na libaku malamu te mpo na bayongoli ete bazwa bilei, longola se soki ezalaki kobimisa etumba ya polele na Banefi; mpe lokola Banefi bazalaki moto moko, mpe lokola bazalaki na motango moko monene, mpe babombaki mpo na bango moko bilei, bampunda mpe banyama ya kobokola, mpe bibwele ya ndenge na ndenge, ete bakoka kowumela mpo na ntaka ya mibu sambo, na yango ntango balikyaki kosilisa nie bayongoli uta na etando ya mboka; mpe boye elekaki mobu ya zomi na mwambe.

5 Mpe esalemaki ete na mobu ya zomi na libwa, Gidiani amonaki ete elongobanaki ete akende kobunda na Banefi, mpo na nzela ezalaki te ete bakoka kobika longola se soki ezalaki na kopunzaka mpe koyongolaka mpe kobomaka.

6 Mpe bamekaki te kopanzana bango moko likolo ya etando ya mboka na lolenge ete bakoka kokolisa mboto, mbele Banefi baya likolo na bango mpe baboma bango; yango wana Gidiani apesaki motindo epayi na mampinga na ye ete na mobu oyo basengeli komata mpo na kobunda na Banefi.

7 Mpe esalemaki ete bamataki mpo na kobunda; mpe ezalaki na sanza ya motoba; mpe tala, mokolo oyo bamataki mpo na kobunda ezalaki monene mpe ya nsomo; mpe balataki na lolenge ya bayongoli; mpe bazalaki na mposo ya mwana ya mpate nzinganzinga na nketo na bango, mpe bamipakolamaki makila, mpemitu na bango ezalaki kolokolo, mpe bazalaki na bibende ya mitu likolo na bango, mpe mampinga ya Gidiani ezalaki komonana monene mpe ya nsomo na ntina ya bibundeli na bango, mpe na ntina ya makila oyo bapakolamaki.

8 Mpe esalemaki ete mampinga ya Banefi, ntango emonaki bango lolenge ya mampinga ya Gidiani, bango nyonso bakweyaki na mabele, mpe batombolaki mabondeli epayi ya Nkolo Nzambe na bango, ete abatela bango mpe abikisa bango uta na maboko ya banguna na bango.

9 Mpe esalemaki ete ntango emonaki mampinga ya Gidiani oyo babandaki koganga na mongongo moko makasi, na ntina ya bosepeli na bango, mpo babanzaki ete Banefi bakweyaki na bobangi na ntina ya nsomo ya mampinga na bango.

10 Kasi na likambo oyo basisolamaki, mpo Banefi babangaki bango te; kasi babangaki Nzambe na bango, mpe babondelaki ye mpo na kozwa bobateli; boye, ntango mampinga ya Gidiani mawelaki kokweyela likolo na bango, basilaki komilengela mpo na kokutana na bango; iyo, na bokasi ya Nkolo bayambaki bango.

11 Mpe etumba ebandaki na sanza ya motoba; mpe etumba na bango ezalaki ya monene mpe ya nsomo, iyo, bobomi na bango ezalaki ya monene mpe ya nsomo, na lolenge ete bobomi monene boye etikala kozala soki moko te na kati ya bato nyonso ya Lehi uta atikaki Yelusaleme.

12 Mpe ata bokaneli mpe ndai oyo Gidiani asalaki, tala, Banefi babetaki bango, na lolenge ete bakimaki nie uta na liboso na bango.

13 Mpe esalemaki ete Gidigidoni atindaki mampinga na ye malanda bango mosika na ndelo ya esobe, mpe balingaki kobikisa ata moto moko te kati na baoyo bakweyaki kati na maboko ya bango nzela nzela; mpe boye balandaki bango mpe babomaki bango, na ndelo ya esobe, kutu kino bakokisaki motindo ya Gidigidoni.

14 Mpe esalemaki ete Gidiani, oyo atelemaki mpe abundaki na mpiko mpenza, alandamaki lokola ezalaki ye kokima; mpe lokola alembaki mpo abundaki etumba mingi, bakangaki ye mpe babomaki ye. Mpe boye ezalaki nsuka ya Gidiani moyongoli.

15 Mpe esalemaki ete mampinga ya Banefi bazongaki lisusu na esika na bango ya bokengi. Mpe esalemaki ete mobu oyo ya zomi na libwa elekaki, mpe bayongoli bayaki lisusu te kobunda, mpe bayaki lisusu te na mobu ya ntuku mibale.

16 Mpe na mobu ya ntuku mibale na moko bamataki te mpo na kobunda, kasi bamataki uta ngambo na ngambo nyonso mpo na kotia bozingi nzinganzinga na bato ya Nefi; mpo babanzaki ete soki bakati bato ya Nefi nzela ya kobima mosika uta na mboka na bango, mpe bazingizingi bango ngambo nyonso, mpe soki bakati bango nzela mosika uta na matomba nyonso ya bango ya libanda, ete bakoka kosala ete bango bamitika engebene na matombeli na bango.

17 Sikawa baponaki mpo na bango moko mokambi mosusu, oyo kani nkombo ezalaki Zeminaliya; boye ezalaki Zeminaliya oyo asalaki ete bozingi ya mboka esalema.

18 Kasi tala, oyo ezalaki litomba mpo na Banefi, mpo ekokaki te kosalema mpo na bayongoli ete batia bozingi ya ntango molai ete ezala na mpasi likolo ya Banefi, na ntina ya bilei biike oyo babombaki na ebombelo.

19 Mpe lokola bilei ezalaki moke na kati ya bayongoli—mpo tala, bazalaki na eloko moko te longola se ezalaki nyama mpo na bolei na bango, oyo nyama bazwaki na esobe.

20 Mpe esalemaki ete nyama ya bokila ebungaki na esobe mpenza ete bayongoli bazalaki penepene na kowa na nzala.

21 Mpe Banefi bazalaki ntango nyonso kotambolaka libanda na moi mpe na butu, mpe kokweyaka likolo ya mampinga na bango, mpe kobomaka bango nkoto na nkoto mpe zomi ya nkoto na nkoto.

22 Mpe boye Zeminaliya akomaki na mposa ya kotika mwango na bango, na ntina ya bobebisami monene boye eyaki likolo na bango na moi mpe na butu.

23 Mpe esalemaki ete Zeminaliya apesaki motindo epayi ya bato na ye ete bamilongola uta na bozingi, mpe batambola kati na biteni bileki mosika ya mboka ya epayi na nordi.

24 Mpe sikawa, Gidigidoni lokola ayebaki mwango na bango, mpe lokola ayebaki bolembi na bango na ntina ya mposa ya bilei, mpe bobomi monene boye esalemaki na kati na bango, yango wana atindaki mampinga na ye na ntango ya butu, mpe akataki nzela wapi bamibendaki, mpe atiaki mampinga na nzela wapi bamibendaki mpo na kokima etumba.

25 Mpe oyo basalaki yango na ntango ya butu, mpe batambolaki koleka bayongoli, bongo ete na mokolo ya nsima, ntango bayongoli babandaki kotambola, bakutanaki na mampinga ya Banefi ezala na liboso na bango mpe na nsima na bango.

26 Mpe bayongoli baoyo bazalaki na sudi bakatamaki nzela ya komibendana mpo na kokima na bisika na bango ya ekimelo. Mpe makambo nyonso oyo masalemaki na etinda ya Gidigidoni.

27 Mpe ezalaki na nkoto mingi baye bamitikaki bakangemi ya boloko epayi ya Banefi, mpe ndambo etikali kati na bango babomamaki.

28 Mpe mokambi na bango, Zeminaliya, bakamataki ye mpe badiembisaki ye likolo ya nzete, iyo, kutu na nsonge na yango kino akufaki. Mpe ntango badiembisaki ye kino akufaki bakweisaki nzete na mabele, mpe babelelaki na mongongo makasi, kolobaka:

29 Tika Nkolo abatela bato na ye na bosembo mpe na bosantu ya motema, ete bakoka kosala moto nyonso oyo akoluka koboma bango na ntina ya nguya mpe makelemba ya nkuku akweisama na mabele, kutu lokola moto oyo akweisami na mabele.

30 Mpe basepelaki mpe babelelaki lisusu na mongongo moko, kolobaka: Tika ete Nzambe ya Abalayama, mpe Nzambe ya Yisaka, mpe Nzambe ya Yakobo, abatela bato oyo kati na bosembo, ntango nyonso lokola bakobelela nkombo ya Nzambe na bango mpo na kozwa bobateli.

31 Mpe esalemaki ete babandaki, nyonso lokola moko, koyembaka, mpe kosanzolaka Nzambe na bango mpo na likambo monene oyo asalaki mpo na bango, na kobatelaka bango uta na bokwei na maboko ya banguna na bango.

32 Iyo, babelelaki: Hozana na Nzambe Aleki Monene. Mpe bagangaki: Nkombo ya Nkolo Nzambe ya Bokasi Nyonso, Nzambe Aleki Likolo epambolama.

33 Mpe mitema na bango mivimbaki na bosepeli, na kobimisaka mpizoli mingi, na ntina ya bolamu monene ya Nzambe na kobikisaka bango uta na maboko ya banguna na bango; mpe bayebaki ete ezalaki mpo na ntina ya boyamboli na bango mpe bomikitisi na bango ete babikisamaki uta na bobebisami ya libela.

Bimisa na lokasa