Makomi
3 Nefi 23


Mokapo 23

Yesu andimi maloba ma Yisaya—Atindi bato baluka baprofeta—Maloba ma Samwele Molamani matali Bosekwi mabakisami na likundoli lya bango. Penepene na 34 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe sikawa, tala, nalobi epai ya bino, ete bosengelaki koluka makambo maye. Iyo, motindo moko napesi epai ya bino ete boluka makambo maye na etingia; mpo enene ezali maloba ma Yisaya.

2 Mpo na ntembe te alobaki etali bato ba ngai, baye bazali ba ndako ya Yisalaele; yango wana, esengeli mpenza ete asengela koloba lokola na Bapaganu.

3 Mpe makambo manso maye alobaki mazali mpe makozala kutu engebene na maloba maye alobaki.

4 Yango wana salani keba na maloba ma ngai; komani makambo maye nalobeli bino; mpe engebene na ntango mpe bolingi bwa Tata, makokende epai ya Bapaganu.

5 Mpe onso oyo akoyokemela epai ya maloba ma ngai mpe akoyambola mpe akobatisama, ye kaka akobikisama. Lukani baprofeta, mpo mingi bazali baye batatoli makambo maye.

6 Mpe sikawa esalemaki ete elobaka Yesu maloba maye alobaki epai ya bango, esilisaki ye kosembola nkoma inso epai ya bango iye bazwaka, alobaki epai ya bango: Tala, nkoma isusu nalingi bokoma, iye bozangi.

7 Mpe esalemaki ete alobaki epai ya Nefi: Meme likundoli liye obombaki.

8 Mpe ememeke Nefi makundoli, alalisaki mango liboso lya ye, mpe abwakaki miso likolo lya mango mpe alobaki:

9 Solo nalobi epai ya yo, natindaki mosali wa ngai Samwele, Molamani, ete atatola epai ya bato ba ye, ete o mokolo moye Tata akokembela nkombo ya ye na ngai ete ekozala basantu mingi baye bakosekwa uta o bakufi, mpe bakobima epai ya mingi, mpe bakosala epai ya bango. Mpe alobaki epai ya bango: Ezalaki boye te?

10 Mpe bayekoli ba ye bayanolaki ye balobaki: Iyo, Nkolo, Samwele abikulaki engebene na maloba ma yo, mpe manso makokisamaki.

11 Mpe Yesu alobaki epai ya bango: Boniboni ezali ete bokomi te makambo maye, ete basantu mingi basekwaki, babimaki epai ya mingi, mpe basalaki epai ya bango?

12 Mpe esalemaki ete Nefi amikundolaki ete likambo liye likomamaka te.

13 Mpe esalemaki ete Yesu atindaki ete ekomama; yango wana ekomamaki engebene lokola atindaki.

14 Mpe sikawa esalemaki ete esembolaka Yesu nkoma inso na yoko, eye bakomaka, atindaki bango ete bateya makambo maye asembolaka epai ya bango.