Makomi
Mormon 8


Mokapo 8

Balamani balukiluki mpe babebisi Banefi—Buku ya Mormon ekobima na nguya ya Nzambe—Lisuma esakolami likolo na bango oyo bafulaka nkele mpe songisongi na kotelemelaka mosala ya Nkolo—Lisolo ya makomi ya Banefi likobima na mokolo moko ya nkuna, ya bobebisami ya bizaleli malamu, mpe bopengwi. Penepene na mibu 400–421 ya Mobu ya Nkolo.

1 Tala ngai, Moroni, nasilisi lisolo ya makomi ya tata na ngai, Mormon. Tala, nazali bobele na mwa makambo moke mpo na kokoma, oyo makambo natindamaki na tata na ngai.

2 Mpe sikawa esalemaki ete nsima ya ebakata ya etumba monene na Kumola, tala, Banefi oyo bakimaki kati na ekolo epayi na sudi, babenganamaki na Balamani kino babebisamaki.

3 Mpe tata na ngai lokola abomamaki na bango, mpe natikali kutu ngai moko mpo na kokoma nsango ya mawa ya bobebisami ya bato na ngai. Kasi tala, bakei, mpe ngai nakokisi motindo ya tata na ngai. Mpe soki bakoboma ngai, nayebi te.

4 Boye nakokoma mpe nakobomba masolo ya makomi yango na mabele; mpe wapi nakeyi ezali likambo te.

5 Tala, tata na ngai asalaki lisolo ya makomi oyo, mpe akomaki ntina na yango. Mpe tala, nalingaki kokoma yango mpe lokola soki nazwaki esika likolo ya bapalaki, kasi nazali na yango te; mpe nazali na makele te, mpo nazali ngai moko. Tata na ngai abomamaki na etumba, mpe bandeko na ngai; nazali na baninga mpe wapi kokende te; mpe kino ntango boni Nkolo akopesa nzela ete nakoka kozala na bomoi nayebi te.

6 Tala, mibu nkama minei eleki banda boyei ya Nkolo mpe Mobikisi na biso.

7 Mpe tala, Balamani balandaki bato na ngai, Banefi, uta engumba na engumba mpe esika na esika, kutu kino bazali lisusu te; mpe monene ezali bokwei na bango; iyo, ya monene mpe ya kokamwa ezali bobebisami ya bato na ngai, Banefi.

8 Mpe tala, ezali loboko ya Nkolo oyo esali yango. Mpe tala lisusu, Balamani bazali na etumba moko na mosusu; mpe etando mobimba ya mboka oyo ezali ntango nyonso zunguluke ya bobomi mpe bosopi makila; mpe moto moko te ayebi nsuka ya etumba.

9 Mpe sikawa, tala, nakoloba lisusu te mpo na ntina na bango, mpo ezali ata na moko te longola se Balamani mpe bayongoli baoyo bazali likolo ya etando ya mboka.

10 Mpe ezali na moto moko te oyo ayebi Nzambe ya solo longola se bayekoli ya Yesu, baoyo batikalaki na mboka kino nkuna ya bato eyaki monene mpenza ete Nkolo apesaki nzela ete batikala elongo na bato te; mpe soki bazali likolo ya etando ya mboka moto moko te ayebi.

11 Kasi tala, tata na ngai mpe ngai tomonaki bango, mpe basalelaki biso.

12 Mpe moto nyonso oyo ayambi bapalaki oyo, mpe asambisi yango te na ntina ya bozangi bobongi nie boye ezali na yango, se ye moko wana akoyeba makambo monene koleka oyo. Tala, nazali Moroni; soki ekokaki kosalema, nalingaki kosala ete makambo nyonso eyebana epayi na bino.

13 Tala, natie nsuka ya koloba mpo na oyo etali bato oyo. Nazali mwana mobali ya Mormon, mpe tata na ngai azalaki eboto ya Nefi.

14 Mpe ngai nazali se ye moko oyo abombaki lisolo ya makomi oyo mpo na Nkolo; bapalaki na yango ezali ya motuya te, na ntina ya motindo ya Nkolo. Mpo solo alobaki ete moto moko te akozwa yango mpo na kozwa matabisi; kasi lisolo ya makomi na yango ezali na motuya monene; mpe moto nyonso oyo akobimisa yango na pole, ye nde Nkolo akopambola.

15 Mpo moto moko te akoki kozwa nguya mpo na kobimisa yango na pole longola se soki epesami ye na Nzambe; mpo Nzambe alingi ete esalema na liso bobele na nkembo na ye, soki te na bolamu ya bato ya kala mpe baoyo bapanzama kala ya liyokani ya Nkolo.

16 Mpe apambolama ye oyo akobimisa likambo oyo na pole; mpo ekobimisama uta na molili na pole, engebene na liloba ya Nzambe; iyo, ekobimisama uta na mabele, mpe ekongenga uta na molili, mpe ekoya na boyebi ya bato; mpe ekosalema na nguya ya Nzambe.

17 Mpe soki ezali na mabunga ezali mabunga ya moto. Kasi tala, toyebi ete libunga ezali te; nzokande Nzambe ayebi makambo nyonso; boye, ye oyo asambisaka, tika akeba mbele akozala na likama ya moto ya lifelo.

18 Mpe ye oyo alobi: Lakisa bapalaki epayi na ngai, soki te okobetama—tika akeba mbele asambisa oyo wana epekisami na Nkolo.

19 Mpo tala, ye oyo asambisaka na lombangu akosambisama mpe lisusu na lombangu; mpo lifuta na ye ekozala engebene na misala na ye; boye, ye oyo abetaka, akobetama lisusu, na Nkolo.

20 Tala makomi malobi nini—moto abeta te, mpe asambisa te; mpo bosambisi ezali ya ngai, elobi Nkolo, mpe bobekoli ezali ya ngai mpe lokola, mpe ngai nde nakofutisa.

21 Mpe ye oyo akokanela mpe akosala songisongi na mosala ya Nkolo, mpe na bato ya liyokani ya Nkolo baoyo bazali ndako ya Yisalaele, mpe akoloba: Tokobebisa mosala ya Nkolo, mpe Nkolo akomikundola te liyokani oyo asalaki na ndako ya Yisalaele—se ye moko wana azali kati na likama ya kokatama na nse mpe kobwakama kati na moto;

22 Mpo bantina ya seko ya Nkolo ekokoba kosalema, kino bilaka nyonso na ye bikokokisama.

23 Boluka masakoli ya Yisaya. Tala, nakoki kokoma yango te. Iyo, tala nalobelaki bino, ete basantu oyo wana bakendaki liboso na ngai, baoyo bazwaki mboka oyo, bakobelela, iyo, kutu uta na mputulu bakobelela epayi ya Nkolo; mpe lokola Nkolo azali na bomoi akomikundola liyokani oyo asalaki elongo na bango.

24 Mpe ayebi sambo na bango, ete ezalaki mpo na litomba ya bandeko na bango. Mpe ayebi bondimi na bango, mpo na nkombo na ye bakokaki kolongola bangomba; mpe na nkombo na ye bakokaki koningisa mabele; mpe na nguya ya liloba na ye bakweisaki bandako ya boloko na mabele; iyo, kutu litumu ya moto makasi ekokaki te kosala bango mabe, banyama ya zamba to nioka ya ngenge mpe te, na ntina ya nguya ya liloba na ye.

25 Mpe tala, sambo na bango ezalaki lisusu mpo na litomba na ye oyo Nkolo akopesa nzela mpo na kobimisa makambo oyo.

26 Mpe moto moko te asengeli koloba ete ekoya te, mpo na ntembe te ekoya, mpo Nkolo alobi yango; mpo uta na mabele nde ekoya, na loboko ya Nkolo, mpe moto moko te akopekisa yango; mpe ekoya na mokolo ntango balobi ete makamwisi esila; mpe ekoya kutu lokola soki moto azalaki koloba uta na bakufi.

27 Mpe ekoya na mokolo moko ntango makila ya basantu makobelela epayi ya Nkolo, na ntina ya makelemba ya nkuku mpe misala ya molili.

28 Iyo, ekoya na mokolo moko ntango bakowangana nguya ya Nzambe, mpe ntango baeklezia ekosila kobeba mpe ekotombwama na lolendo ya mitema na bango; iyo, kutu mokolo moko ntango bakonzi ya baeklezia mpe bateyi bakotelema kati na lolendo ya mitema na bango, kutu na kolulaka bango oyo bazali bato ya baeklezia na bango.

29 Iyo, ekoya na mokolo moko ntango bato bakoyoka nsango ya moto, mpe ekumbaki, mpe mbongi ya molinga kati na bamboka ya bapaya;

30 Mpe bakoyoka lisusu nsango ya bitumba, nungunungu ya bitumba, mpe boningani ya mabele na bisika ya ndenge na ndenge.

31 Iyo, ekoya na mokolo moko ntango ekozala na bosoto monene likolo ya etando ya mabele; ekozala na bobomi, mpe boyongoli, mpe lokuta, mpe bobubi mpe pite, mpe ndenge nyonso ya bonsomo; ntango ekozala na mingi baoyo bakoloba, Sala eye, to sala oyo wana, mpe likambo ezali te, mpo Nkolo akosunga bato ya lolenge oyo na mokolo ya nsuka. Kasi lisuma epayi ya bato ya lolenge oyo, mpo bazali kati na lititi ya bololo mpe kati na nkanga ya mabe.

32 Iyo, ekoya na mokolo moko ntango ekozala na Baeklezia bitongama oyo bikoloba: Boya epayi na ngai, mpe mpo na mosolo na bino bokolimbisama uta na masumu na bino.

33 O bino bato ya nkuna mpe bato mabe mpe bato na matoyi mangongi, mpo na nini bomitongelaki Baeklezia mpo na kozwa matabisi? Mpo na nini ebongoli bino maloba masantu ya Nzambe, ete bokoka komema bokweisami likolo ya milimo na bino? Tala, botala malamu bimoniseli ya Nzambe; mpo tala, ntango ezali koya na mokolo wana ntango makambo oyo esengeli kokokisama.

34 Tala, Nkolo alakisaki epayi na ngai makambo monene mpe ya kokamwa mpo na oyo etali oyo wana esengeli kala mingi te koya, na mokolo oyo wapi makambo oyo ekoya na kati na bino.

35 Tala, nazali kolobela bino lokola soki bozalaki awa, mpe nzokande bozali te. Kasi tala, Yesu Klisto alakisi bino epayi na ngai, mpe nayebi misala na bino.

36 Mpe nayebi ete bozali kotambola na lolendo ya mitema na bino; mpe ezali na moto moko te longola se mwa moke baye bamitomboli te na lolendo ya mitema na bango, kino na kolataka monzele ya kitoko mpenza, kino na boluli, mpe songisongi, mpe nko, mpe monyokoli, mpe ndenge nyonso ya mabe; mpe Baeklezia na bino, iyo, kutu moko na moko ekomi ya kobeba na ntina ya lolendo ya mitema na bino.

37 Mpo tala, bolingi mosolo, mpe biloko na bino, mpe monzele kitoko na bino, mpe kokembela Baeklezia na bino, mingi koleka ete bolingi babola mpe bakeleli, bakoni mpe batungisami.

38 O bino bosoto, bino bakibisi, bino balakisi, baoyo bozali komiteka mpo na oyo wana ekobeba, mpo na nini ebebisi bino eklezia esantu ya Nzambe? Mpo na nini ezali bino koyoka nsoni mpo na kokamata likolo na bino nkombo ya Klisto? Mpo na nini eboyi bino kokanisa ete motuya ya esengo ezanga nsuka ezali monene koleka mpasi oyo esukaka soki moke te—na ntina ya bosanzoli ya mokili?

39 Mpo na nini ezali bino kokembelama na oyo wana ezangi bomoi, mpe nzokande bopesi nzela ete bato na nzala, mpe bakeleli, bato ya bolumbu, mpe bakoni mpe batungisami baleka mpembeni na bino, mpe botala bango te?

40 Iyo, mpo na nini etongi bino bonsomo ya nkuku mpo na kozwa matabisi, mpe bosali ete basi bakufela mibali basala matanga liboso ya Nkolo, mpe bana bitike basala matanga liboso ya Nkolo, mpe makila ya batata na bango mpe mibali na bango ebelela epayi ya Nkolo uta na mabele, mpo na bobekoli likolo ya mitu na bino?

41 Tala, mompanga ya bobekoli ezali likolo ya mitu na bino; mpe ntango ezali kala mingi koya ete akobekola makila ya basantu likolo na bino, mpo akopesa nzela te ete koganga na bango ekoba.

Bimisa na lokasa