Makomi
Molomoni 9


Mokapo 9

Moloni abiangi bango baye bandimi te na Klisto mpo ya koyambola—Asakoli Nzambe moko wa makamwisi, oyo akopesaka mabimisi mpe akosopaka makabo mpe bilembo likolo lya bandimi—Makamwisi masili na ntina ya bozangi bondimi—Bilembo bikolondaka bango baye bandimi—Bato balendisamaki mpo ya kozala na bwania mpe kobatela mitindo. Penepene na 401–421 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe sikawa, nalobi etali lisusu bango baye bandimi te na Klisto.

2 Tala, ekondima bino o mokolo mwa bobimelami—Tala, ekoya Nkolo, iyo, kutu mokolo mona monene ekolingama mabele elongo lokola etoko ezingani mpe biloko bikoniangolama na moto mokasi, iyo, o mokolo mona monene ekomememe bino mpo ya koteleme liboso lya Mwana wa Mpate wa Nzambe—nde bokoloba ete Nzambe azali te?

3 Nde ekowangana bino lisusu Klisto, to ekokoka bino kotala Mwana wa Mpate wa Nzambe? Ebanzi bino ete bokofanda elongo na ye o nse ya boyebi boko bwa elindo ya bino? Ebanzi bino ete bokoki kozala na esengo ya kofanda elongo na Mozali mosantu ona, eningani bozo bwa bino na boyebi boko bwa elindo ete bobukaki ntango inso mibeko?

4 Tala, nalobaki epai ya bino ete bolingaka kozala babola mingi na kofanda elongo Nzambe moko mosantu mpe moyengebene, o nse ya boyebi bwa mbindo liboso lya ye, koleka bolingaka na kofanda elongo na bozo botumbolama o limfelo.

5 Mpo tala, ekomememe bino na komono bolumbu bwa bino liboso lya Nzambe, mpe lisusu nkembo ya Nzambe, mpe bosantu bwa Yesu Klisto, oyo ekopelisa mololi moko mwa moto mokozima te likolo lya bino.

6 O Nde bino bozangi bondimi, balukani epai ya Nkolo; belelani makasi epai ya Tata o nkombo ya Yesu, ete mbele bokoka komonono na bozangi mbindo, peto, malonga, mpe mpembe, esokwami bino na makila ma Mwana wa Mpate, o mokolo monene mpe mwa nsuka.

7 Mpe nalobi lisusu epai ya bino baye bowangani mabimisi ma Nzambe, mpe bolobi, ete masili, ete mabimisi mazali te, to mabikuli te, to makabo te, to bobikisi te, to bolobi na minoko te, mpe bolimboli bwa minoko te;

8 Tala nalobaki epai ya bino, ye oyo awangani makambo maye ayebi te nsango elamu ya Klisto; iyo, atangi te nkoma; mpe soko atangi asosoli yango.

9 Mpo etangi biso te ete Nzambe azali ye kaka lobi, lelo, mpe libela, mpe na ye ezali bobaluki te mpe elili ya bobongwani te?

10 Mpe sikawa, soko bino bokanisi mpenza mpo ya binomei nzambe moko oyo akobalukaka, mpe na oyo ezali elili ya bobongwani, nde bokanisi mpenza mpo ya binomei nzambe moko oyo azali te Nzambe moko wa makamwisi.

11 Kasi tala, nakolakisa epai ya bino Nzambe moko wa makamwisi, kutu Nzambe wa Abalayama, mpe Nzambe wa Yisaka, Nzambe wa Yakobo; mpe ezali kaka Nzambe ona oyo akelaki lola mpe mabele, na biloko binso bizali o mango.

12 Tala, akelaki Adama, mpe na Adama eyaki bokwei bwa moto. Na ntina ya bokwei bwa moto eyaki Yesu Klisto, kutu Tata mpe Mwana Mobali; mpe na ntina ya Yesu Klisto eyaki bosikoli bwa moto.

13 Mpe na ntina ya bosikoli bwa moto, boye boyaki na Yesu Klisto, bamememi mpo ya kozonga o kati ya miso mya Nkolo; iyo, eye ezali na wapi bato banso basikolami, zambi liwa lya Klisto limemi esalema bosekwi, boye bomemi esalema bosikoli boko uta o mpongi ezanga nsuka, uta o yango mpongi bato banso bakolamuka na nguya ya Nzambe, ekoyokana mondule; bakoya, bake mpe banene, mpe banso bakoteleme liboso lya esika ya ye, kosikolamaka mpe kokangolamaka uta o nsinga ya seko ya liwa, eye liwa ezali liwa lya ntango.

14 Mpe nde eyei ete bosambisi bwa Mosantu Moko likolo lya bango; mpe nde eyei ntango eye ye oyo azali mbindo akozala mbindo lisusu; mpe ye oyo azali sembo akozala sembo lisusu; ye oyo azali na esengo akozala na esengo lisusu; mpe ye oyo azangi esengo akozanga esengo lisusu.

15 Mpe sikawa, O bino banso baye bokanisi mpenza ete nzambe moko akoki kosala makamwisi te, nalingi kotuna na bino, makambo maye manso maleki, ya mango nalobeli? Nsuka esili eyei? Tala nalobaki epai ya bino, Te; mpe Nzambe asilisi te kozala Nzambe moko wa makamwisi?

16 Tala, makambo maye Nzambe asali mazali ma bokamwi te o miso mya biso? Iyo, mpe nani akoki kososola misala mya bokamwi mya Nzambe?

17 Nani akoloba ete ezalaki likamwisi te ete na liloba lya ye lola mpe mabele mazala; mpe na nguya ya liloba lya ye moto akelamaki na mputulu ya mabele; mpe na nguya ya liloba lya ye makamwisi masalemaki?

18 Mpe nani akoloba ete Yesu Klisto asalaki te makamwisi makasi mingi? Mpe esalamaki makamwisi mingi makasi na maboko ma bapostolo.

19 Mpe soko esalemaki makamwisi nde, boniboni Nzambe asilisi kozala Nzambe wa makamwisi mpe nzokande azali Mozali moko akobongwanaka te? Mpe tala, nalobaki epai ya bino akobongwanaka te; soko te alingaki kotika kozala Nzambe; mpe atikaki te kozala Nzambe, mpe azali Nzambe wa makamwisi.

20 Mpe ntina nini atiki kosala makamwisi o ntei ya bana ba bato ezali zambi ete bakulumwi o bozangi bondimi, mpe balongwi uta o nzela semba, mpe bayebi te Nzambe oyo basengelaki kolikia.

21 Tala, nalobaki epai ya bino ete oyo andimi na Klisto, kotiaka ntembe te, nini akosenge Tata o nkombo ya Klisto ekopesamela ye; mpe elako eye ezali epai banso, kutu kina o nsuka ya mabele.

22 Mpo tala, boye elobi Yesu Klisto, Mwana Mobali wa Nzambe epai ya bayekoli ba ye baye bakotikala, iyo, mpe lisusu na bayekoli banso ba ye, o boyoki bwa ebele: Kendeni o kati ya mokili mobimba, mpe teyani nsango elamu na ekelamo enso;

23 Mpe ye oyo andimi mpe abatisami akobikisama; kasi ye oyo andimi te akotumbolama;

24 Mpe bilembo biye bikolanda bango baye bakondima—o nkombo ya ngai bakobwaka libanda bazabulu; bakoloba na minoko mya sika; bakosimba nioka; mpe soko bameli eloko ebomaka ekosala bango mpasi te, bakotia maboko likolo lya bokoni mpe bakobika;

25 Mpe oyo akondima o nkombo ya ngai, kotiaka ntembe te, epai ya ye nakolakisa bosolo bwa maloba ma ngai, kutu kina o nsuka ya mabele.

26 Mpe sikawa, tala, nani akoki kotelemela misala mya Nkolo? Nani akoki kowangana maloba ma ye? Nani akoki kotelemela nguya ya bokasi bonso bwa Nkolo? Nani akotiola misala mya Nkolo? Nani akotiola bana ba Klisto? Tala, bino banso baye bozali batioli ba misala mya Nkolo, mpo bokokamwa mpe bokowa.

27 O nde tiolani te, mpe kamwani te, kasi yokemelani epai ya maloba ma Nkolo, mpe sengeni Tata o nkombo ya Klisto mpo ya nini bokozala na mposa. Tiani ntembe te, kasi zalani na kondima, mpe bandani lokola o ntango ya kala, mpe yakani epai ya Nkolo na motema mwa bino mobimba, mpe salani lobiko la binomei na bobangi mpe kolenge liboso lya ye.

28 Zalani na bwania o mikolo mwa momekano mwa bino; longolani binomei na bosoto bonso; sengeni te, ete bokoka kosilisa yango na bilulalula bya bino, kasi sengeni na molende moko mwa sikisiki, ete bokweya te o lisenginia, kasi ete bosalela Nzambe wa solo mpe wa bomoi.

29 Talani ete bobatisamani te na bozangi bolongobani; talani ete bolia te elambo ya Klisto na bozangi bolongobani; kasi talani ete bosala makambo manso na bolongobani, mpe bosala yango o nkombo ya Yesu Klisto, Mwana Mobali wa Nzambe wa bomoi; soko bosali eye, mpe botii molende kina o nsuka, bokobwakama ata moke te libanda.

30 Tala, nalobaki epai ya bino lokola soko nalobaki uta na bakufi; mpo nayebi ete bokozwa maloba ma ngai.

31 Sambisani ngai te na ntina ya bozangi bobongo mpenza bwa ngai, to tata wa ngai te, na ntina ya bozangi bobongo mpenza bwa ye, to bango baye bakomaki yambo ya ye te; kasi kutu pesani matondi epai ya Nzambe ete amonisa epai ya bino bozangi bobongo mpenza bwa biso, ete bokoka koyekola mpo ya kozala na bwania mingi koleka tozwi.

32 Mpe sikawa, tala, tokomi likundoli liye engebene na boyebi bwa biso, na minkoma miye mibiangemi o ntei ya biso Kiejipito ebongwana, ekitanisamaki mpe ebongolamaki na biso, engebene na lolenge la biso la elobeli.

33 Mpe soko palaki ya biso izalaki inene ikoka tolingaka kokoma na Kiebele; kasi Kiebele ebongolamaki na biso lokola; mpe soko tokaka kokoma yango na Kiebele, tala, bolingaki te kozala na bozangi bobongo mpenza o likundoli lya biso.

34 Kasi Nkolo ayebi makambo maye tokomi, mpe lisusu ayebi ete bato basusu boko te bayebi lokota la biso; mpe zambi ete bato basusu boko te bayebi lokota la biso, yango wana alengeleki nzela mpo ya bobongoli bwa lango.

35 Mpe makambo maye makomami ete tokoka kolongola bilamba bya biso ya makila ma bandeko ba biso, baye bakulumwi o bozangi bondimi.

36 Mpe tala, makambo maye, maye tozalaki na mposa etali bandeko ba biso, iyo, kutu bozongisi bwa bango o boyebi bwa Klisto, mazali engebene na nsambo ya basantu banso baye bafandi o mboka.

37 Mpe tika Nkolo Yesu Klisto andima ete nsambo ya bango iyanolama engebene na bondimi bwa bango; mpe tika Nzambe Tata amikundola boyokani boye asalaki elongo na ndako na Yisalaele; mpe tika apambola bango libela, o nzela ya bondimi likolo lya nkombo ya Yesu Klisto. Amene.