Makomi
Molomoni 4


Mokapo 4

Etumba mpe mobomano mokobi—Bato ba nkuna batumboli bato ba nkuna—Nkuna enene eluti koleka yambo o Yisalaele mobimba—Basi mpe bana bapesami mbeka na banzambe ba bikeko—Balamani babandaki kokombo Banefi liboso lya bango. Penepene na 363–375 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe sikawa esalemaki ete o mobu mwa nkama misato na tuku motoba na misato, Banefi bamataki elongo na mampinga ma bango kobunda na Balamani libanda lya mboka Mpamba.

2 Mpe esalemaki ete mampinga ma Banefi mabenganamaki lisusu nsima o mboka ya Mpamba. Mpe ntango elembaki bango, limpinga lyoko lya sika lya Balamani liyaki likolo lya bango; mpe bazwaka etumba yoko ya nsomo, mpenza ete Balamani babotoloki engumba Mpamba, mpe babomaki mingi ya Banefi, mpe bakamataki bato ba boloko mingi.

3 Mpe baye batikalaki bakimaki mpe basanganaki na bafandi ba engumba Teakumi. Sikawa engumba ya Teakumi elali o ndelo mpembeni ya libongo lya mbu; mpe lisusu penepene na engumba Mpamba.

4 Mpe ezalaki zambi mampinga ma Banefi mamataki epai ya Balamani ete babandaki kobeteme; ezalaka te mpo ya ena, Balamani bakokaki te kozala na nguya likolo lya bango.

5 Kasi, tala, masambisi ma Nzambe makoya likolo lya bato ba nkuna; mpe ezali na bato ba nkuna ete bato ba nkuna batumbolami; mpo ezali bato ba nkuna baye balamusi mitema mya bana ba bato mpo ya bosopi makila.

6 Mpe esalemaki ete Balamani basalaki bolengeli mpo ya koya kobunda na engumba Teakumi.

7 Mpe esalemaki ete o mobu mwa nkama misato na tuku motoba na minei Balamani bayaki kobunda na engumba Teakumi, ete bakoka kokamata engumba Teakumi lokola.

8 Mpe esalemaki ete batingolamaki mpe babenganamaki nsima na Banefi. Mpe emonoki Banefi ete babenganaka Balamani babandaki komikumisa na makasi ma bangomei, mpe bakendeki o makasi na bangomei, kozwa lokola engumba Mpamba.

9 Mpe sikawa makambo maye manso masalemaka, ezalaka nkoto na nkoto babomamaka ngambo na ngambo, Banefi mpe Balamani lokola.

10 Mpe esalemaki ete mibu nkama misato na tuku motoba na motoba milekaka, mpe Balamani bayaki lisusu likolo lya Banefi kobunda; mpe nzokande Banefi bayambolaki te bobe boye basalaka, kasi bakobaki o nkuna ya bango ntango inso.

11 Mpe ekoki te mpo ya lolemo kolimbola, to mpo ya moto kokoma bolimboli boko bobongo nie bwa likambo lya nsomo lya makila mpe mobomano liye lizalaki o ntei ya bato, Banefi mpe Balamani lokola; mpe motema monso mokomaki mokasi, boye ete basepelaki na bosopi makila ntango inso.

12 Mpe ezalaka mokolo moko te nkuna enene boye o ntei ya bana ba Lehi, to kutu o ntei ya ndako ya Yisalaele, engebene na maloba ma Nkolo, lokola ezalaki o ntei ya bato baye.

13 Mpe esalemaki ete Balamani bakamataki engumba Mpamba, mpe eye zambi motango mwa bango molekaki motango mwa Banefi.

14 Mpe batambolaka lisusu o boso kobunda na engumba Teakumi, mpe babenganaki bafandi libanda lya yango, mpe bakamataki bato ba boloko mingi basi mpe bana lokola, mpe babonzaki bango lokola mbeka epai ya banzambe ba bikeko ba bango.

15 Mpe esalemaki ete o mobu mwa nkama misato na tuku motoba na sambo, Banefi esilikaki bango zambi Balamani bapesaka mbeka basi mpe bana ba bango, ete bakendeki kobunda na Balamani na nkanda enene, mpenza ete babeteki lisusu Balamani, mpe babenganaki bango libanda lya mboka ya bango.

16 Mpe Balamani bayaki lisusu te kobunda na Banefi kina o mobu mwa nkama misato na tuku sambo na mitano.

17 Mpe o mobu moye bokitaki lisusu kobunda na Banefi na nguya inso ya bango; mpe batangemaki te na ntina ya bonene bwa motango mwa bango.

18 Mpe uta o ntango eye mpe nsima Banefi balongaki nguya te likolo lya Balamani; kasi babandaki kokombomo mosika na bango kutu lokola limio liboso lya moi.

19 Mpe esalemaki ete Balamani bakitaki lisusu kobunda na engumba Mpamba, mpe etumba ya nsomo mpenza ebundamaki o mboka Mpamba, o yango babeteki Banefi.

20 Mpe bakimaki lisusu uta o liboso lya bango, mpe bayaki o engumba Boaza; mpe kuna batelemelaki Balamani na mpiko mpenza, mpenza ete Balamani bakokaki te kobete bango kina bayaki lisusu mbala ya ibale.

21 Mpe eyaka bango mbala ya ibale, Banefi babenganamaki mpe babomamaki bobomi bonene mpenza; basi ba bango mpe bana ba bango bapesamaki lisusu mbeka epai ya banzambe ba bikeko.

22 Mpe esalemaki ete Banefi bakimaki lisusu uta o liboso lya bango, kokamataka bato elongo na bango, o mboka inene mpe mboka ike.

23 Mpe sikawa ngai, Molomoni, komonoko ete Balamani bazalaki penepene na kokweyisa mboka, yango wana nakendeki na ngomba Simi, mpe nakamataki makundoli manso maye Amaloni abombaka epai ya Nkolo.