Makomi
Molomoni 7


Mokapo 7

Molomoni abiangi Balamani ba mikolo mya nsuka bandima na Klisto, bayamba nsango elamu ya ye, mpe babikisama—Banso baye bandimi Biblia bakondima lokola Buku ya Molomoni. Penepene na 385 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe sikawa, tala, nalingi koloba mwa moke epai ya montika mwa bato baye babatelamaki, soko ezali boye ete Nzambe apesi epai ya bango maloba ma ngai, ete bakoka koyeba makambo ma batata ba bango; iyo, nalobaki epai ya bino, bino montika mwa ndako ya Yisalaele; mpe iye izali maloba maye nalobi:

2 Yebani ete bozali ba ndako ya Yisalaele.

3 Yebani ete bosengeli koya epai ya boyamboli, to bokoki te kobikisama.

4 Yebani ete bosengeli kolalisa o nse mandoki ma bino ma etumba, mpe kosepela lisusu te na bosopi makila, mpe kokamata mango lisusu te, longola se soko ezali ete Nzambe atindi bino.

5 Yebani ete bosengeli koya na boyebi bwa batata ba bino, mpe koyambola masumu mpe mabe ma bino manso, mpe kondima na Yesu Klisto, ete azali Mwana Mobali wa Nzambe, mpe ete abomamaki na Bayuda; mpe na nguya ya Tata asekwaki, na yango alongaki elonga likolo lya lilita; mpe lisusu na ye etengu ya liwa eminami mpenza.

6 Mpe amemi esalema bosekwi bwa bakufi, na yango moto asengeli kosekwa mpo ya koteleme liboso lya kiti ya ye ya bosambisi.

7 Mpe amemi esalema bosikoli bwa mokili, na yango ye oyo amononi na elindo te liboso lya ye o mokolo mwa bosambisi ekopesama epai ya ye kofanda o miso mya Nzambe o bokonzi bwa ye, mpo ya koyemba masanzoli makosila te elongo na lingomba lya bayembi likolo, epai ya Tata, mpe epai ya Mwana, mpe epai ya Molimo Mosantu, baye bazali Nzambe moko, o bozali boko bwa esengo boye bozangi nsuka.

8 Yango wana yambolani, mpe batisamani o nkombo ya Yesu, mpe tiani nkanga likolo lya nsango elamu ya Klisto, eye ekotiama liboso lya bino, o likundoli liye kaka te kasi lisusu o likundoli liye likoya epai ya Bapaganu uta na Bayuda, mpe liye likundoli likoya uta na Bapaganu epai ya bino.

9 Mpo tala, eye ekomami mpo ya ntina ete bokoka kondima ena; mpe soko bondimi ena bokondima eye lokola; mpe soko bondimi eye bokoyeba etali batata ba bino, mpe lisusu misala mya bokamwi miye misalemaki na nguya ya Nzambe o ntei ya bango.

10 Mpe bokoyeba lisusu ete bozali montika moko mwa nkona ya Yakobo; yango wana botangemi o ntei ya bato ba boyokani bwa yambo; mpe soko boye ezali ete bondimi na Klisto, mpe bobatisami, yambo na mai, nde na moto mpe na Molimo Mosantu, kolandaka ndakisa ya Mobikisi wa biso, engebene na ena eye atindi biso, ekozala bolamu na bino o mokolo mwa bosambisi. Amene.