Makomi
Molomoni 1


Buku ya Molomoni

Mokapo 1

Amaloni ateyi Molomoni etali makundoli ma bule—Etumba ebandi o kati ya Banefi mpe Balamani—Banefi basato bakamatami mosika—Nkuna, bozangi bondimi, bondoki, nkisi eluti. Penepene na 321–326 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe sikawa ngai, Molomoni, nasali likundoli lya makambo maye namonoki mpe nayokaki lokola, mpe nabiangi lyango Buku ya Molomoni.

2 Mpe penepene na ntango eye Amaloni abombaki likundoli epai ya Nkolo, ayaki epai ya ngai, (ngai kozalaka penepene na mibu zomi, mpe nabandaki koyekolama nsima ya boyekoli bwa bato ba ngai) mpe Amaloni alobaki epai ya ngai: Namoni ete ozali mwana moko wa limemia, mpe ozali mbangu na kotala;

3 Yango wana, ntango okomi penepene na mibu tuku mibale na minei nalingi ete omikundola makambo maye omoni etali bato baye; mpe ntango okomi na mibu mina kende o mboka Atumi, epai ya ngomba eye ekobiangema Simi; mpe kuna ebombisi ngai epai ya Nkolo minkoma minso mya bule mitali bato baye.

4 Mpe tala, okokamata palaki ya Nefi epai ya yomei, mpe etikali ekotika yo o esika wapi izali; mpe okokoma likolo lya palaki ya Nefi makambo manso maye omonoki matali bato baye.

5 Mpe ngai, Molomoni, kozalaka eboto moko ya Nefi (mpe nkombo ya tata wa ngai ezalaki Molomoni), namikundolaki makambo Amaloni atindaki ngai.

6 Mpe esalemaki ete ngai, ekomaki ngai na mibu zomi na moko, namememeki na tata wa ngai o kati ya mboka ya epai ya sudi, kutu o mboka ya Zalayemila.

7 Etando mobimba ya mboka ekomaki ezipama na ndako inene, mpe bato bazalaki na motango penepene, lokola soko ezalaki zelo ya mbu.

8 Mpe esalemaki ete o mobu moye ebandaki kozala etumba yoko o kati ya Banefi, baye bakwaki Banefi mpe Bayakobi mpe Bayosefe mpe Bazolami; mpe etumba eye ezalaki o kati ya Banefi, mpe Balamani mpe Balemweli mpe Bayisamaele.

9 Sikawa Balamani mpe Balemweli mpe Bayisamaele babiangemaki Balamani, mpe biteni bibale bizalaki Banefi mpe Balamani.

10 Mpe esalemaki ete etumba ebandaki o ntei ya bango o ndelo ya Zalayemila, mpembeni ya mai ma Sidoni.

11 Mpe esalemaki ete Banefi basangisaka elongo motango moko monene mwa bato, kutu koleka motango mwa nkoto tuku isato. Mpe esalemaki ete bazalaki o mobu moye kaka motango moko mwa bitumba, o byango Banefi babeteki Balamani mpe babomaki mingi ya bango.

12 Mpe esalemaki ete Balamani balongolaki mwango mwa bango, mpe etiamaki kimia o mboka; kimia etikalaki mpo ya ntaka ya penepene na mibu minei, ete ezalaki te bosopi makila.

13 Kasi nkuna elutaki likolo lya etando mobimba ya mboka, mpenza ete Nkolo alongolaki bayekoli balingami ba ye, mpe misala mya makamwisi mpe mya bobikisi misilaki na ntina ya masumu ma bato.

14 Mpe ezalaki makabo te uta na Nkolo, mpe Molimo Mosantu ayaki likolo lya moko te, na ntina ya nkuna mpe bozangi bondimi bwa bango.

15 Mpe ngai, kozalaka na mibu zomi na mitano mpe kozalaka mwa moke na makanisi ma limemia, bongo nabimelamaki na Nkolo, mpe namekaki mpe nayebaki bolamu bwa Yesu.

16 Mpe nasalaki makasi mpo ya koteya epai ya bato baye, kasi monoko mwa ngai mokangemaki, mpe napekisamaki ete nateya epai ya bango; mpo tala na bolingi batombokaki na Nzambe wa bango; mpe bayekoli balingami balongolamaki libanda lya mboka, na ntina ya bobe bwa bango.

17 Kasi natikalaki o ntei ya bango, kasi napekisamaki koteya epai ya bango, na ntina ya bokasi bwa mitema mya bango; mpe na ntina ya bokasi bwa mitema mya bango mboka elakelamaki botutu mpo ya ntina ya bango.

18 Mpe bayongoli baye ba Gadiatoni, baye bazalaki o ntei ya Balamani, bafulusaki mboka, mpenza ete bafandi ba yango babandaki kobomba bomengo bwa bango o mabele; mpe bokomaki boselu zambi Nkolo alakelaka mboka botutu, ete bakokaki kosimba bwango te, to kokanga bwango te lisusu.

19 Mpe esalemaki ete izalaki bondoki, mpe nkisi, mpe moyeke; mpe nguya ya moko wa bobe esalemaki likolo lya etando mobimba ya mboka, kutu mpo ya bokokisi bwa maloba manso ma Abinadi, mpe Samwele Molamani lokola.