Makomi
Mormon 6


Mokapo 6

Banefi basangani na mboka ya Kumola mpo na bitumba ya nsuka—Mormon abombi masolo ya makomi ya bule na ngomba ya Kumola—Balamani bazali balongi, mpe ekolo ya Banefi ebebisami—Nkoto nkama na nkama babomami na mompanga. Penepene na 385 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe sikawa nasukisi lisolo ya makomi na ngai mpo na oyo etali bobebisami ya bato na ngai, Banefi. Mpe esalemaki ete totambolaki liboso ya Balamani.

2 Mpe ngai, Mormon, nakomaki mokanda moko epayi ya mokonzi ya Balamani, nazalaki na mposa na ye ete apesa biso nzela ete tokoka kosangisa bato na biso na mboka ya Kumola, mpembeni na ngomba moke oyo ebiangamaki Kumola, mpe ete kuna tokoka kobunda na bango etumba.

3 Mpe esalemaki ete Mokonzi na Balamani apesaki ngai nzela na likambo oyo nazalaki na yango mposa.

4 Mpe esalemaki ete totambolaki kokende na mboka ya Kumola, mpe kuna totelemisaki biema na biso nzinganzinga mpembeni na ngomba ya Kumola; mpe ezalaki mboka moko ya mai, bibale, mpe maziba mingi; mpe awa tozalaki na elikya ya kozwa litomba likolo ya Balamani.

5 Mpe ntango mibu nkama misato na ntuku mwambe na minei elekaki, tosangisaki ndambo nyonso oyo etikalaki ya bato na biso na mboka ya Kumola.

6 Mpe esalemaki ete ntango tosangisaki bato na biso nyonso na lingomba moko na mboka ya Kumola, tala ngai, Mormon, nabandaki kokoma mobange; mpe lokola nayebaki ete ezalaki etumba ya nsuka ya bato na ngai, mpe lokola natindamaki na Nkolo ete napesa nzela te ete masolo ya makomi oyo ekitanisamaki na batata na biso, oyo ezalaki ya bule, makweya kati na maboko ya Balamani, (mpo Balamani balingaki kobebisa yango) boye nasalaki lisolo ya makomi oyo uta na bapalaki ya Nefi, mpe nabombaki na ngomba ya Kumola masolo ya makomi nyonso oyo epesamaki na ngai na maboko ya Nkolo, longola se mwa bapalaki moke oyo napesaki epayi ya mwana mobali na ngai Moroni.

7 Mpe esalemaki ete bato na ngai, elongo na basi na bango mpe bana na bango, bamonaki sikawa mampinga ya Balamani kotambolaka epayi na bango; mpe na bobangi ya nsomo ya liwa oyo etondisaka ntolo ya bato ya nkuna nyonso, bazelaki mpo na koyamba bango.

8 Mpe esalemaki ete Balamani bayaki kobunda na biso, mpe moto nyonso atondaki na nsomo na ntina ya bonene ya motango na bango.

9 Mpe esalemaki ete bakweyaki likolo ya bato na ngai na mompanga, mpe makula, mpe likonga, mpe epasola, mpe ndenge nyonso ya bibundeli ya bitumba.

10 Mpe esalemaki ete bato na ngai babomamaki, iyo, kutu lisusu nkoto zomi ya bato na ngai oyo bazalaki elongo na ngai, mpe nakweyaki na mpota na katikati na bango, mpe balekaki mpembeni na ngai mpe batiaki nsuka na bomoi na ngai te.

11 Mpe ntango esilaki bango koleka mpe ebomaki bango bato na ngai nyonso longola se ntuku mibale na banei kati na biso, (na kati na bango ezalaki mwana mobali na ngai Moroni) mpe biso nsima ya kobikisama na liwa uta na kati ya bato na biso, tomonaki na mokolo ya nsima, ntango Balamani bazongaki epayi na banganda na bango, uta na nsonge ya ngomba moke ya Kumola, nkoto zomi ya bato na ngai baoyo babomamaki, oyo bazalaki liboso na ngai.

12 Mpe tomonaki lisusu nkoto zomi ya bato na ngai oyo bakambamaki na mwana mobali na ngai Moroni.

13 Mpe tala, nkoto zomi ya bato ya Gidigidoni bakweyaki, mpe ye lisusu kati na bango.

14 Mpe Lama akweyaki elongo na nkoto zomi na ye; mpe Giligali akweyaki elongo na nkoto zomi na ye; mpe Lima akweyaki elongo na nkoto zomi na ye; mpe Yenumi akweyaki elongo na nkoto zomi na ye; mpe Kumeniya, mpe Moroniya, mpe Ationumi, mpe Sibilomi, mpe Semi, mpe Yosi, bakweyaki moko na moko elongo na nkoto zomi na bango.

15 Mpe esalemaki ete ezalaki na bakambi zomi basusu oyo bakweyaki na mompanga, moto na moto elongo na nkoto zomi na ye; iyo, kutu bato na ngai nyonso, longola se ntuku mibale na banei oyo wana bazalaki elongo na ngai, mpe lisusu mwa moke oyo bakimaki kati na bikolo ya sudi, mpe mwa moke oyo balongwaki epayi na biso mpo na kokende epayi na Balamani, nyonso bakweyaki; mpe mosuni, mpe mikuwa, mpe makila na bango mapanzanaki likolo ya etando ya mabele, esundolamaki bango na maboko na bango oyo babomaki bango mpo na kopola likolo ya mboka, mpe kokoma potopoto mpe kozonga na mama na bango ya mabele.

16 Mpe molimo na ngai mopasukaki na nsomo, na ntina ya bobomi ya bato na ngai, mpe nagangaki:

17 O bino bato na bonzenga, lolenge boni ekokaki bino kolongwa uta na nzela ya Nkolo! O bino bato na bonzenga, lolenge boni ekokaki bino kobwaka Yesu, oyo atelemaki na maboko efungwami mpo na koyamba bino!

18 Tala, soki bosalaka oyo te, bolingaki kokweya te. Kasi tala, bokwei, naleli bobungi na bino.

19 O bino bana mibali mpe bana basi ya bonzenga, bino batata mpe bamama, bino mibali mpe basi, bino bato na bonzenga, lolenge boni ezali ete bokokaki kokweya!

20 Kasi tala, bokei, mpe mawa na ngai makoki kozongisa bino te.

21 Mpe kala mingi te mokolo ezali koya ete kufa na bino ekolata bozangi kufa, mpe nzoto oyo ezali sikawa kopola na bopoli esengeli kala mingi te kokoma nzoto ezanga bopoli; mpe nde bosengeli kotelema liboso ya kiti ya bosambisi ya Klisto, mpo na kosambisama engebene na misala na bino; mpe soki ezali ete bozali sembo, nde bopambolami elongo na batata na bino oyo bakendaki liboso na bino.

22 O soki boyambolaka liboso ya bobebisami monene boye eyaki likolo na bino. Kasi tala, bokei, mpe Tata, iyo, Tata ya Seko ya lola, ayebi ezalela na bino; mpe akosala na bino engebene na boyengebene mpe boboto na ye.

Bimisa na lokasa