Makomi
Mormon 2


Mokapo 2

Mormon akambi mampinga ya Banefi—Makila mpe kobomaboma ekombi mboka—Banefi baleli mpe basali matanga na mawa ya baoyo bakweisami—Mokolo na bango ya ngolu moleki—Mormon azwi bapalaki ya Nefi—Etumba ekobi. Penepene na mibu 327–350 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe esalemaki ete na mobu se moko wana etumba ebandaki kozala lisusu kati na Banefi mpe Balamani. Mpe ata nazalaki elenge, nazalaki mbinga ya moto na nzoto; boye bato ya Nefi baponaki ngai ete nazala mokambi na bango, soki te mokambi ya mampinga na bango.

2 Boye esalemaki na mobu na ngai ya zomi na motoba nakendaki na moto ya mampinga ya Banefi, kobunda na Balamani; boye mibu nkama misato na ntuku mibale na motoba elekaki.

3 Mpe esalemaki ete na mobu ya nkama misato na ntuku mibale na nsambo, Balamani bayaki likolo na biso na nguya monene koleka, na lolenge ete babangisaki mampinga na ngai; boye balingaki te kobunda, mpe babandaki kobendama epayi na bikolo ya nordi.

4 Mpe esalemaki ete tokomaki na engumba ya Angola, mpe tokamataki engumba yango, mpe tosalaki bolengeli mpo na komibatela na Balamani. Mpe esalemaki ete tolendisaki engumba na makasi nyonso na biso; kasi ata bisika nyonso ya makasi na biso Balamani bayaki likolo na biso mpe babimisaki biso libanda ya engumba.

5 Mpe babimisaki biso lisusu libanda ya mboka ya Dawidi.

6 Mpe totambolaki mpe toyaki na mboka ya Yosua, oyo ezalaki na ndelo ya westi mpembeni na libongo ya mbu.

7 Mpe esalemaki ete tosangisaki bato na biso na lombangu lokola ekokaki kosalema, ete tokoka kozwa bango esika moko lokola moto moko.

8 Kasi tala, mboka yango etondaki na bayongoli mpe Balamani; mpe atako bobebisami monene boye ediembelaki likolo ya bato na ngai, bango bayambolaki te uta na misala mabe na bango; boye makila mpe kobomaboma epanzanaki epayi nyonso na etando ya mboka mobimba, ezala na ngambo ya Banefi mpe na ngambo ya Balamani lokola; mpe ezalaki bobongoli ya makambo mpenza epayi nyonso na etando mobimba ya mboka mobimba.

9 Mpe sikawa, Balamani bazalaki na mokonzi moko, mpe nkombo na ye ezalaki Alona; mpe ayaki kobunda na biso elongo na limpinga moko ya bato nkoto ntuku minei na minei. Kasi tala natelemelaki ye na nkoto ntuku minei na mibale. Mpe esalemaki ete nabetaki ye elongo na limpinga na ngai ete akimaki liboso na ngai. Mpe tala, nyonso oyo esalemaki, mpe mibu nkama misato na ntuku misato elekaki.

10 Mpe esalemaki ete Banefi babandaki koyambola uta na mabe na bango, mpe babandaki komilela-lela kutu lokola esakolamaki na profeta Samwele; mpo tala, moto moko te akokaki kobomba oyo ezalaki ya ye moko, na ntina ya bayibi, mpe bayongoli, mpe babomi, mpe ntoki ya soloka, mpe bonganga-nkisi oyo ezalaki kati na mboka.

11 Boye matanga mpe boleli ebandaki kozala kati na mboka mobimba na ntina ya makambo oyo, mpe mingi koleka na kati ya bato ya Nefi.

12 Mpe esalemaki ete ntango ngai, Mormon, namonaki boleli mpe matanga na bango, mpe mawa na bango liboso ya Nkolo, motema na ngai mobandaki kosepela kati na ngai, mpo nayebaki boboto mpe motema molai ya Nkolo, boye nakanisaki ete akotondisama na boboto mpo na bango ete bakoma lisusu bato ya sembo.

13 Kasi tala, bosepeli boye na ngai ezalaki mpamba, mpo mawa na bango ezalaki te mpo na komema kino na boyamboli, na ntina ya bolamu ya Nzambe; kasi ezalaki na esika kutu mawa ya baoyo bakweisamaki, mpo Nkolo alingaki kopesa bango nzela te ete ntango nyonso bazala na bosepeli kati na masumu.

14 Mpe bayaki te epayi ya Yesu na mitema mibukana mpe milimo ya mawa, kasi balakelaki Nzambe mabe, mpe batombelaki kokufa. Nzokande balingaki kobunda na mompanga mpo na bomoi na bango.

15 Mpe esalemaki ete mawa na ngai mazongaki epayi na ngai lisusu, mpe namonaki ete mokolo ya ngolu molekaki mpo na oyo etali bango, ezala na ntango mpe na molimo mpe lokola; mpo namonaki nkoto na nkoto na bango bakatamaki na nse wana ezalaki bango na botomboki ya polele na Nzambe na bango, mpe bamatisamaki meke lokola nyei likolo ya etando ya mboka. Boye mibu nkama misato na ntuku minei na minei elekaki.

16 Mpe esalemaki ete na mobu ya nkama misato na ntuku minei na mitano Banefi babandaki kokima liboso ya Balamani; mpe balandamaki kino bakomaki kutu na mboka ya Yasoni, yambo ete bakoka kokanga bango na bokimi na bango.

17 Mpe sikawa, engumba ya Yasoni ezalaki penepene na mboka wapi Amaloni abombisaka masolo ya makomi epayi ya Nkolo, ete makoka kobebisama te. Mpe tala nakendaki engebene na liloba ya Amaloni mpe nakamataki bapalaki ya Nefi, mpe nasalaki lisolo ya makomi engebene na maloba ya Amaloni.

18 Mpe likolo ya bapalaki ya Nefi nasalaki lisolo moko mobimba ya nkuna mpe bonsomo nyonso; kasi likolo ya bapalaki oyo naboyaki kosala lisolo moko mobimba ya nkuna mpe bonsomo na bango, mpo tala, ntango nyonso liboso ya miso na ngai ezalaki se makambo ya nkuna mpe bonsomo liboso ya miso na ngai uta kutu ntango nazwaki makoki ya kososola banzela ya moto.

19 Mpe nazali na lisuma na ntina ya nkuna na bango; mpo motema na ngai etondaki na mawa na ntina ya nkuna na bango, mikolo na ngai nyonso; nzokande, nayebi ete nakotombolama likolo na mokolo ya nsuka.

20 Mpe esalemaki ete na mobu oyo bato ya Nefi balandamaki mpe babenganamaki lisusu. Mpe esalemaki ete tobenganamaki kino tokomaki epayi na nordi na mboka oyo ebiangamaki Semi.

21 Mpe esalemaki ete tokomisaki engumba ya Semi esika moko ya makasi, mpe tosangisaki bato na biso mingi lokola ekokaki kosalema, ete mbele tokoka kobikisa bango uta na bobebisami.

22 Mpe esalemaki ete na mobu ya nkama misato na ntuku minei na motoba babandaki koya likolo na biso lisusu.

23 Mpe esalemaki ete nalobelaki bato na ngai, mpe nasengaki bango na makasi monene, ete basengeli kotelema na mpiko liboso ya Balamani, mpe kobunda mpo na basi na bango, mpe bana na bango, mpe ndako na bango, mpe bipayi na bango.

24 Mpe maloba na ngai elamusaki bango mwa moke na mpiko, na lolenge ete bakimaki te uta na liboso ya Balamani, kasi batelemaki na mpiko mpo na kobunda na bango.

25 Mpe esalemaki ete elongo na limpinga moko ya nkoto ntuku misato tobundaki na limpinga moko ya nkoto ntuku mitano. Mpe esalemaki ete totelemaki liboso na bango na ngwi ya lolenge moko ete bakimaki uta na liboso na biso.

26 Mpe esalemaki ete ntango bakimaki tolandaki bango elongo na mampinga na biso, mpe tokutanaki na bango lisusu, mpe tobetaki bango; nzokande bokasi ya Nkolo ezalaki elongo na biso te; iyo, totikamaki biso moko, ete Molimo ya Nkolo atikalaki na biso te; boye tokomaki bato balemba lokola bandeko na biso.

27 Mpe motema na ngai moyokaki mawa na ntina ya likambo ya mawa monene ya bato na ngai, na ntina ya nkuna mpe bonsomo na bango. Kasi tala, tokendaki kobunda na Balamani mpe bayongoli ya Gadiatoni, kino tokamataki lisusu mboka ya bosangoli libula na biso.

28 Mpe mobu ya nkama misato na ntuku minei na libwa elekaki. Mpe na mobu ya nkama misato na ntuku mitano, tosalaki boyokani elongo na Balamani mpe bayongoli ya Gadiatoni, na boye wapi bamboka ya libula na biso ekabolamaki.

29 Mpe Balamani bapesaki epayi na biso mboka epayi na nordi, iyo, kutu kino na nzela ya nkaka oyo ekambaka na mboka epayi na sudi. Mpe topesaki epayi ya Balamani mboka nyonso epayi na sudi.

Bimisa na lokasa