Makomi
Mormon 5


Mokapo 5

Mormon akambi lisusu mampinga ya Banefi na bitumba ya makila mpe kobomaboma—Buku ya Mormon ekobima mpo na kondimisa Yisalaele mobimba ete Yesu azali Klisto—Na ntina ya bozangi boyambi, Balamani bakopanzama, mpe Molimo akotika kobunda na bango—Bakozwa nsango malamu uta na baoyo bazali Bayuda-te na mikolo ya nsuka. Penepene na mibu 375–384 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe esalemaki ete nakendaki na kati ya Banefi, mpe nayambolaki uta na ndai oyo nasalaki ete nakosalisa bango lisusu te; mpe bapesaki ngai lisusu kozala komanda ya mampinga na bango, mpo bamonaki ngai lokola soki nakokaki kobikisa bango uta na mitungisi na bango.

2 Kasi tala, nazangaki elikya, mpo nayebaki masambisi ya Nkolo oyo ekoya likolo na bango; mpo bayambolaki te uta na mabe na bango, kasi babundaki mpo na bomoi na bango na kozangaka kobelela Ezali oyo akelaki bango.

3 Mpe esalemaki ete Balamani bayaki kobunda na biso na ntango tokimaki na engumba ya Yaladene; kasi tala, bazongisamaki nsima ete bakamataki te engumba yango na ntango wana.

4 Mpe esalemaki ete bayaki lisusu kobunda na biso, mpe tosimbaki engumba. Mpe ezalaki lisusu na bingumba misusu oyo esimbamaki na Banefi, oyo kani bisika ya makasi bipekisaki bango ete bakokaki te kokota kati na ekolo oyo ezwamaki liboso na biso, mpo na kobebisa bafandi ya mboka na biso.

5 Kasi esalemaki ete bamboka nyonso epayi wapi tolekaki, mpe bafandi na yango bazalaki te ya kosangisama na kati, ebebisamaki na Balamani, mpe mboka ya minene, mpe mboka ya mike mike, mpe bingumba na bango bizikaki na moto; mpe boye mibu nkama misato na ntuku sambo na libwa elekaki.

6 Mpe esalemaki ete na mobu ya nkama misato na ntuku mwambe Balamani bayaki lisusu kobunda etumba na biso, mpe totelemelaki bango na mpiko; kasi nyonso ezalaki na mpamba, mpo mitango na bango ezalaki mingi ete baniataki bato ya Banefi na nse ya makolo na bango.

7 Mpe esalemaki ete tokimaki lisusu mbangu, mpe bango oyo bapotaki mbangu mingi koleka Balamani bakimaki, mpe bango oyo bapotaki mbangu koleka Balamani te babomamaki na nse mpe babebisamaki.

8 Mpe sikawa tala, ngai, Mormon, nazali na mposa te ya kopasola milimo ya bato na kobwakaka liboso na bango likambo ya nsomo ya lolenge oyo ya makila mpe kobomaboma lokola etiamaki liboso ya miso na ngai; kasi ngai, lokola nayebaki ete makambo oyo esengeli koyebisama, mpe ete makambo nyonso oyo ebombama esengeli kobimisama likolo ya nsonge ya ndako—

9 Mpe lisusu ete boyebi ya makambo oyo esengeli koya epayi ya montika ya bato oyo, mpe lisusu epayi na Bayuda-te, baoyo Nkolo alobi bakopanza bato oyo, mpe bato oyo bakotangama lokola mpamba na kati na bango—boye nakomi bokuse moko ya moke, mpo nazali komeka kopesa nsango mobimba ya makambo oyo namonaki, na ntina ya motindo oyo nazwaki, mpe lisusu ete bokoka kozala na mawa monene mpenza na ntina ya nkuna ya bato oyo te.

10 Mpe sikawa tala, oyo nalobi epayi na nkona na bango, mpe lisusu na Bayuda-te oyo bazali kotala malamu ndako ya Yisalaele, oyo basosoli mpe bayebi uta wapi mapamboli na bango mayaka.

11 Mpo nayebi ete bango ya lolenge oyo bakoyoka mawa mpo na likambo ya mawa ya ndako ya Yisalaele; iyo, bakoyoka mawa mpo na bobebisami ya bato oyo; bakoyoka mawa ete bato oyo bayambolaki te ete bakoka koyambama kati na maboko ya Yesu.

12 Sikawa makambo oyo ekomami mpo na montika ya ndako ya Yakobo; mpe ekomami na lolenge oyo, mpo eyebani na Nzambe ete nkuna ekomema yango epayi na bango te; mpe esengeli kobombama mpo na Nkolo ete makoka kobima na ntango esengeli ya ye moko.

13 Mpe oyo ezali motindo oyo nazwaki; mpe tala, makobima engebene na motindo ya Nkolo, ntango ekomona ye ete elongobani na bwania na ye.

14 Mpe tala, makokende epayi ya bazanga bondimi ya Bayuda; mpe mpo na ntina oyo makokende—ete bakoka kondimisama ete Yesu azali Klisto, Mwana ya Nzambe ya bomoi; ete Tata akoka kokokisa, na nzela ya Molingami koleka nyonso na ye, mwango monene mpe ya seko na ye, na kozongisaka Bayuda, soki te ndako nyonso ya Yisalaele, na mboka ya libula na bango, oyo Nkolo Nzambe na bango apesaki epayi na bango, mpo na kokokisa liyokani na ye;

15 Mpe lisusu ete nkona ya bato oyo bakoka na mobimba kondima nsango malamu na ye, oyo ekokende epayi na bango uta na Bayuda-te; mpo bato oyo bakopanzama, mpe bakokoma bato boko baindo, ya bosoto, mpe ya mbindo, koleka bolimboli ya oyo wana ezalaki naino na kati na biso, iyo, kutu oyo wana ezalaki na kati ya Balamani, mpe oyo na ntina ya bozangi boyambi mpe bosambeli bikeko na bango.

16 Mpo tala, Molimo ya Nkolo asilaki kotika kobunda na batata na bango; mpe bazangi Klisto mpe Nzambe kati na mokili; mpe bapusami mosika lokola mpumbulu liboso ya mopepe.

17 Bazalaki kala bato ya kosepela, mpe bazalaki na Klisto lokola mobateli na bango; iyo, bakambamaki na Nzambe Tata.

18 Kasi sikawa, tala, bakambemi na Satana, kutu lokola mpumbulu epusami liboso ya mopepe, soki te lokola masuwa maningisami na mbonge, kozangaka elamba oyo etambwisaka yango to longo, soki te kozangaka eloko mpo na koyenda ye; mpe kutu lokola ezali ye, bazali nde boye.

19 Mpe tala, Nkolo abombi mapamboli na bango, oyo bakokaki kozwa na mboka yango, mpo na Bayuda-te oyo bakozwa mboka.

20 Kasi tala, ekosalema ete bakobenganama mpe bakopanzama na baoyo bazali Bayuda-te; mpe ekosila bango kobenganama mpe kopanzama na Bayuda-te, tala, nde nsima Nkolo akomikundola liyokani oyo asalaki na Abalayama mpe na ndako nyonso ya Yisalaele.

21 Mpe lisusu Nkolo akomikundola sambo ya basembo, oyo epesamaki epayi na ye mpo na bango.

22 Mpe bongo, O bino baoyo bozali Bayuda-te, lolenge boni ekoki bino kotelema liboso ya nguya ya Nzambe, longola se soki bokoyambola mpe bokobaluka uta na nzela na bino ya mabe?

23 Eyebi bino te ete bozali kati na maboko ya Nzambe? Eyebi bino te ete azali na nguya nyonso, mpe soki apesi kaka motindo monene na ye mabele makolingama esika moko lokola mokanda oyo elingami?

24 Boye, boyambola, mpe bomikitisa liboso na ye, mbele abima na boyengebene mpo na kosambisa bino—mbele montika ya nkona ya Yakobo moya na kati na bino lokola nkosi, mpe akopasola bino na biteni, mpe ezali na moto moko te mpo na kobikisa bino.

Bimisa na lokasa