Makomi
Alama 49


Mokapo 49

Balamani kokotelaka bakoki te kokamata bingumba bilendisama bya Amoniya mpe Noa—Amalikia alakeli Nzambe botutu mpe alapi komele makila ma Moloni—Elamani mpe bandeko ba ye bakobi kolendisa Eklezia. Penepene na 72 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete, o sanza ya zomi na yoko ya mobu mwa zomi na libwa, o mokolo mwa zomi mwa sanza, mampinga ma Balamani mamononoki kobelemeke ona mboka ya Amoniya.

2 Mpe tala, engumba yango etongamaki lisusu, mpe Moloni atelemisaki limpinga lyoko penepene na ndelo ya engumba, mpe babwakaki likolo bosoto zingazinga mpembeni mpo ya kobatela bango uta o makonga mpe mabanga ma Balamani; mpo tala, babundaki na mabanga mpe makonga.

3 Tala, nalobaki ete engumba ya Amoniya etongamaki lisusu. Nalobi epai ya bino, iyo, ete etongamaki lisusu ndambo; mpe zambi Balamani babebisaka yango mbala yoko mpo ya bobe bwa bato, babanzaki ete elingaki lisusu kokoma mosuni moko mwa petepete mpo ya bango.

4 Kasi tala, boniboni enene ezalaki bosiswi bwa bango; mpo tala, Banefi batimolaka mpe batombolaka etutu ya mabele zingazinga mpembeni ya banga, eye ezalaki likolo boye ete Balamani bakokaki te kobwaka mabanga ma bango mpe makonga ma bango na bango ete bakoka kosala eloko, mpe bakokaki te komatela bango likolo longola se soko ezalaki o esika ya bango ya bokoti.

5 Sikawa o mbala eye bakapiteni bakonzi ba Balamani bakamwaki mpenza, na ntina ya bwania bwa Banefi na kolengeleke bisika bya bango bya bozangi likama.

6 Sikawa bakambi ba Balamani babanzaka ete, na ntina ya bonene bwa motango mwa bango, iyo, babanzaka ete bakozwa litomba mpo ya koya likolo lya bango lokola basalaka kina sikawa; iyo, mpe bamilengeleke na nguba, mpe na ebende ya ntolo; mpe lisusu bamilengeleke na bilamba bya mposo, iyo, bilamba bya mbinga mpo ya kozipa bolumbu bwa bango.

7 Mpe elengeleke bango boye babanzaki ete ekozala petepete komatela mpe kotia bandeko ba bango o nse ya nkanga ya bowumbu, to koboma mpe kobomaboma bango engebene na bolingi bwa bango.

8 Kasi tala, o bokamwi bwa nsuka mpenza bwa bango, balengelemeki mpo ya bango, na lolenge loko loye mokolo moko te loyebanaka o ntei ya bana ba Lehi. Sikawa balengelemeki mpo ya Balamani, mpo ya kobunda nsima ya lolenge la bitinda bya Moloni.

9 Mpe esalemaki ete Balamani, to Baamalikiayi, bakamwaki mpenza na lolenge la bango la bolengeli mpo ya etumba.

10 Sikawa, soko mokonzi Amalikia akitaka o libanda lya mboka ya Nefi, na moto mwa limpinga lya ye, mbele alingaka kosala Balamani babunda na Banefi o engumba ya Amoniya; mpo tala, azalaki na ntina te mpo ya makila ma bato ba ye.

11 Kasi tala, Amalikia akitaki te yemei mpo ya kobunda. Mpe tala, bakapiteni bakonzi ba ye bamekaki te kobunda na Banefi o engumba ya Amoniya, mpo Moloni abongolaki makambo o ntei ya Banefi, mpenza ete Balamani basisolamaki o bisika bya bango bya bobombami mpe bakokaki te komatela bango.

12 Yango wana bazongaki o esobe, mpe bakamataki biema bya bango mpe batambolaki ona mboka ya Noa, kobanzaka ete ezalaki esika elandi elamu mingi koleka mpo ya koya kobunda na Banefi.

13 Mpo bayebaki te ete Moloni alendisaka, to atongaka bisika bikasi bya bozangi likama, mpo ya engumba na engumba o mboka mobimba zingazinga mpembeni; yango wana, batambolaki o boso o mboka ya Noa na mokano mwa sikisiki; iyo, bakapiteni bakonzi ba bango bayaki o boso mpe balapaki ndai ete bakobebisa bato ba engumba ena.

14 Kasi tala, o bokamwi bwa bango, engumba ya Noa, eye ezalaka kina sikawa esika yoko ya petepete, na mayele ma Moloni, ekomaki ekasi, iyo, kutu koleka makasi ma engumba ya Amoniya.

15 Mpe sikawa, tala, eye ezalaki bwania na Moloni; mpo abanzaka ete bakobangisama na engumba ya Amoniya; mpe lokola engumba ya Noa ezalaka kina sikawa eteni eleki petepete ya engumba, yango wana batambolaki kuna mpo ya kobunda; mpe boye ezalaki engebene na mposa ya ye.

16 Mpe tala, Moloni aponoko Lehi kozala kapiteni mokonzi likolo lya bato ba engumba ena; ezalaki kaka Lehi ona oyo abundaki na Balamani o lobwaku o esti ya ebale Sidoni.

17 Mpe sikawa tala esalemaki ete ekutaka Balamani ete Lehi akambaka engumba basisolamaki lisusu, mpo babangaki Lehi mpenza; nzokande bakapiteni bakonzi ba bango balapaki na ndai yoko kobunda na engumba; yango wana, bamemeki likolo mampinga ma bango.

18 Sikawa tala, Balamani bakokaki te kokota o kati ya bisika bikasi bya bango bizangi likama na nzela esusu te longola se na ekotelo, na ntina ya bosanda bwa etutu eye ebwakamaki, mpe bozindo bwa libulu liye batimolamaka zingazinga mpembeni, longola se soko ezalaki na ekotelo.

19 Mpe boye elengelemeki Banefi mpo ya kobebisa banso baye bakomeka komata mpo ya kokota o esika ekasi na nzela esusu, na kobwakaka mabanga mpe makonga na bango.

20 Boye balengelemeki, iyo, nzoto yoko ya bato bakasi, elongo na mipanga mpe bilingongo bya bango, mpo ya kobete o nse banso baye bakomeka koya o kati ya esika ya bango ezangi likama na esika ya bokoti; mpe boye balengeleki komibatela na Balamani.

21 Mpe esalemaki ete bakapiteni ba Balamani bamemeki likolo mampinga ma bango liboso lya esika ya ekotelo, mpe babandaki kowela na Banefi, mpo bakota o esika ezangi likama; kasi tala, babenganamaki nsima mbala na mbala, mpenza ete babomamaki na bobomi bonene mpenza.

22 Sikawa emonoki bango ete bakokaki te kozwa nguya likolo lya Banefi na nzela eke, babandaki kotimola o nse bitutu bya bango bya mabele ete bakoka kozwa nzela yoko mpo ya mampinga ma bango, ete bakoka kozala na nkonzo ekokani mpo ya kobunda; kasi tala, o bomeki boye bakombolamaki mpenza na mabanga mpe makonga maye mabwakamaki na bango; mpe o esika ya kotondisa mabulu ma bango na kopusaka o nse bitutu bya mabele, matondisamaki na nzoto ikufa mpe izoka ya bango.

23 Boye Banefi bazalaka na nguya inso likolo lya bayini ba bango; mpe boye Balamani bamekaki kobebisa Banefi kina bakapiteni bakonzi ba bango babomamaki banso; iyo, mpe mingi koleka nkoto yoko ya Balamani babomamaki; ntango, o ngambo esusu, ezalaki moto ata moko te wa Banefi oyo abomamaki.

24 Ezalaki penepene na tuku itano baye bazokaki, baye bamilakisaki na makula ma Balamani o nzela eke, kasi babatelamaki na nguba ya bango, mpe bibende bya ntolo ya bango, mpe bibende bya mito mya bango, mpenza ete mpota ya bango izalaki likolo lya makolo ma bango, mingi ya yango izalaki ibe mpenza.

25 Mpe esalemaki ete, emonoki Balamani ete bakapiteni bakonzi ba bango babomamaki banso bakimaki o esobe. Mpe esalemaki ete bazongaki o mboka ya Nefi, mpo ya koyebisa mokonzi wa bango, Amalikia, oyo azalaki Monefi moko na mbotama, etali bobungisi bonene bwa bango.

26 Mpe esalemaki ete asilikaki mpenza na bato ba ye, zambi azwaki te mposa ya ye likolo lya Banefi; atiaki bango te o nse ya nkanga ya bowumbu.

27 Iyo, azalaki na nkele mpenza, mpe alakelaki Nzambe botutu, mpe lisusu Moloni, na kolapaka na ndai yoko ete akomele makila ma ye; mpe eye zambi Moloni abombaki mitindo mya Nzambe na kolengeleke bozangi likama bwa bato ba ye.

28 Mpe esalemaki ete, o ngambo esusu, bato ba Nefi batondoki Nkolo Nzambe wa bango, na ntina ya nguya ya ye ezangi emekiseli na kobikisaka bango uta o maboko ma bayini ba bango.

29 Mpe boye esilaki mobu mwa zomi na libwa mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.

30 Iyo, mpe ezalaki kimia o ntei ya bango, mpe bomengo bonene mpenza o eklezia na ntina ya bokebi mpe etingia ya bango eye bapesaki epai ya liloba lya Nzambe, liye lisakolamaki epai ya bango na Elamani, mpe Sibiloni, mpe Koliatoni, mpe Amona mpe bandeko ba ye, iyo, mpe na banso baye bakulisamaki na molongo mosantu mwa Nzambe, kobatisamaka mpo ya boyamboli, mpe kotindamaka mpo ya koteya o ntei ya bato.