Makomi
Alma 63


Mokapo 63

Sibiloni mpe nsima Elamani bazwi masolo ya makomi ya bule—Banefi mingi basali mobembo na mboka epayi na nordi—Agoti atongi masuwa, oyo enani na mbu ya westi—Moroniya alongi Balamani na etumba. Penepene na mibu 56–52 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete na ebandeli ya mobu ya ntuku misato na motoba ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi, ete Sibiloni azwaki biloko wana ya bule oyo epesamaki epayi na Elamani na Alma.

2 Mpe azalaki moto moko ya alima, mpe atambolaki alima liboso ya Nzambe; mpe atosaki kosala bolamu ntango nyonso, mpo na kobatela mitindo ya Nkolo Nzambe na ye; mpe lokola esalaki ndeko na ye ya mobali.

3 Mpe esalemaki ete Moroni mpe lokola akufaki. Mpe boye esukaki mobu ya ntuku misato na motoba ya boyangeli ya basambisi.

4 Mpe esalemaki ete na mobu ya ntuku misato na nsambo ya boyangeli ya basambisi, ezalaki na lingomba monene ya bato, kutu na motango ya bato nkoto mitano na nkama minei, elongo na basi na bango mpe bana na bango, bakendaki uta na mboka ya Zalayemila kati na mboka oyo ezalaki epayi na nordi.

5 Mpe esalemaki ete Agoti, lokola azalaki moto moko oyo alingaki mingi koleka koluka koyeba, boye akendaki mpe amitongelaki masuwa moko monene koleka, na ndelo ya mboka ya Beboo, mpembeni na mboka ya Libebi, mpe apusaki yango kati na mbu ya westi, mpembeni na nzela ya nkingo ya nkaka oyo ekambaki na mboka epayi na nordi.

6 Mpe tala, ezalaki na mingi ya Banefi oyo bakotaki kuna mpe bananaki elongo na bilei biike, mpe lisusu basi mpe bana mingi; bakendaki botamboli na bango epayi na nordi. Mpe boye esukaki mobu ya ntuku misato na nsambo.

7 Mpe na mobu ya ntuku misato na mwambe, moto oyo atongaki masuwa mosusu. Mpe masuwa ya yambo mazongaki lisusu, mpe bato basusu mingi bakotaki kati na yango; mpe bakamataki bilei biike, mpe bakendaki mpe lokola na mboka epayi na nordi.

8 Mpe esalemaki ete nsango na bango eyokanaki lisusu te. Mpe tobanzi ete bazindaki na bozindo ya mbu. Mpe esalemaki ete masuwa moko mosusu enanaki mpe lokola; mpe wapi makendaki toyebi te.

9 Mpe esalemaki ete na mobu mona ezalaki na bato mingi oyo bakendaki na mboka epayi na nordi. Mpe boye esukaki mobu ya ntuku misato na mwambe.

10 Mpe esalemaki ete na mobu ya ntuku misato na libwa ya boyangeli ya basambisi, Sibiloni mpe lokola akufaki, mpe Koliantoni akendaki na mboka epayi na nordi kati na masuwa moko, mpo na komema bilei epayi ya bato bakendaki kati na mboka wana.

11 Boye ekomaki likambo elongobani mpo ete Sibiloni apesa biloko wana ya bule, yambo ya liwa na ye, epayi ya mwana mobali ya Elamani, oyo abiangamaki Elamani, mpo abiangamaki nsima ya nkombo ya tata na ye.

12 Sikawa tala, nkoma wana nyonso oyo ezwamaki na Elamani ekomamaki mpe etindamaki na kati ya bana ya bato epayi nyonso na mboka mobimba, longola se soki ezalaki biteni wana oyo epesamaki motindo na Alma ete bitindama te.

13 Nzokande, biloko oyo bisengamilaki kobombama lokola bule, mpe bikitanisamaki uta nkola moko na mosusu; boye, na mobu mona, epesamaki epayi ya Elamani, yambo ya liwa ya Sibiloni.

14 Mpe esalemaki lisusu na mobu oyo ete ezalaki na bakabwani oyo bakendaki epayi ya Balamani; mpe balamusamaki lisusu nkanda na bango epayi na Banefi.

15 Mpe lisusu na mobu se moko oyo bakitaki elongo na limpinga ya motango monene mpo na kobunda na bato ya Moroniya, soki te kobunda na limpinga ya Moroniya, na etumba oyo wapi babetamaki mpe babenganamaki nsima lisusu na mboka na bango moko, mpe bayokaki mpasi ya bobungisi monene.

16 Mpe boye esukaki mobu ya ntuku misato na libwa ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi.

17 Mpe boye esukaki lisolo ya Alma, mpe Elamani mwana mobali na ye, mpe lisusu Sibiloni, oyo azalaki mwana mobali na ye.

Bimisa na lokasa