Makomi
Alama 12


Mokapo 12

Alama aweli na Zezilomi—Mibombamo mya Nzambe mikoki kopesama se na mondimi—Bato bakosambisama na makanisi, bondimi, maloba, mpe misala mya bango—Moto wa nkuna akoyoka mpasi ya liwa lyoko lya molimo—Bomoi boye bwa kufa bozali bozali boko bwa momekano—Mwango mwa bosikoli bokosala esalema Bosekwi mpe, o nzela ya bondimi, bolimbisi boko bwa masumu—Mobongoli motema azali na likoki likolo lya ngolu o nzela ya Mwana Mobali Mobotami se Moko wa Tata. Penepene na 82 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa Alama, komonoko ete maloba ma Amuleki masilisaki makelele ma Zezilomi, mpo amonoki ete Amuleki akangaki ye na lokuta mpe bobubi bwa ye mpo ya kobebisa ye, mpe komonoko ete abandaki kolenge o nse ya makanisi ma elindo ya ye, afungolaki monoko mwa ye mpe abandaki koloba epai ya ye, mpe kondimisa maloba ma Amuleki, mpe kolimbola makambo koleka wana, to kobombola nkoma koleka iye Amuleki asalaka.

2 Sikawa maloba maye Alama alobaki epai ya Zezilomi mayokanaki na bato zingazinga mpembeni; mpo ebele ezalaki enene, mpe alobaki na lolenge loye:

3 Sikawa Zezilomi, komonoko ete ozwami na lokuta la yo mpe na mayele mabe ma yo, mpo okosi bobele epai ya bato te kasi okosi epai ya Nzambe; mpo tala, ayebi makanisi ma yo, mpe omoni ete makanisi ma yo masalemi mayebana epai ya biso na Molimo mwa ye;

4 Mpe omoni ete biso toyebi ete mwango mwa yo mozalaki mwango mwa mayele mabe mpenza, lokola ya mayele mabe ma zabulu, mpo ya kokosa mpe kobuba bato baye ete otutisa bango na biso, mpo baniokolo biso mpe babwaka biso libanda—

5 Sikawa oyo ezalaki mwango moko mwa monguna wa yo, mpe asalelaki nguya ya ye na yo. Sikawa nalingi omikundola ete nini nalobi epai ya yo nalobi epai ya banso.

6 Mpe tala nalobi epai ya bino banso ete ezalaki motambo mwa monguna, moye atandaki mpo ya kokanga bato baye, ete akoka komeme bino o kati ya boyangelami epai ya ye, ete akoka kozinga bino mpembeni na miniololo mya ye, ete akoka kobenda bino na miniololo o nse o bobebisami bwa libela, engebene na nguya ya bokangemi bwa ye.

7 Sikawa elobaka Alama maloba maye, Zezilomi abandaki kolenge mingi mpenza, mpo andimaki mingi mpe mingi na nguya ya Nzambe; mpe andimaki lisusu ete Alama mpe Amuleki bazalaka na boyebi boko bwa ye, mpo andimaki ete bayebaki makanisi mpe mikano mya motema mwa ye; mpo nguya epesamaki epai ya bango ete bakoka koyeba makambo maye engebene na molimo mwa bobukuli.

8 Mpe Zezilomi abandaki kotuna bango na etingia, ete akoka koyeba mingi etali bokonzi bwa Nzambe. Mpe alobaki epai ya Alama: Nini eye elingi koloba eye Amuleki alobaki etali bosekwi bwa bakufi, ete banso bakosekwa uta o bakufi, bayengebene mpe bazangi boyengebene lokola, mpe bamememi mpo ya koteleme liboso lya Nzambe mpo ya kosambisama engebene na misala mya bango?

9 Mpe sikawa Alama abandaki kosembola makambo maye epai ya ye, kolobaka: Epesami epai ya mingi koyeba mibombamo mya Nzambe; nzokande batiami o nse ya motindo moko mwa sikisiki ete bakokaba bobele engebene na ndambo ya liloba lya ye eye apesi epai ya bana ba bato, engebene na bokebi mpe etingia eye bakopesa epai ya ye.

10 Mpe yango wana, ye oyo akoyeisa motema mwa ye mokasi, ye kaka akozwa ndambo eleki eke ya liloba; mpe ye oyo akoyeisa te motema mwa ye mokasi, na ye epesami ndambo eleki enene ya liloba, kina ekopesama epai ya ye koyeba mibombamo mya Nzambe kina ayeba myango mobimba.

11 Mpe baye bakoyeisa mitema mya bango mikasi, na bango ekopesama ndambo eleki eke ya liloba kina bayeba eloko te etali mibombamo mya ye; mpe nde bakangemi na zabulu, mpe bamememi na bolingi bwa ye o nse o bobebisami. Sikawa eye ezali nini elingi koloba miniololo mya limfelo.

12 Mpe Amuleki alobaki polele etali liwa, mpe kosekwisama uta o bokufi boye o bozali bwa bozangi bokufi, mpe komememe liboso lya esika ya bosambisi ya Nzambe, mpo ya kosambisama engebene na misala mya biso.

13 Nde soko mitema mya biso miyeisamaki mikasi, iyo, soko toyeisaki mitema mya biso mikasi na liloba, mpo ete ezwama te na biso, nde ekozala bozali bwa biso nsomo, mpo nde tokokitisama.

14 Mpo maloba ma biso makokitisa biso, iyo, misala mya biso minso mikokitisa biso; tokozwama te na bozangi mbindo; mpe makanisi ma biso makokitisa biso; mpe na bozali boye bwa nsomo tokomeka te kotala likolo na Nzambe wa biso; mpe tokoluta kozala na bosepeli soko tokoki kotinda mabanga mpe ngomba mpo ya kokweya likolo lya biso, mpo ya kobomba biso uta o miso mya ye.

15 Kasi eye ekoki kozala te. Tosengeli koya mpe tokoteleme liboso lya ye na nkembo ya ye, mpe nguya ya ye, mpe makasi ma ye, mpe lokumu la ye, mpe bodondwi bwa ye, mpe kondima o nsoni ya biso ya libela ete bosambisi bwa ye boyengebeni; ete azali moyembene o misala mya ye minso, mpe ete azali na ngolu epai ya bana ba bato, mpe ete azali na nguya enso mpo ya kobikisa moto onso oyo andimi likolo lya nkombo ya ye mpe amemi mbuma elongobani mpo ya boyamboli.

16 Mpe sikawa tala, nalobi epai ya bino nde ekoya liwa, kutu ete liwa lya ibale, liye lizali liwa lya molimo; nde ezali ntango yoko ete onso oyo akokufa o masumu ma ye, lokola mpo ya liwa lyoko lya ntango, akokufa lokola liwa lyoko lya molimo; iyo, akokufa lokola na makambo matali bosembo.

17 Nde ezali ntango monioko mwa bango mokozala lokola liziba lya moto mpe libanga lya fofolo, ya lyango mololi mokomata likolo libela na libela; mpe nde ezali ntango eye bakokangema na miniololo o nse o bobebisami bwa libela, engebene na nguya mpe bokangemi bwa Satana, ye koyangelaka bango engebene na bolingi bwa ye.

18 Nde, nalobi epai ya bino, bakozala lokola soko esalemaka te bosikoli; mpo bakoki kosikolama te engebene na boyengebene bwa Nzambe; mpe bakoki kokufa lisusu te, komonoko bopoli bozali lisusu te.

19 Sikawa esalemaki ete etiaka Alama nsuka yoko ya kolobaka maloba maye, bato banso babandaki kokamwa mingi;

20 Kasi ezalaki Ationa moko, oyo azalaki moyangeli mokonzi moko o ntei ya bango, ayaki mpe alobaki epai ya ye: Nini ezali eye olobi, ete moto akosekwa uta na bakufi mpe akobongwana uta o kufa eye o bozali bwa kufa te, ete bozo bokoka kokufa mokolo moko te?

21 Nini elingi koloba nkoma eye, eye elobi ete Nzambe atiaki bakeluba mpe mopanga mwa moto o esti ya elanga ya Edene, mbele baboti ba biso ba yambo balingaki kokota mpe kolia mbuma ya nzete ya bomoi, mpe kozala na bomoi libela? Mpe boye tomoni ete nkonzo ekokaki kozala te ete bazala na bomoi libela.

22 Sikawa Alama alobaki epai ya ye: Eye ezali likambo liye nazalaki penepene na kolimbola. Sikawa tomoni ete Adama akweyaki na koliaka mbuma epekisama, engebene na liloba lya Nzambe; mpe boye tomoni ete, na bokwei bwa ye, bato banso bakomaki bato babunga mpe kokweya.

23 Mpe sikawa tala, nalobi epai ya bino ete, soko ekokaka kosalema mpo ya Adama kolia mbuma ya nzete ya bomoi o ntango ena, elingaki kozala liwa te, mpe liloba lilingaki kozala mpamba, kosalaka Nzambe mokosi moko, mpo alobaki: soko olii, solo okokufa.

24 Mpe tomoni ete liwa liyei likolo lya moto, iyo, liwa liye lilobamaki na Amuleki, liye lizali liwa lya ntango; nzokande ntaka yoko epesami epai ya moto o yango akokaki koyambola; yango wana bomoi boye bokomaki bozali boko bwa momekano; ntango yoko ya kolengele mpo ya kokutana na Nzambe; ntango yoko mpo ya kolengele bozali bozanga nsuka boye bolobelamaki na biso, boye bozali nsima ya bosekwi bwa bakufi.

25 Sikawa, soko ezalaka te mwango mwa bosikoli, moye motiamaki uta o bokelami bwa mokili, elingaki kozala te bosekwi bwa bakufi. Kasi etiami mwango moko mwa bosikoli, eye ekomeme esalema bosekwi bwa bakufi, moye molobelamaki.

26 Mpe sikawa tala, soko ekokaki ete baboti ba biso ba yambo bakende mpe balia mbuma ya nzete ya bomoi balingaki kozala babola libela, kozalaka na bozali bwa bolengeli te; mpe boye mwango mwa bosikoli molingaki kokakema, mpe liloba lya Nzambe lilingaki kozala mpamba, kopesaka eloko te.

27 Kasi tala, ezalaki boye te; kasi elakelama epai ya bato ete basengeli kokufa; mpe nsima ya liwa, bakoya o bosambisi, kutu bosambisi boye tolobelaki, boye bozali nsuka.

28 Mpe esilaka Nzambe kolaka ete makambo maye makoya epai ya moto, tala, nde amonoki ete elongobanaki ete moto ayeba etali makambo wapi alakaka epai ya ye;

29 Yango wana atindaki banzelu mpo ya kosolola na bango, baye basalaki bato komono nkembo ya ye.

30 Mpe babandaki uta o ntango ena kobianga likolo lya nkombo ya ye; yango wana Nzambe asololaki na bato, mpe asalaki eyebisama epai ya bango mwango mwa bosikoli, moye alengeleki uta o bokelami bwa mokili; mpe eye asalaki eyebisama epai ya bango engebene na bondimi mpe boyamboli bwa bango mpe misala misantu mya bango.

31 Yango wana, apesaki mitindo epai ya bato, bango kobukaka yambo mibeko mya yambo lokola mpo ya makambo maye mazali ma ntango, mpe kokomaka lokola banzambe, koyebaka bolamu mpe bobe, komitiaka o bozali boko bwa kosala, to kotiamaka o bozali bwa kosala engebene na bolingi mpe elengi ya bango, soko mpo ya kosala bolamu to mpo ya kosala bobe—

32 Yango wana Nzambe apesaki epai ya bango mitindo, esilisaki ye kosala eyebisama epai ya bango mwango mwa bosikoli, ete basala bobe te, etumbu ya bwango kozalaka kufa ya ibale, eye ezalaki liwa lya libela mpo ya makambo matali bosembo; mpo likolo lya baye ba lolenge loye, mwango mwa bosikoli mokokaki te kozala na nguya, mpo misala mya boyengebene mikokaki te kobebisama, engebene na bolamu bwa likolo koleka bwa Nzambe.

33 Kasi Nzambe abiangaki bato, o nkombo ya Mwana Mobali wa ye, (eye kozalaka mwango mwa bosikoli boye botiamaki) kolobaka: Soko bokoyambola mpe boyeisi mitema mya bino mikasi te, nde nakoyoka ngolu likolo lya bino, na lisalisi lya Mwana Mobali Mobotami se Moko wa ngai;

34 Yango wana, onso oyo ayamboli, mpe ayeisi motema mwa ye mokasi te, akozala na likoki likolo lya ngolu na lisalisi lya Mwana Mobali Mobotami se Moko wa ngai, mpo ya bolimbisi boko bwa masumu ma ye; mpe baye bakokota o kati ya bopemi bwa ngai.

35 Mpe onso oyo akoyeisa motema mwa ye mokasi mpe akosala bobe, tala, nalapi ndai o nkele ya ngai ete akokota te o kati ya bopemi bwa ngai.

36 Mpe sikawa, bandeko ba ngai, tala, nalobi epai ya bino ete soko boyeisi mitema mya bino mikasi, bokokota te o bopemi bwa Nkolo; yango wana bobe bwa bino botumoli ye ete atinda o nse nkele ya ye likolo lya bino lokola o ntango ya botumoli bwa yambo; iyo, engebene na liloba lya ye o botumoli bwa nsuka lokola bwa yambo, mpo ya bobebisami bwa libela bwa bozo bwa bino; yango wana, engebene na liloba lya ye, mpo ya liwa lya nsuka, lokola lya yambo.

37 Mpe sikawa, bandeko ba ngai, komonoko toyebi makambo maye, mpe mazali solo, toyambola, mpe toyeisa mitema mya biso mikasi te, ete totumola te Nkolo Nzambe wa biso mpo ya kobenda o nse nkele ya ye likolo lya biso o mitindo miye mya ye mya mibale miye apesi epai ya biso; kasi tika tokota o kati ya bopemi bwa Nzambe, boye alengeleki engebene na liloba lya ye.