Makomi
Alma 31


Mokapo 31

Alma akambi etinda moko mpo na kozongisa bapengwi ya Bazolami na nzela—Bazolami bawangani Klisto, bandimi makanisi ya lokuta mpo na oyo etali boponami, mpe bakumbameli na kosalelaka sambo esalema kala—Bamisionele batondisami na Molimo Mosantu—Mpasi na bango emelami mpenza na bosepeli uta na Klisto. Penepene na mobu 74 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa esalemaki ete nsima ya nsuka ya Koliyolo, lokola Alma azwaki bansango ete Bazolami bazalaki kosantola banzela ya Nkolo, mpe ete Zolami, oyo azalaki mokambi na bango, azalaki kokamba mitema ya bato na kogumbamela banzambe ya bikeko ya baba, motema na ye lisusu ebandaki koyoka mpasi mpo na mabe ya bato.

2 Mpo ezalaki ntina ya mawa monene epayi ya Alma ya koyeba mabe na kati ya bato na ye; boye motema na ye ezalaki na mawa koleka mpenza na ntina ya bokabwani ya Bazolami uta na Banefi.

3 Sikawa Bazolami basanganaki bango moko esika moko na mboka moko oyo babiangaki Ationumi, oyo ezalaki na esti ya mboka ya Zalayemila, oyo elalaki penepene na ndelo ya libongo ya mbu, oyo ezalaki na sudi ya mboka ya Yesoni, oyo lisusu ezalaki na ndelo ya esobe ya sudi, oyo esobe wapi etondaki na Balamani.

4 Sikawa Banefi bazalaki kobanga makasi ete Bazolami bakota na boyokani na Balamani, mpe ete ekozala nzela ya bobungisi bato mingi na ngambo ya Banefi.

5 Mpe sikawa, lokola mateya ya liloba ezalaki na bobendi monene ya komema bato na kosalaka oyo ezali alima—iyo, ezalaki na nguya mingi likolo ya mayele ya bato mingi koleka mompanga, to eloko nyonso mosusu, oyo ekomaki epayi na bango—yango wana Alma akanisaki elongobanaki ete bameka bolamu ya liloba ya Nzambe.

6 Boye akamataki Amona, mpe Alona, mpe Omina, mpe Imini oyo atikaki na eklezia ya Zalayemila; kasi Misato ya yambo akamataki bango elongo na ye, mpe lisusu Amuleki mpe Zezilomi, baoyo bazalaki na Meleki; mpe akamataki lisusu bana mibali mibale na ye.

7 Sikawa, nkulutu ya bana mibali na ye akamataki ye te elongo na ye, mpe nkombo na ye ezalaki Elamani; kasi bankombo na bango oyo akamataki elongo na ye ezalaki Sibiloni mpe Koliantoni; mpe oyo ezali bankombo na bango oyo bakendaki elongo na ye na kati ya Bazolami, mpo na koteya liloba.

8 Sikawa Bazolami bazalaki bakabwani uta na Banefi; boye bazwaki liloba ya Nzambe eteyama epayi na bango.

9 Kasi bakweyaka kati na mabunga monene, mpo balingaki te kotosa kobomba mitindo ya Nzambe, mpe meko na ye, engebene na mobeko ya Mose.

10 Mpe balingaki kotosa kokokisa misala ya eklezia te, mpo na kokoba na losambo mpe libondeli na Nzambe mokolo na mokolo, ete bakoka kokota kati na lisenginia te.

11 Iyo, mpo na kosukisa, basantolaki banzela ya Nkolo na bisika mingi mpenza; boye, mpo na ntina oyo, Alma mpe bandeko na ye bakendaki kati na mboka mpo na koteya liloba epayi na bango.

12 Sikawa, ekomaki bango na mboka, tala, na bokamwi na bango bakutaki Bazolami batongi basinagoga, mpe bazalaki kosangana bango moko esika moko na mokolo ya mposo, oyo mokolo babiangaki mokolo ya Nkolo, mpe bazalaki kokumbamela na lolenge loko oyo Alma mpe bandeko na ye bamonaka ata mokolo moko te;

13 Mpo bazalaki na esika moko etongama likolo na katikati ya sinagoga, esika moko mpo na kotelema, oyo ezalaki likolo ya moto; mpe nsonge na yango ekokaki kokota bobele moto moko.

14 Boye, moto nyonso oyo azalaki na mposa ya kokumbamela asengelaki kokende mpe kotelema likolo ya nsonge na yango, mpe kosembola maboko na ye epayi na lola, mpe kobelela na mongongo makasi, kolobaka:

15 Mosantu, Nzambe mosantu; tondimi ete ozali Nzambe, mpe tondimi ete ozali mosantu, mpe ete ozalaki molimo, mpe ozali molimo, mpe ete okozala molimo libela.

16 Nzambe mosantu, tondimi ete okabolaki biso uta na bandeko na biso; mpe tondimi te mimesano ya bandeko na biso, oyo mikitanisamaki na bango na bomwana ya batata na bango; kasi tondimi ete oponaki biso mpo na kozala bana basantu na yo; mpe lisusu osalaki eyebana epayi na biso ete ekozala na Klisto te.

17 Kasi ozali se moko wana kaka lobi, lelo, mpe libela; mpe oponaki biso ete tokobikisama, ntango baoyo nyonso nzinganzinga na biso baponami mpo na kobwakama na nkele na yo na nse na lifelo; mpo na bosantu boye wapi, O Nzambe, totondi yo; mpe lisusu totondi yo mpo ete oponi biso, ete tokoka te kokosama na kolandaka mimesano ya liboma ya bandeko na biso, oyo ekangi bango na nse ya boyambi na Klisto, boye ememi mitema na bango na kowayawaya mosika na yo, Nzambe na biso.

18 Mpe lisusu totondi yo, O Nzambe, ete tozali bato baponami mpe basantu. Amene.

19 Sikawa esalemaki ete esilaki Alma mpe bandeko na ye bandimi mpe bana mibali na ye koyoka sambo oyo, bakamwaki koleka ndelo.

20 Mpo tala, moto na moto akendaki mpe abonzelaki sambo se oyo kaka.

21 Sikawa esika yango ebiangamaki na bango Lamimpetomi, oyo, na kolimbolaka, ezali etelemelo esantu.

22 Sikawa, uta na etelemelo oyo, babonzelaki, moto na moto, losambo se wana kaka mpenza epayi ya Nzambe, kotondaka Nzambe na bango ete baponamaki na ye, mpe ete akosaki bango te na kolandaka momeseno ya bandeko na bango, mpe ete mitema na bango miyibamaki te mpo na kondima na makambo ekoya, oyo bayebelaki eloko te.

23 Sikawa, esilaki bato nyonso kopesa matondi na lolenge oyo, bazongaki epayi na bango, kolobelaka lisusu soki moke te oyo etali Nzambe na bango kina mokolo bakosangana bango moko lisusu esika moko na etelemelo esantu, mpo na kopesa matondi na lolenge na bango.

24 Sikawa, emonaki Alma oyo motema na ye moyokaki mpasi; mpo amonaki ete bazalaki bato ya nkuna mpe basila kobeba; iyo, amonaki ete mitema na bango ekangamaki likolo ya wolo, mpe likolo ya mpauni, mpe likolo ya ndenge nyonso ya biloko ya malonga.

25 Iyo, mpe amonaki lisusu ete mitema na bango etombwamaki likolo mpo na bifundeli minene, na lolendo na bango.

26 Mpe atombolaki mongongo na ye likolo na lola, mpe alelaki, kolobaka: O, kino ntango nini, O Nkolo, okotika ete basali na yo bafanda awa na mosuni, mpo na kotala nkuna ya monene boye na kati ya bana ya bato?

27 Tala, O Nzambe, bazali kolela epayi na yo, mpe nzokande mitema na bango mimelami mpenza na lolendo na bango. Tala, O Nzambe, bazali kobelela epayi na yo na minoko na bango, nzokande bavimbami, kutu kino na bonene, na biloko mpamba ya mokili.

28 Tala, O Nzambe na ngai, bilamba na bango ya ntalo, mpe mpete na bango, mpe bikomo na bango, mpe bikembi na bango ya wolo, mpe biloko na bango nyonso ya motuya oyo bakembi na yango; mpe tala, mitema na bango etiami likolo na yango, mpe nzokande babeleli epayi na yo mpe balobi—Totondi yo, O Nzambe, mpo tozali bato baponami epayi na yo, nzokande basusu bakokufa.

29 Iyo, mpe balobi ete osalaki eyebana epayi na bango ete ekozala na Klisto te.

30 O Nkolo Nzambe, kino ntango boni ekopesa yo nzela ete nkuna mpe kozanga bosembo ya lolenge oyo ezala na kati ya bato oyo? O Nkolo, ekopesa yo ngai bokasi, ete nakoka komema bokono na ngai. Mpo nazali moto ya bokono, mpe nkuna ya lolenge oyo na kati ya bato oyo esali mpasi na molimo na ngai.

31 O Nkolo, motema na ngai etondi na mawa mpenza; elingi yo kobondisa molimo na ngai na Klisto. O Nkolo, elingi yo kosala epayi na ngai ete nakoka kozala na bokasi, ete nakoka komema na bompikiliki mpasi ya mitungisi oyo ekoya likolo na ngai, na ntina ya mabe ya bato oyo.

32 O Nkolo, elingi yo kobondisa molimo na ngai, mpe kopesa ngai elonga, mpe lisusu na baninga na ngai ya mosala baoyo bazali elongo na ngai—iyo, Amona, mpe Alona, mpe Omina, mpe lisusu Amuleki mpe Zezilomi, mpe lisusu bana mibali na ngai mibale—iyo, kutu baoyo nyonso elingi yo kobondisa, O Nkolo. Iyo, elingi yo kobondisa milimo na bango na nzela ya Klisto.

33 Elingi yo kopesa epayi na bango ete bakoka kozala na bokasi, ete bakoka komema mitungisi na bango oyo ekoya likolo na bango na ntina ya mabe ya bato oyo.

34 O Nkolo, elingi yo kosala epayi na biso ete tokoka kozala na elonga na komemaka bango lisusu epayi na yo na nzela ya Klisto.

35 Tala, O Nkolo, milimo na bango ezali motuya, mpe mingi kati na bango bazali bandeko na biso; boye, pesa epayi na biso, O Nkolo, nguya mpe bwania ete tomema bato oyo, bandeko na biso, lisusu epayi na yo.

36 Sikawa esalemaki ete esilaki Alma koloba maloba oyo, atiaki maboko na ye likolo ya baoyo nyonso bazalaki elongo na ye. Mpe tala, lokola etiaki ye maboko na ye likolo na bango, batondisamaki na Molimo Mosantu.

37 Mpe nsima na yango bakabwanaki moko na mosusu, kotiaka ata likanisi te mpo na bango moko nini bakolia, to nini bakomela, to nini bakolata.

38 Mpe Nkolo asungaki bango ete bayoka nzala te, soki te bayoka mposa ya mai te; iyo, mpe lisusu apesaki bango bokasi, ete bayoka mpasi ya lolenge moko te ya mitungisi, longola se mpasi yango ekomelama mpenza na bosepeli ya Klisto. Sikawa oyo ezalaki engebene na losambo ya Alma; mpe oyo mpo asambelaki na bondimi.

Bimisa na lokasa