Makomi
Alama 15


Mokapo 15

Alama mpe Amuleki bakei o Sidomi mpe batii eklezia yoko—Alama abikisi Zezilomi, oyo asangani na Eklezia—Mingi babatisami, mpe Eklezia ezwi bomengo—Alama mpe Amuleki bakei o Zalayemila. Penepene na 81 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete Alama mpe Amuleki batindamaki mpo ya kokende libanda lya engumba ena; mpe bakendeki, mpe bayaki libanda kutu o kati ya mboka ya Sidomi; mpe tala, kuna bamonoki bato banso baye bakendeki libanda lya mboka ya Amoniya, baye babwakamaki libanda mpe babambamaki mabanga, zambi bandimaki o maloba ma Alama.

2 Mpe basangelaki epai ya bango makambo manso makomaki epai ya basi mpe bana ba bango, mpe lisusu matali bangomei, mpe nguya ya libiki lya bango.

3 Mpe lisusu Zezilomi alalaki na bokono o Sidomi, na lisakima lyoko lya kozikisa, liye lisalemaki mpo ya mikakatano minene mya mayele ma ye na ntina ya nkuna ya ye, mpo abanzaki ete Alama mpe Amuleki bazalaki lisusu te; mpe abanzaki ete Alama mpe Amuleki babomamaki na ntina ya bobe bwa ye. Mpe lisumu liye, mpe masumu ma ye mingi masusu, mapasulaki mayele ma ye kina ekomaki koswa mpenza, kozangaka libiki; yango wana abandaki kozika na moto moko mokasi.

4 Sikawa, eyokaki ye ete Alama mpe Amuleki bazalaki o mboka ya Sidomi, motema mwa ye mobandaki kozwa mpiko; mpe atindaki sasaipi maloba epai ya bango, kozalaka na mposa ya bango koya epai ya ye.

5 Mpe esalemaki ete bakendeki sasaipi, kotosaka maloba maye atindaka epai ya bango; mpe bakotaki epai ya ndako epai ya Zezilomi; mpe bakutaki ye likolo lya mbeto ya ye, na bokono, kozalaka o nse mpenza na lisakima lyoko lya kozikisa; mpe mayele ma ye mazalaki koswa mpenza na ntina ya bobe bwa ye; mpe emonoki ye bango a tandolaki loboko la ye, mpe abondelaki bango ete balinga kobikisa ye.

6 Mpe esalemaki ete Alama alobaki epai ya ye, kokamataka ye na loboko; Endimi yo na nguya ya Klisto mpo ya lobiko?

7 Mpe ye ayanolaki mpe alobaki: Iyo, nandimi maloba manso maye oteyi.

8 Mpe Alama alobaki: Soko ondimi na bosikoli bwa Klisto okoki kobika.

9 Mpe alobaki: Iyo, nandimi engebene na maloba ma yo.

10 Mpe nde Alama abelelaki epai ya Nkolo, kolobaka: O Nkolo Nzambe wa biso, yoka ngolu na moto oyo, mpe bikisa ye engebene na bondimi bwa ye na Klisto.

11 Mpe elobaka Alama maloba maye, Zezilomi apumbwaki likolo lya makolo ma ye, mpe abandaki kotambola; mpe eye esalemaki o bokamwi bwa bato banso; mpe boyebi bwa eye bokendeki o ntaka ya mboka mobimba ya Sidomi.

12 Mpe Alama abatisaki Zezilomi epai ya Nkolo; mpe abandaki uta ntango ena koteya epai ya bato.

13 Mpe Alama atiaki eklezia yoko o mboka ya Sidomi, mpe abulisaki banganga mpe balakisi o mboka, mpo ya kobatisa epai ya Nkolo banso baye bazalaki na mposa ya kobatisama.

14 Mpe esalemaki ete bazalaki mingi; mpo babukanaki kuna uta o ekolo zingazinga mpembeni na Sidomi, mpe babatisamaki.

15 Kasi lokola mpo ya bato baye bazalaki o mboka ya Amoniya, batikalaki kaka bato boko ba mitema mikasi mpe ba nkanza; mpe bayambolaki te masumu ma bango, kopesaka nguya enso ya Alama mpe Amuleki na zabulu; mpo bazalaki ba mosala mwa Newolo, mpe bandimaki te o boyamboli na masumu ma bango.

16 Mpe esalemaki ete Alama mpe Amuleki, Amuleki kosundolaka wolo ya ye, mpe mpauni ya ye, mpe biloko bya ye binso bya motuya, biye bizalaki o mboka ya Amoniya, mpo ya liloba lya Nzambe, ye kobwakamaka na bango baye bazalaki mbala yoko baninga ba ye ba kala, mpe lisusu na tata wa ye mpe na libota lya ye;

17 Yango wana, esilisaka Alama kotia eklezia o Sidomi, komonoko bososoli boko bonene, iyo, komonoko ete bato basosolamaka lokola mpo ya lolendo la mitema mya bango, mpe babandaki komikitisa liboso lya Nzambe, mpe babandaki komisangisa elongo o ndako isantu mpo ya kokumbamela Nzambe liboso lya lotale, kokengeke mpe kosambelaka mbala na mbala, ete bakoka kobikisama uta na Satana, mpe uta o liwa, mpe uta o bobebisami—

18 Sikawa lokola nalobaki, Alama komonoko makambo maye manso, yango wana akamataki Amuleki mpe ayaki likolo lya mboka ya Zalayemila, mpe akamataki ye o ndako ya yemei, mpe asalisaki ye o mikakatano mya ye, mpe alendisaki ye na Nkolo.

19 Mpe boye esilaki mobu mwa zomi mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.