Makomi
Alama 28


Mokapo 28

Balamani balongami na ebakata ya etumba yoko—Nkoto zomi babomami—Bato ba nkuna bakangemi na kokoma o bozali boko bwa lisuma lizanga nsuka; basembo bakomi na esengo yoko ekosuka mokolo moko te. Penepene na 77–76 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete esilisaki bato ba Amona kotiama o mboka ya Yesoni, mpe eklezia yoko etiamaki lokola o mboka ya Yesoni, mpe mampinga ma Banefi matandamaki zingazinga mpembeni na Yesoni, iyo, na ndelo zingazinga mpembeni ya mboka ya Zalayemila; tala mampinga ma Balamani balandaka bandeko ba bango o kati ya esobe.

2 Mpe boye ezalaki ebakata ya etumba yoko; iyo, kutu yoko ya lolenge loko lokola eyebanaka mokolo moko te o ntei ya bato banso o mboka uta o ntango Lehi atikaki Yelusaleme; iyo, mpe nkoto zomi ya Balamani babomamaki mpe bapalanganisamaki mosika.

3 Iyo, mpe lisusu ezalaki ebakata ya bobomi boko o ntei ya bato ba Nefi; nzokande, Balamani babenganamaki mpe bapalanganisamaki, mpe bato ba Nefi bazongaki lisusu o mboka ya bango.

4 Mpe sikawa eye ezalaki ntango yoko eye ezalaki eleli mpe boleli boko bonene boyokanaki o ntaka ya mboka mobimba, o ntei ya bato banso ba Nefi—

5 Iyo, bogangi bwa bazenga kolelaka mpo ya babali ba bango, mpe lisusu bwa batata kolelaka mpo ya bana ba bango, mpe mwana mwasi mpo ya ndeko mobali, iyo, ndeko mobali mpo ya tata; mpe boye bogangi bwa boleli boyokanaki o ntei ya bango banso, kolelaka libota lya bango liye libomamaki.

6 Mpe sikawa solo eye ezalaki mokolo mwa mawa; iyo, ntango yoko ya lipombo, mpe ntango yoko ya bokili mingi mpe losambo.

7 Mpe boye esilaki mobu mwa zomi na mitano mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi;

8 Mpe eye ezali nsango ya Amona mpe bandeko ba ye, mibembo mya bango o mboka ya Nefi, mpasi ya bango o mboka, mawa ma bango, mpe matungisi ma bango, mpe bosepeli bwa bango boyebani ntina te, mpe boyambi mpe bozangi likama lya bandeko ba bango o mboka ya Yesoni. Mpe sikawa tika Nkolo, Mosikoli wa bato banso, apambola bozo bwa bango libela.

9 Mpe eye ezali nsango ya bitumba mpe boweli o ntei ya Banefi, mpe lisusu bitumba o kati ya Banefi mpe Balamani; mpe mobu zomi na mitano mwa bokonzi bwa basambisi mosili.

10 Mpe uta o mobu mwa yambo kina o zomi na mitano ememeki esalema bobebisami bwa bomoi nkoto mingi; iyo, ememeki makambo ma nsomo ma bosopi makila.

11 Mpe nzoto ya nkoto mingi ilali o nse o mabele, ntango izali nzoto nkoto mingi kopoloko na mabondo likolo lya etando ya mabele; iyo, mpe nkoto mingi bazali kolelaka mpo ya bobungisi bwa mabota ma bango, mpo bazali na ntina ya kobanga, engebene na bilako bya Nkolo, ete bakangemi na bozali bwa lisuma lizanga nsuka.

12 Ntango eleli solo nkoto mingi ya basusu mpo ya bobungisi bwa mabota ma bango, nzokande basepeli lokola mpe batondi nsai na elikia, mpe kutu bayebi, engebene na bilako bya Nkolo, ete batombolami mpo ya kofanda o loboko la mobali la Nzambe, na bozali bwa esengo ekosuka mokolo moko te.

13 Mpe boye tomoni boniboni enene bokeseni bwa moto bozali na ntina ya lisumu mpe bobuki mobeko, mpe nguya ya zabulu, eye eyei na mwango mobe moye abimisaka mpo ya kotanda motambo na mitema mya bato.

14 Mpe boye tomoni ete bato bazwaki libiangi linene lya etingia lya moto na kosala na elanga ya vino ya Nkolo; mpe boye tomoni ntina enene ya mawa, mpe lisusu ya bosepeli—mawa na ntina ya liwa mpe bobebisami o ntei ya bato, mpe bosepeli na ntina ya mwinda mwa Klisto mpo ya bomoi.