Makomi
Alama 52


Mokapo 52

Amoloni akitani Amalikia lokola mokonzi wa Balamani—Moloni, Teakumi, mpe Lehi bakambi Banefi o etumba yoko ya elonga likolo lya Balamani—Engumba ya Muleki ezwami lisusu, mpe Yakobo Mozolami abomami. Penepene na 66–64 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa, esalemaki ete o mobu mwa tuku mibale na motoba mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi, tala, elamukaki Balamani o ntongo ya yambo ya sanza ya yambo, tala, bakutaki Amalikia akufaki o ema ya yemei; mpe bamonoki lisusu ete Teakumi abongamaki mpo ya kobunda na bango o mokolo mona.

2 Mpe sikawa, emonoki Balamani eye babangaki; mpe batikaki mwango mwa bango na kotambolaka o kati ya mboka ya epai ya nordi, mpe bazongaki nsima elongo na limpinga lya bango o kati ya engumba ya Muleki, mpe balukaki bobatelami o bisika bikasi bya bango.

3 Mpe esalemaki ete ndeko mobali wa Amalikia aponomoki mokonzi likolo lya bato; mpe nkombo ya ye ezalaki Amoloni; boye mokonzi Amoloni, ndeko mobali wa mokonzi Amalikia, aponomoki mpo ya kokonza o esika ya ye.

4 Mpe esalemaki ete atindaki ete bato ba ye basimba bingumba bina, biye bakamataka na bosopi makila; mpo bazwaka te bingumba longola se soko babungisaki makila maike.

5 Mpe sikawa, Teakumi amonoki ete Balamani bazalaki na mokano mokasi mwa kosimba bingumba bina biye bakamataka, mpe biteni bina bya mboka biye bazwaka; mpe lisusu komonoko kabambi ya motango mwa bango, Teakumi akanisaki elongobanaki te ete ameka kobunda na bango o kati ya bisika bikasi bya bango.

6 Kasi abombaki bato ba ye zingazinga mpembeni, lokola soko kosalaka bolengeli mpo ya etumba; iyo, mpe solo azalaki kolengeleke komibatela na bango, na kotongaka bifelo zingazinga mpembeni mpe kolengeleke bisika bya bokimi.

7 Mpe esalemaki ete akobaki boye kolengeleke mpo ya etumba kina Moloni atindaka motango monene mwa bato mpo ya kolendisa limpinga lya ye.

8 Mpe Moloni lisusu atindaki mitindo epai ya ye ete asimba bato banso ba boloko baye bakweyaki o kati ya maboko ma ye; mpo lokola Balamani bakamataki bato mingi ba boloko, ete akoka kosimba bato banso ba Balamani ba boloko lokola lisiko mpo ya bango baye Balamani bakamataka.

9 Mpe lisusu atindaki mitindo epai ya ye ete alendisa mboka Beboo, mpe azangisa likama nzela ya nkaka eye ekambaki o kati ya mboka ya epai ya nordi, mbele Balamani bazwa esika ena mpe bazwa nguya ya kotungisa bango o bisika binso.

10 Mpe lisusu Moloni atindaki epai ya ye, kozalaka na mposa na ye ete azala potongono na kosimbaka ntaka ena ya mboka, mpe aluka nkonzo enso mpo ya kofiakola Balamani o ntaka ena, lokola mpenza ezalaki na nguya ya ye, ete mbele akoka kokamata lisusu na angele to na mayele masusu bingumba bina biye bikamatamaki libanda lya maboko ma bango; mpe ete lisusu ayeisa makasi mpe alendisa bingumba zingazinga mpembeni, biye bikweyaka te o kati ya maboko ma Balamani.

11 Mpe lisusu alobaki epai ya ye, nakoya epai ya yo, kasi tala, Balamani bazali likolo lya biso o ndelo ya mboka mpembeni ya mbu ya westi; mpe tala, nakei kobunda na bango, yango wana nakoki te koya epai ya yo.

12 Sikawa, mokonzi (Amoloni) akendeki libanda lya mboka ya Zalayemila, mpe asalaka eyebana epai ya mwasi wa mokonzi etali liwa lya ndeko wa ye, mpe asangisaka elongo motango monene mwa bato, mpe atambolaka mpo ya kobunda na Banefi o ndelo ya mbu ya westi.

13 Mpe boye asalaki makasi mpo ya kotungisa Banefi, mpe kobenda mosika eteni yoko ya makasi ma bango o eteni ena ya mboka, ntango etindaki ye bango baye batikaka kozwa bingumba biye bikamatamaka, ete batungisa lisusu Banefi o ndelo ya mbu ya esti, mpe bakamata mboka ya bango mingi lokola ezalaki na nguya ya bango, engebene na nguya ya mampinga ma bango.

14 Mpe boye Banefi bazalaki o bizalela bina bya likama o nsuka ya mobu tuku mibale na motoba mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.

15 Kasi tala, esalemaki ete o mobu mwa tuku mibale na sambo mwa bokonzi bwa basambisi, Teakumi, o etinda ya Moloni—oyo atiaka mampinga mpo ya kobatela sudi mpe westi ya ndelo ya mboka, mpe abandaki botamboli bwa ye o mboka Beboo, ete akoka kosalisa Teakumi elongo na bato ba ye na kokamataka lisusu bingumba biye babungisaka—

16 Mpe esalemaki ete Teakumi azwaka mitindo mpo ya kobanda etumba yoko likolo lya engumba ya Muleki, mpe kokamata yango soko ekokaki.

17 Mpe esalemaki ete Teakumi asalaki bolengeli mpo ya kobanda etumba yoko likolo lya engumba ya Muleki, mpe kotambola elongo na limpinga lya ye mpo ya kobunda na Balamani; kasi amonoki ete ekokaki kosalema te ete akoka kolonga bango ntango ezalaki bango o bisika bikasi bya bango; yango wana atikaki mwango mwa ye mpe azongaki lisusu o engumba Beboo, mpo ya kozela boyei bwa Moloni, ete akoka kozwa makasi o limpinga lya ye.

18 Mpe esalemaki ete Moloni ayaki elongo na limpinga lya ye o mboka ya Beboo, o nsuka ya mobu mwa ntuku mibale na sambo mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.

19 Mpe o ebandeli ya mobu mwa tuku mibale na mwambe, Moloni mpe Teakumi mpe mingi ya bakapiteni bakonzi basalaki likita linene lya etumba—nini bakosala mpo ya kosala Balamani babima kobunda na bango; to ete bakoka na yoko nzela kolete bango libanda lya bisika bikasi bya bango, ete bakoka kolonga litomba likolo lya bango mpe kokamata lisusu engumba ya Muleki.

20 Mpe esalemaki ete batindaki bantoma epai ya limpinga lya Balamani, baye babatelaki engumba ya Muleki, elongo na mokambi wa bango, oyo ya ye nkombo ezalaki Yakobo, kozalaka na mposa na ye ete abima elongo na mampinga ma ye kokutana na bango likolo lya bisobe o kati ya bingumba bibale. Kasi tala, Yakobo, oyo azalaki Mozolami alingaki te kobima elongo na limpinga lya ye kokutana na bango likolo lya bisobe.

21 Mpe esalemaki ete Moloni, kozalaka na te elikia ya kokutana na bango likolo lya bisobe, yango wana, akanisaki mwango moko ete akoka kobenda Balamani libanda lya bisika bikasi bya bango.

22 Yango wana asalaki ete Teakumi akamata motango moko moke mwa bato mpe batambola penepene na libongo lya mbu; mpe Moloni mpe limpinga lya ye, o butu, batambolaki o esobe, o westi ya engumba Muleki; mpe boye, na mokolo mwa nsima, ebombolaka bakengeli ba Balamani Teakumi, bakimaki mpe bolobaki yango epai Yakobo, mokambi wa bango.

23 Mpe esalemaki ete mampinga ma Balamani matambolaki lisusu mpo ya kobunda na Teakumi, kobanzaka na motango mwa bango kolonga Teakumi na ntina ya boke bwa motango mwa ye. Mpe lokola Teakumi amonoki mampinga ma Balamani kobimaka mpo ya kobunda na ye abandaki kozonga o nse mpembeni ya libongo lya mbu, epai ya nordi.

24 Mpe esalemaki ete emonoki Balamani ete abandaki kokima, bazwaki mpiko mpe balandaki bango na makasi. Mpe ntango ezalaki Teakumi boye kokamba mosika Balamani baye bazalaki kolandaka na mpamba, tala, Moloni atindaki ete eteni yoko ya limpinga lya ye oyo bazalaki elongo na ye batambola o kati ya engumba, mpe bazwa yango.

25 Mpe boye basalaki, mpe babomaki bango banso baye batikalaki mpo ya kobatela engumba, iyo, bango banso baye balingaki te kotika mandoki ma bango ma etumba.

26 Mpe boye Moloni azwaki engumba Muleki elongo na eteni yoko ya limpinga lya ye, ntango etambolaki bango elongo na baye batikalaki mpo ya kokutana na Balamani ntango bazongaki uta o bolandi bwa Teakumi.

27 Mpe esalemaki ete Balamani balandaki Teakumi kina bakomaki penepene na engumba Beboo, mpe nde bakutanaki na Lehi mpe limpinga lyoko like, liye litikalaka mpo ya kobatela engumba Beboo.

28 Mpe sikawa tala, emonoko bakapiteni bakonzi ba Balamani Lehi elongo na limpinga lya ye koyaka kobunda na bango, bakimaki na mobulungano moike, mbele mbaimbai bazwa te engumba Muleki yambo Lehi alonga bango; mpo balembeki na ntina ya botamboli bwa bango, mpe bato ba Lehi bazalaki ba sika.

29 Sikawa Balamani bayebaki te ete Moloni azalaki nsima ya bango elongo na limpinga lya ye; mpe enso babangaki ezalaki Lehi mpe bato ba ye.

30 Sikawa Lehi azalaki te na mposa ya kolonga bango kina bakokutana na Moloni mpe limpinga lya ye.

31 Mpe esalemaki ete yambo Balamani bazonga nsima mosika bazingamaki na Banefi, na bato ba Moloni o ngambo yoko, mpe bato ba Lehi o ngambo esusu, bango banso bazalaki ba sika mpe batonda na bokasi; kasi Balamani balembeki na ntina ya botamboli bolai.

32 Mpe Moloni atindaki bato ba ye bakweya likolo lya bango kina babwakaki mandoki ma bango ma etumba.

33 Mpe esalemaki ete Yakobo, kozalaka mokambi wa bango, azalaki lisusu Mozolami, mpe kozalaka na molimo moko mokolongamaka te, akambaki Balamani kobunda na nkanda eluti na Moloni.

34 Moloni kozalaka o nzela ya botamboli bwa bango, yango wana Yakobo azwaki mokano mwa koboma bango mpe kokata nzela ya ye o kati ya engumba ya Muleki. Kasi tala, Moloni mpe bato ba ye bazalaki na nguya mingi koleka; yango wana bapesaki te nzela liboso lya Balamani.

35 Mpe esalemaki ete babundaki o ngambo ibale na nkanda eluti; mpe ezalaki mingi babomamaki o ngambo ibale; iyo, mpe Moloni azokisamaki mpe Yakobo abomamaki.

36 Mpe Lehi afinaki likolo lya nsima ya bango na nkanda ya lolenge loye elongo na bato ba ye bakasi, ete Balamani na nsima batikaki mandoki ma bango ma etumba; mpe etikali ya bango, kozalaka na mobulungano moike, bayebaki te wapi kokende to kobete.

37 Sikawa Moloni komonoko mobulungano mwa bango, alobaki epai ya bango: Soko bokomeme mandoki ma bino ma etumba mpe bokosundola mango, tala tokotika bosopi makila ma bino.

38 Mpe esalemaki ete eyokaki Balamani maloba maye, bakapiteni bakonzi ba bango, bango banso baye babomamaki te, babelemeki mpe babwakaki mandoki ma bango ma etumba o makolo ma Moloni, mpe lisusu batindaki bato ba bango basala lokola.

39 Kasi tala, ezalaki mingi baye balingaki te; mpe bango baye balingaki te kosundola mipanga mya bango bakamatamaki mpe bakangemaki, mpe mandoki ma bango ma etumba makamatamaki uta na bango, mpe basengisamaki kotambola elongo na bandeko ba bango o kati ya mboka Beboo.

40 Mpe sikawa motango mwa bato ba boloko baye bakamatamaki molutaki mingi koleka motango mwa bango baye babomamaki, iyo, mingi koleka baye babomamaki o ngambo ibale.