Makomi
Alama 55


Mokapo 55

Moloni aboyi bobetinii bwa bato ba boloko—Bakengeli ba Balamani basenginiami mpo ya kokoma balangwi, mpe Banefi babikisami—Engumba ya Gidi ekamatami na bozangi bosopi makila. Penepene na 63–62 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa esalemaki ete ezwaki Moloni monkanda moye, asilikaki mingi lisusu, mpo ayebaki ete Amoloni azalaki na boyebi boko bobongo nie bwa bokosi bwa ye; iyo, ayebaki ete Amoloni ayebaki ete ezalaki te ntina yoko ya boyengebene eye esalaki ye abunda etumba yoko na bato ba Nefi.

2 Mpe alobaki: Tala, nakobetinia te bato ba boloko elongo na Amoloni, longola se soko akolongola mwango mwa ye, lokola nalobi na monkanda mwa ngai; nakolinga te kopesa epai ya ye nguya mingi koleka eye azwi.

3 Tala, nayebi esika Balamani bakengeli bato ba ngai baye bakamataki bato ba boloko; mpe lokola Amoloni alingi te kondima mpo ya ngai monkanda mwa ngai, tala, nakopesa ye engebene na maloba ma ngai; iyo, nakoluka liwa o ntei ya bango kina bakoluka mpo ya kimia.

4 Mpe sikawa esalemaki ete elobaka Moloni maloba maye, asalaki ete boluki boko bosalema o ntei ya bato ba ye, ete mbele bakoka kokuta moto moko azalaki eboto moko ya Lamani o ntei ya bango.

5 Mpe esalemaki ete bakutaki moko, oyo ya ye nkombo ezalaki Lamani; mpe azalaki moko wa basali ba mokonzi oyo abomamaki na Amalikia.

6 Sikawa Moloni atindaki Lamani mpe motango moko moke mwa bato ba ye bakende epai ya bakengeli baye bazalaki likolo lya Banefi.

7 Sikawa Banefi bakengelemeki o engumba ya Gidi; yango wana Moloni aponoki Lamani mpe asalaki ete motango moko moke mwa bato ba ye bakende elongo na ye.

8 Mpe ezalaki mpokwa, Lamani akendeki epai ya bakengeli baye bazalaki kokengele Banefi, mpe tala, bamonoki ye koyaka mpe balobaki epai ya ye ateleme; kasi alobaki epai ya bango: Bangani te; tala, nazali Molamani. Tala, tokimaki o ntei ya Banefi, mpe balali; mpe tala tokamati vino ya bango mpe tomemi yango elongo na biso.

9 Sikawa eyokaki Balamani maloba maye bayambaki ye na bosepeli; mpe balobaki epai ya ye: Pesani biso vino ya bino, ete tomele; tosepeli ete bokamati boye vino elongo na bino mpo tolembi.

10 Kasi Lamani alobaki epai ya bango: Tobomba vino ya biso kina tokokende kobunda na Banefi o etumba. Kasi maloba maye masalaki bango bazala lisusu na mposa ya komele vino;

11 Mpo, balobaki: Biso tolembi, yango wana tokamata vino, mpe moke moke tokozwa vino mpo ya mposa ya biso, eye ekoyeisa biso bakasi mpo ya kokende kobunda na Banefi.

12 Mpe Lamani alobaki epai ya bango: Bokoki kosala engebene na mposa ya bino.

13 Mpe esalemaki ete bakamataki vino mpambampamba; mpe ezalaki elengi na boyoki bwa bango, yango wana bakamataki yango mingi mpambampamba; mpe ezalaki ekasi, mpo elengelemeki na bokasi bwa yango.

14 Mpe esalemaki ete bameleki mpe basepelaki, mpe moke moke balangwisamaki banso.

15 Mpe sikawa emonoki Lamani mpe bato ba ye ete bango banso balangwisamaki, mpe bazalaki o kati ya mpongi ya mozindo, bazongaki na Moloni mpe balobelaki ye makambo manso maye makomaki.

16 Mpe sikawa eye ezalaki engebene na mwango mwa Moloni. Mpe Moloni alengeleke bato ba ye elongo na mandoki ma etumba; mpe bakendeki o engumba ya Gidi, ntango ezalaki Balamani o kati ya mpongi ya mozindo mpe balangwisamaki, mpe babwakaki mandoki ma etumba epai ya bato ba boloko, mpenza ete bango banso bazwaki mandoki;

17 Iyo, kutu na basi ba bango, mpe bango banso ba bana ba bango, mingi lokola bakokaki kosalela mandoki ma etumba, epesaki Moloni mandoki na bato bana banso ba boloko; mpe makambo mana manso masalemaki na kimia yoko ya mozindo.

18 Kasi elamusaka bango Balamani, tala balangwisamaka, mpe Banefi balingaka koboma bango.

19 Kasi tala, eye ezalaki te mposa ya Moloni; asepelaki te na bobomi to bosopi makila, kasi asepelaki na kobatelaka bato ba ye uta o bobebisami; mpe mpo ya ntina eye akokaki te komeme likolo lya ye bozangi boyengebene, alingaki te kokweya likolo lya Balamani mpe kobebisa bango o molangwa mwa bango.

20 Kasi azwaki mposa ya ye; mpo apesaka mandoki na bato ba boloko Banefi baye bazalaka o ntei ya efelo ya engumba, mpe apesaka bango nguya ya kolonga bozwi bwa biteni bina biye bizalaki o ntei ya bifelo.

21 Mpe nde asalaki bato baye bazalaki elongo na ye balongwa o ntaka yoko uta na bango, mpe bazingaka mampinga ma Balamani.

22 Sikawa tala eye esalemaki o ntango ya butu, boye ete elamukaki Balamani o ntongo bamonoki ete bazingamaki na Banefi o libanda, mpe ete bato ba boloko ba bango bazwaki mandoki o kati.

23 Mpe boye bamonoki ete Banefi bazalaki na nguya likolo lya bango; mpe o bizalela biye bamonoki ete elongobanaki te ete babunda na Banefi; yango wana bakapiteni bakonzi ba bango basengeki mandoki ma bango ma etumba, mpe bamemeki mango mpe babwakaki mango o makolo ma Banefi, na kosambaka mpo ya ngolu.

24 Sikawa tala, eye ezalaki mposa ya Moloni. Akamataki bango bato ba boloko ba etumba, mpe akamataki engumba, mpe asalaki ete bato banso ba boloko babikisama, baye bazalaki Banefi; mpe basanganaki na limpinga lya Moloni, mpe bazalaki bolendisi bonene na limpinga lya ye.

25 Mpe esalemaki ete asalaki Balamani, baye bakamatamaki bato ba boloko, ete babanda mosala moko na kolendisaka bisika bikasi zingazinga penepene na engumba Gidi.

26 Mpe esalemaki ete elendisaki ye engumba Gidi, engebene na mposa ya ye, asalaki ete bato ba ye ba boloko bakamatama o engumba Beboo; mpe lisusu akengeleki engumba ena elongo na makasi mingi mpenza.

27 Mpe esalemaki ete, ata poloso inso ya Balamani, babombaki mpe babatelaki bato banso ba boloko baye bakamataka, mpe lisusu basimbaki mabele mpe matomba manso maye bakamataka lisusu.

28 Mpe esalemaki ete Banefi babandaki lisusu kozala balongi, mpe bawelaki makoki ma bango mpe matomba ma bango.

29 Mbala mingi Balamani bamekaki kozinga bango mpembeni na butu, kasi na bomeki boye babungisaki bato mingi ba boloko.

30 Mpe mbala mingi bamekaki kopesa vino ya bango na Banefi, ete babebisa bango na ngenge to na molangwa.

31 Kasi tala, Banefi bazalaki te malembe na komikundola Nkolo Nzambe wa bango o ntango ya bango ya litungisi. Bakokaki te kozwama o mitambo mya bango; iyo, balinga te komele vino ya bango, longola se soko bapesaka yambo na moko wa Balamani ba boloko.

32 Mpe bazalaki boye ekenge ete ngenge epesama te o ntei ya bango; mpo soko vino ya bango ekotia ngenge Molamani moko ekotia lokola ngenge Monefi moko; mpe boye bamekaki masanga makasi manso ma bango.

33 Mpe sikawa esalemaki ete elongobanaki mpo ya Moloni kosala bolengeli mpo ya kobunda na engumba Moliatoni; mpo tala, Balamani, na misala mya bango, balendisaki engumba ya Moliatoni kina ekomaki esika eluti ekasi.

34 Mpe bakobaki komemeke makasi ma sika o kati ya engumba ena, mpe lisusu biloko bya sika bya bolei.

35 Mpe boye esukaki mobu mwa ntuku mibale na libwa mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.