Makomi
Alama 35


Mokapo 35

Boteyi bwa liloba bobebisi bikelakela bya Bazolami—Babengani babongwani, baye nde basanganaki na bato ba Amona o Yesoni—Alama ayoki mawa na ntina ya nkuna ya bato. Penepene na 74 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa esalemaki ete esilisaka Amuleki kotia nsuka yoko o maloba maye, bamilongolaki uta na ebele mpe bayaki likolo o kati ya mboka ya Yesoni.

2 Iyo, mpe etikali ya bandeko, esilisaka bango koteya liloba epai ya Bazolami, bayaki likolo o mboka ya Yesoni lokola.

3 Mpe esalemaki ete esilaka eteni eyebana mingi ya Bazolami kotunana elongo etali maloba maye malakisamaki epai ya bango, basilikaki na ntina ya liloba, mpo ebebisaki bikelakela bya bango; yango wana balingaki te koyokemela epai ya maloba.

4 Mpe batindaki mpe basangisaki elongo o ntaka ya mboka mobimba bato banso, mpe batunanaki elongo na bango etali maloba maye malobamaki.

5 Sikawa bayangeli ba bango mpe banganga ba bango mpe balakisi ba bango batikaki te bato bayeba etali mposa ya bango; yango wana bayebaki na mayele makanisi ma bato banso.

6 Mpe esalemaki ete esilaka bango koyeba makanisi ma bato banso, bango baye basepelaki na maloba maye malobamaki na Alama mpe bandeko ba ye babwakamaki libanda lya mboka; mpe bazalaki mingi; mpe bayaki lisusu likolo o mboka ya Yesoni.

7 Mpe esalemaki ete Alama mpe bandeko ba ye basalaki epai ya bango.

8 Sikawa bato ba Bazolami basilikaki na bato ba Amona baye bazalaki o Yesoni, mpe moyangeli mokonzi wa Bazolami, kozalaka moto moko wa nkuna mpenza, atindaki likolo epai ya bato ba Amona kozalaka na mposa ete bango babwaka libanda lya mboka ya bango banso baye bayaki likolo uta na bango o kati ya mboka

9 Mpe afulaki libanda bokaneli mingi likolo lya bango. Mpe sikawa bato ba Amona babangaki te maloba ma bango; yango wana baboyaki kobwaka bango libanda, kasi bayambaki bakeleli banso ba Bazolami baye bayaki likolo epai ya bango; mpe baleisaki bango, mpe balatisaki bango, mpe bapesaki epai ya bango mboka mpo ya lisango lya bango; mpe basalaki epai ya bango engebene na mposa ya bango.

10 Sikawa eye elamusaki Bazolami na nkanda likolo lya bato ba Amona, mpe babandaki kosangana elongo na Balamani mpe balamusaki bango lokola na nkanda likolo lya bango.

11 Mpe boye Bazolami mpe Balamani babandaki kosala bolengeli mpo ya etumba na bato ba Amona, mpe lisusu na Banefi.

12 Mpe boye esilaki mobu mwa zomi na sambo mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.

13 Mpe bato ba Amona bakendeki libanda lya mboka ya Yesoni, mpe bayaki likolo kofanda o kati ya mboka ya Meleki, mpe bapesaki esika o mboka ya Yesoni mampinga ma Banefi, ete bakoka kowela na mampinga ma Balamani mpe mampinga ma Bazolami; mpe boye ebandaki etumba o kati ya Balamani mpe Banefi, o mobu mwa zomi na mwambe mwa bokonzi bwa basambisi; mpe nsango yoko ekopesama ya bitumba bya bango awa nsima.

14 Mpe Alama, mpe Amona, mpe bandeko ba bango, mpe lisusu bana babali babale ba Alama bazongaki o mboka ya Zalayemila, esilisaki bango kozala bisalele o maboko ma Nzambe mpo ya komeme mingi ya Bazolami o boyamboli; mpe lokola mingi bamememeki o boyamboli babenganamaki libanda lya mboka ya bango; kasi bazalaki na mboka mpo ya lisango lya bango o mboka ya Yesoni, mpe bakamataki mandoki mpo ya kobatela bangomei, mpe basi ba bango, mpe bana, mpe mboka ya bango.

15 Sikawa Alama, eyokaki ye mpasi mpo ya bobe bwa bato ba ye, iyo mpo ya bitumba, mpe bosopi makila, mpe boweli boye bozalaki o ntei ya bango; mpe esakolaki ye liloba, to etindamaki ye mpo ya kosakola liloba o ntei ya bato banso o engumba inso; mpe komonoko ete mitema mya bato mibandaki kokola na bokasi, mpe ete babandaki kotumolama na ntina ya sikisiki ya liloba, motema mwa ye mozalaki na mawa mpenza.

16 Yango wana, asalaki ete bana babali ba ye basangisama elongo, ete akoka kopesa epai ya bango moko na moko mokumba mwa ye, ya bokeseni, etali makambo masengeli mpo ya bosembo. Mpe tozali na nsango yoko ya mitindo mya ye, miye apesaki epai ya bango engebene na likundoli lya yemei.