Makomi
Alama 11


Mokapo 11

Libongisi lya mosolo mwa Banefi lisalemi—Amuleki aweli na Zezilomi—Klisto akobikisa te bato o masumu ma bango—Bobele baye basangoli bokonzi bwa lola bakobikisama—Bato banso bakosekwa o bozangi bokufi—Ezali liwa te nsima ya Bosekwi. Penepene na 82 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa ezalaki o mobeko mwa Moziya ete moto na moto oyo azalaki mosambisi moko wa mobeko, to bango baye baponomoki mpo ya kozala basambisi, bakozwa lifuta engebene na ntango eye basalaki mpo ya kosambisa bango baye bamememeki liboso lya bango mpo ya kosambisama.

2 Sikawa soko moto moko asengelaki na mosusu, mpe alingaki te kofuta ena asengelaki, afundamaki na mosambisi; mpe mosambisi asalelaki bokulaka, mpe atindaki bapolisi ete moto ona amememe liboso lya ye; mpe asambisaki moto ona engebene na mobeko mpe polele iye imememi likolo lya ye, mpe boye moto ona asengisamaki kofuta ena eye asengelaki, to kobotolomo, to bakobwakama libanda uta o ntei ya bato lokola moyibi moko mpe mopunzi moko.

3 Mpe mosambisi azwaki lifuta lya ye engebene na ntango ya ye—senini yoko ya wolo mpo ya mokolo moko, to senumi ya mpauni, eye ekokani na senini moko ya wolo; mpe eye ezali engebene na mobeko moye mopesamaki.

4 Sikawa iye izali nkombo ya biteni bya lolenge na lolenge bya wolo ya bango, mpe ya mpauni ya bango, engebene na motuya mwa yango. Mpe nkombo epesamaki na Banefi, mpo batangaki te nsima ya lolenge la Bayuda baye bazalaki o Yelusaleme; mpe bamekaki te nsima ya lolenge la Bayuda; kasi babalolaki mituya mpe lomeko la bango, engebene na mayele mpe bizaleli bya bato, o nkola inso, kina o bokonzi bwa basambisi, etiamaki bango na mokonzi Moziya.

5 Sikawa mituya mizali boye—senini yoko ya wolo, seoni yoko ya wolo, sumi yoko ya wolo, mpe limina lyoko lya wolo.

6 Senumi yoko ya mpauni, aminoli yoko ya mpauni, ezilomi yoko ya mpauni, mpe oti yoko ya mpauni.

7 Senumi yoko ya mpauni ekokanaki na senini yoko ya wolo, mpe mpo ya lomeko loko la loso, mpe lisusu mpo ya lomeko la mboto ya lolenge na lolenge.

8 Sikawa boike bwa seoni ya wolo bozalaki mbala ibale motuya mwa senini yoko.

9 Mpe sumi yoko ya wolo ezalaki mbala ibale motuya mwa seoni.

10 Mpe limina lyoko ya wolo ezalaki motuya mwa yango inso.

11 Mpe aminoli yoko ya mpauni ezalaki enene lokola senumi ibale.

12 Mpe ezilomi yoko ya mpauni ezalaki enene lokola senumi inei.

13 Mpe oti ezalaki enene lokola yango inso.

14 Sikawa eye ezali motuya mwa mitango mileki mike mya mituya mya yango—

15 Sibiloni yoko ezali katikati ya senumi yoko; yango wana, sibiloni yoko ezalaki katikati ya lomeko loko la loso.

16 Mpe sibilumi yoko ezali katikati ya sibiloni yoko.

17 Mpe leya yoko ezali katikati ya sibilumi yoko.

18 Sikawa eye ezali motango mwa yango, engebene na mituya mwa yango.

19 Sikawa antioni yoko ya wolo ekokanaki na sibiloni isato.

20 Sikawa, ezalaki mpo ya mwango se moko ya matabisi, zambi bazwaki lifuta lya bango engebene na mosala mwa bango, yango wana, balamusaki bato mpo ya loyenge mpe ndenge inso ya mobulu mpe nkuna, ete bakoka kozala na mosala mingi, ete bakoka kozwa mosolo engebene na makambo maye mamememeki liboso lya bango; yango wana balamusaki bato na nkanda ya Alama mpe Amuleki.

21 Mpe Zezilomi oyo abandaki kotuna Amuleki, kolobaka: Elingi yo koyanola ngai mwa mituna miye nakotuna yo? Sikawa Zezilomi azalaki moto moko oyo azalaki nganga na mayele mabe ma zabulu, ete akoka kobebisa ena eye ezalaki elamu; yango wana, alobaki epai ya Amuleki: Elingi yo koyanola mituna miye nakotuna yo?

22 Mpe Amuleki alobaki epai ya ye: Iyo, soko ezali engebene na Molimo mwa Nkolo, oyo azali na ngai; mpo nakoloba eloko eye ezali na bokesene na Molimo mwa Nkolo. Mpe Zezilomi alobaki epai ya ye: Tala, awa ezali oti motoba ya mpauni, mpe iye inso nakopesa yo soko owangani lizali lya Mozali Wa Likolo Mingi Koleka.

23 Sikawa Amuleki alobaki: O yo mwana wa limfelo, ntina nini ekosenginia yo ngai? Eyebi yo ete mosembo akomitikaka te o masenginia ma lolenge loye?

24 Endimi yo ete Nzambe azali te? Nalobi epai ya yo, Te, oyebi ete ezali Nzambe moko, kasi yo olingi faida mingi koleka ye.

25 Mpe sikawa okosi liboso lya Nzambe epai ya ngai. Olobi epai ya ngai—Tala iye oti motoba, iye ilongobani mpenza, nakopesa epai ya yo—ntango ozalaki na motema mwa yo kopima yango epai ya ngai; mpe ezalaki se mposa ya yo ete nawangana Nzambe wa solo mpe wa bomoi, ete okoka kozala na ntina ya kobebisa ngai. Mpe sikawa tala, mpo ya bobe boye bonene okozwa mbano ya yo.

26 Mpe Zezilomi alobaki epai ya ye: Olobi ezali Nzambe moko wa solo mpe wa bomoi?

27 Mpe Amuleki alobaki: Iyo, ezali Nzambe moko wa solo mpe wa bomoi.

28 Sikawa Zezilomi alobaki: Ezali mingi koleka Nzambe moko?

29 Mpe ayanolaki, Te.

30 Sikawa Zezilomi alobaki epai ya ye lisusu: Boniboni eyebi yo makambo maye?

31 Mpe alobaki: Anzelu moko wa Nzambe asalaki mango mayebana epai ya ngai.

32 Mpe Zezilomi alobaki lisusu: Nani oyo akoya? Ezali Mwana Mobali wa Nzambe?

33 Mpe alobaki epai ya ye, Iyo.

34 Mpe Zezilomi alobaki lisusu: Ekobikisa ye bato ba ye o masumu ma bango? Mpe Amuleki ayanolaki mpe alobaki epai ya ye: Nalobi epai ya yo akosala yango te, mpo ekoki kosalema te mpo ya ye kowangana liloba lya ye.

35 Sikawa Zezilomi alobaki epai ya bato: Tala ete bomikundoli makambo maye; mpo alobaki ezali kaka Nzambe moko; nzokande alobi ete Mwana Mobali wa Nzambe akoya, kasi akobikisa bato ba ye te—lokola soko azalaka na bokulaka bwa kotinda Nzambe.

36 Sikawa Amuleki alobi epai ya ye lisusu: Tala okosi, mpo olobi ete nalobaki lokola soko nazali na bokulaka bwa kotinda Nzambe, zambi nalobaki ete akobikisa te bato ba ye o masumu ma bango.

37 Mpe nalobi epai ya yo lisusu ete akoki kobikisa bango te o masumu ma bango; mpo nakoki te kowangana liloba lya ye, mpe alobi ete eloko te ya mbindo ekoki kosangola bokonzi bwa lola; yango wana, boniboni bokoki kobikisama, longola se soko bosangoli bokonzi bwa lola? Yango wana, bokoki te kobika o masumu ma bino.

38 Sikawa Zezilomi alobi lisusu epai ya ye: Ezali Mwana Mobali wa Nzambe mpenza Tata wa Seko?

39 Mpe Amuleki alobaki epai ya ye: Iyo, azali mpenza Tata wa Seko wa lola mpe wa mabele, mpe wa biloko binso biye bizali o yango; ye azali ebandeli mpe nsuka, wa yambo mpe wa nsuka;

40 Mpe akoya o kati ya mokili kosikola bato ba ye; mpe akokamata likolo lya ye bobuki mobeko bwa bango baye bakondima likolo lya nkombo ya ye; mpe baye bazali bango baye bakozala na bomoi bwa seko, mpe lobiko lokoya na moto mosusu te.

41 Yango wana moto wa nkuna akotikala lokola soko bosikolami bosalemaki te, longola se soko ezali bokangolami bwa nkanga ya liwa; mpo tala, mokolo mokoya moye banso bakosekwa uta o bakufi mpe bakoteleme liboso lya Nzambe, mpe bakosambisama engebene na misala mya bango.

42 Sikawa, ezali liwa lyoko liye libiangemi liwa lya ntango; mpe liwa lya Klisto likokangola nkanga ya liwa lya ntango, ete banso bakosekwa uta o liwa lya ntango.

43 Molimo mpe nzoto ikosangana lisusu na lolenge la yango lobongo nie; enama mpe ekangisele lokola ekozongisama o lolenge la yango mpenza, kutu lokola tozali o ntango eye; mpe tokomememe mpo ya koteleme liboso lya Nzambe, koyebaka kutu lokola toyebi sikawa, mpe tokozala na bokundoli polele bwa elindo enso ya biso.

44 Sikawa, bozongisi boye bokoya na banso, babale mobange mpe elenge lokola, babale mowumbu mpe monsomi lokola, babale mwasi mpe mobali lokola, babale moto wa nkuna mpe mosembo lokola; mpe kutu ekobunga te boye nzike lokola nsuki yoko ya mito mya bango; kasi eloko na eloko ekozonga na lolenge lobongo nie la yango, lokola ezali sikawa, to o nzoto eye, mpe ekomememe mpe ekotiama o nkondo liboso lya esika ya Klisto Mwana Mobali, mpe Nzambe Tata, mpe Molimo Mosantu, oyo azali Nzambe moko wa Seko, mpo ya kosambisama engebene na misala mya bango, soko mizalaki milamu to soko mizalaki mibe.

45 Sikawa, tala, nalobaki epai ya bino etali liwa lya nzoto ya kufa, mpe lisusu etali bosekwi bwa nzoto ya kufa. Nalobi epai ya bino ete nzoto eye ya kufa esekwi o nzoto ya kufa te, ena ezali uta o liwa, kutu liwa lya yambo mpo ya bomoi, ete bakoka kokufa lisusu te; molimo mwa bango kosanganaka na nzoto ya bango, mpo ya kokabwana mokolo moko te; boye mobimba kokomaka ya molimo mpe ya kufa te, bakoka komono lisusu te bopoli.

46 Sikawa, esilisaki Amuleki koloba maloba maye bato babandaki lisusu kokamwa, mpe lisusu Zezilomi abandaki kolenge. Mpe boye esukaki maloba ma Amuleki, to eye nde ezali manso maye nakomi.