Makomi
Alama 16


Mokapo 16

Balamani babebisi bato ba Amoniya—Zolami akambi Banefi o elonga likolo lya Balamani—Alama mpe Amuleki mpe mingi basusu bateyi liloba—Balakisi ete nsima ya bosekwi bwa ye Klisto akobima na Banefi. Penepene na 81–77 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete o mobu mwa zomi na moko mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi, o mokolo mwa mitano mwa sanza ya ibale, ezalaki kimia nzike o mboka ya Zalayemila, ezalaki bitumba te mpe boweli te mpo ya yoko motango mwa mibu, kutu kina o mokolo mwa mitano mwa sanza ya ibale, o mobu mwa zomi na moko, eyokanaki bogangi boko bwa bitumba o ntaka ya mboka.

2 Mpo tala, mampinga ma Balamani mayaka likolo lya mopanzi mwa esobe, o kati ya ndelo ya mboka, kutu o kati ya engumba ya Amoniya, mpe babandaki koboma bato mpe kobebisa engumba.

3 Mpe sikawa esalemaki ete, yambo Banefi bakoka kotelemisa limpinga lyoko likoki mpo ya kobwaka bango libanda lya mboka, babebisaka bato baye bazalaki o engumba ya Amoniya, mpe lisusu boko zingazinga na ndelo ya Noa, mpe bamemeki basusu mosika bakangemi o kati ya esobe.

4 Sikawa esalemaki ete Banefi bazalaki na mposa ya kokamata bango baye bamememeke mosika bakangemi o kati ya esobe.

5 Yango wana, ye oyo aponomoki kapiteni mokonzi likolo lya mampinga ma Banefi, (mpe nkombo ya ye ezalaka Zolami, mpe azalaka na bana babali babale, Lehi mpe Aya)—sikawa Zolami mpe bana ba ye babali babale, koyebaka ete Alama azalaki nganga monene likolo lya eklezia, koyokaka ete Alama azalaki na molimo mwa bobikuli, yango wana bakendeki epai ya ye mpo ya koyeba soko Nkolo akolinga ete bakende o kati ya esobe o boluki bwa bandeko ba bango, baye bakamatamaka bakangemi na Balamani.

6 Mpe esalemaki ete Alama atunaki Nkolo etali likambo lyango. Mpe Alama azongaki mpe alobaki epai ya bango ete: Tala, Balamani bakokatisa ebale ya Sidoni o sudi ya esobe, mosika mpenza o ngambo esusu ya ndelo ya mboka ya Mati. Mpe tala, kuna ekokutana bino na bango, o esti ya ebale ya Sidoni, mpe kuna Nkolo akopesa bino bandeko ba bino baye bakamatami bakangemi na Balamani.

7 Mpe esalemaki ete Zolami mpe bana babali ba ye bakatisaki likolo lya ebale ya Sidoni, elongo na mampinga ma bango, mpe batambolaki mosika o ngambo esusu ya ndelo ya Mati o kati ya sudi ya esobe, eye ezalaki o mopanzi mwa esti ya ebale ya Sidoni.

8 Mpe bayaki likolo lya mampinga ma Balamani, mpe Balamani bapalanganaki mpe babenganamaki o kati ya esobe; mpe bakamataki bandeko ba bango baye bakamatamaka bakangami na Balamani, mpe ezalaki moto moko te wa bango abungaka oyo akamatamaka mokangami. Mpe bamememeki na bandeko ba bango mpo ya kozwa mboka ya bangomei.

9 Mpe boye esilaki mobu mwa zomi na moko mwa basambisi, Balamani kobenganamaka libanda lya mboka, mpe bato ba Amoniya babebisamaki; iyo, moto onso wa bomoi wa Baamoniyayite abebisamaki, mpe lisusu engumba ya bango enene, eye balobaki Nzambe akokaki te kobebisa, na ntina ya bonene bwa yango.

10 Kasi tala, o mokolo moko etikalaki mpamba; mpe bibembe biliamaki na mbwa mpe niama ya zamba.

11 Nzokande, nsima ya mikolo mingi nzoto ya bango ikufa itondisamaki meke likolo lya etando ya mabele, mpe izipamaki na ezipele eke. Mpe sikawa boye bonene bozalaki nsolo ya yango ete bato bakendeki te kozwa mboka ya Amoniya mpo ya mibu mingi. Mpe ebiangemaki Mpamba ya Banewolo; mpo bazalaki ba mosala mwa Newolo, baye babomamaki; mpe mboka ya bango etikalaki mpamba.

12 Mpe Balamani bayaki lisusu te kobunda na Banefi kina o mobu mwa zomi na minei mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi. Mpe boye mpo ya mobu misato bato ba Nefi bazalaki na kimia ya ntango inso o mboka mobimba.

13 Mpe Alama mpe Amuleki bakendeki koteyaka boyamboli na bato o tempelo ya bango, mpe o ndako isantu ya bango, mpe lisusu o sinagogi ya bango, iye itongamaki nsima ya lolenge la Bayuda.

14 Mpe lokola mingi balingaki koyoka maloba ma bango, epai ya bango bakabaki liloba lya Nzambe, na boponi bato te.

15 Mpe boye Alama mpe Amuleki bakendeki, mpe bato basusu mingi koleka baponomoki mpo ya mosala, mpo ya koteya liloba o ntaka ya mboka mobimba. Mpe botii bwa eklezia bokomaki bisika binso o ntaka ya mboka, o bikolo binso zingazinga mpembeni, o ntei ya bato banso ba Banefi.

16 Mpe ezalaki bokeseni te o ntei ya bango; Nkolo asopaki mpenza libanda Molimo mwa ye likolo lya etando mobimba ya mboka mpo ya kolengele mayele ma bana ba bato, to mpo ya kolengele mitema mya bango mpo ya koyamba liloba liye bakolakisama o ntango ya boyei bwa ye—

17 Ete bakoka te kozala bakasi na liloba, ete bakoka te kozala bazangi bondimi, mpe kokoba o bobebisami, kasi ete bakoka koyamba liloba na bosepeli, mpe lokola etape ekangemi o kati ya vino ya solo, ete bakoka kokota o kati ya bopemi bwa Nkolo Nzambe wa bango.

18 Sikawa banganga baye bakendeki o ntei ya bato bateyaki likolo lya lokuta, mpe bokosi, mpe boluli, mpe songisongi, mpe nko, mpe matio, mpe boyibi, boyongoli, bopunzi, bobomi, bosali ekobo, mpe ndenge inso ya bosoni, kobelelaka ete makambo maye masengeli te kozala boye—

19 Kolakisaka makambo maye makoya mosika te; iyo, kolakisaka boyei bwa Mwana Mobali wa Nzambe, mpasi mpe liwa lya ye, mpe lisusu bosekwi bwa bakufi.

20 Mpe mingi ya bato batunaki etali esika wapi Mwana Mobali wa Nzambe akoya; mpe balakisamaki akobima epai ya bango nsima ya bosekwi bwa ye; mpe eye bato bayokaki na bosepeli bonene mpe nsai.

21 Mpe sikawa esilaka eklezia kotiama o ntaka ya mboka mobimba—kozwaka elonga likolo lya zabulu, mpe liloba lya Nzambe koteyamaka o bopeto bwa lyango o mboka mobimba, mpe Nkolo kosopaka mapamboli ma ye likolo lya bato—boye esilaki mobu mwa zomi na minei mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.