Makomi
Alama 62


Mokapo 62

Moloni atamboli o lisalisi lya Pawolani o mboka ya Gideona—Bato ba mokonzi baye baboyi kobunda mpo ya kobatela ekolo ya bango batiami o liwa—Pawolani mpe Moloni bakamati lisusu Nefiya—Mingi ya Balamani basangani na lingomba lya bato ba Amona—Teakumi abomi Amoloni mpe abomami lokola—Balamani Babenganami libanda lya mboka, mpe kimia etiami—Elamani azongi o mosala mpe atongi Eklezia. Penepene na 62–57 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete ntango Moloni azwaka monkanda moye motema mwa ye mozwaki mpiko, mpe motondaki na bosepeli bonene mpenza na ntina ya bopotongono bwa Pawolani, ete azali te lokola mokabi wa bonsomi mpe likambo lya ekolo ya ye.

2 Kasi alelaki mpenza lokola na ntina ya bobe bwa baye babenganaka Pawolani uta o kiti ya bosambisi, iyo, o nsuka na ntina ya bango baye batombokaki na ekolo ya bango mpe lisusu Nzambe wa bango.

3 Mpe esalemaki ete Moloni akamataki motango moke mwa bato, engebene na mposa ya Pawolani, mpe apesaki Lehi mpe Teakumi bokomanda likolo lya etikali ya limpinga lya ye, mpe akamataki botamboli bwa ye ona mboka ya Gideona.

4 Mpe atombolaki bendele ya lipanda o bisika binso akotaki, mpe akamataki makasi manso maye akokaki o botamboli bonso bwa ye ona mboka ya Gideona.

5 Mpe esalemaki ete nkoto na nkoto basopanaki epai ya bendele ya ye, mpe bakamataki mipanga mya bango o bobateli bwa bonsomi bwa bango, ete bakoka kokota te o kati ya bowumbu.

6 Mpe boye, esangisaka elongo Moloni bato banso akokaki o botamboli bonso bwa ye, ayaki o mboka ya Gideona; mpe kotiaka na bomoko makasi ma ye elongo na mana ma Pawolani bakomaki bakasi mpenza, kutu bakasi mingi koleka bato ba Pakusi, oyo azalaki mokonzi wa bakabwani baye babenganaki bato nsomi libanda lya mboka ya Zalayemila mpe bakamataka mboka.

7 Mpe esalemaki ete Moloni mpe Pawolani bakitaki elongo na mampinga ma bango o kati ya mboka ya Zalayemila, mpe bakendeki kobunda na engumba, mpe bakutanaki na bato ba Pakusi, mpenza ete bayaki mpo ya kobunda.

8 Mpe tala, Pakusi abomamaki mpe bato ba ye bakamatamaki bato ba boloko, mpe Pawolani azongisamaki o kiti ya bosambisi.

9 Mpe bato ba Pakusi bazwaki bosambisi bwa bango, engebene na mobeko, mpe lisusu bato bana ba mokonzi baye bakamatamaka mpe babwakamaka o kati ya boloko; mpe babomamaki engebene na mobeko; iyo, bato bana ba Pakusi mpe bato bana ba mokonzi, banso baye balingaki te kokamata mandoki o bobateli bwa ekolo ya bango, kasi balingaki kobunda na yango, batiamaki o liwa.

10 Mpe boye ekomaki elongobani ete mobeko moye motosama na sikisiki mpo ya bozangi likama bwa ekolo ya bango; iyo, mpe onso oyo amononoki kowanganaka bonsomi bwa bango abomamaki noki engebene na mobeko.

11 Mpe boye esukaki mobu mwa tuku misato mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi; Moloni mpe Pawolani ezongisaki bango kimia o mboka ya Zalayemila, o ntei ya bato ba bangomei, mpe ekweisaki bango liwa likolo lya bango banso baye bazalaki solo te o bonsomi bwa bango.

12 Mpe esalemaki ete o ebandeli ya mobu mwa tuku misato na moko mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi, Moloni asalaki sasaipi ete bilei bitindama, mpe lisusu limpinga lyoko lya bato nkoto motoba epai ya Elamani, mpo ya kosalisa ye o bobateli bwa eteni ena ya mboka.

13 Mpe asalaki lisusu ete limpinga lyoko lya bato nkoto motoba, elongo na boike bwa bilei, bitindama na mampinga ma Lehi mpe Teakumi. Mpe esalemaki ete eye esalemaki mpo ya kolendisa mboka o etumba na Balamani.

14 Mpe esalemaki ete Moloni mpe Pawolani, kotikaka nzoto yoko enene ya bato o mboka ya Zalayemila, bakamataki botamboli bwa bango elongo na nzoto yoko enene ya bato ona mboka ya Nefiya, kozalaka na mokano mwa kokweisa Balamani o engumba.

15 Mpe esalemaki ete lokola ezalaki bango kotambolaka ona mboka, bakamataki nzoto yoko enene ya bato ba Balamani, mpe babomaki mingi ya bango, mpe bakamataki bilei bya bango mpe mandoki ma bango ma etumba.

16 Mpe esalemaki ete esilisaki bango kokamata bango, basalaki ete bakota o kati ya boyokani boko ete bakokamata lisusu te mandoki ma bango ma etumba mpo ya kobunda na Banefi.

17 Mpe ekotaka bango o kati ya boyokani boye batindaki bango bafanda elongo na bato ba Amona, mpe bazalaki na motango penepene na nkoto inei baye babomamaka te.

18 Mpe esalemaki ete etindaka bango bango mosika bakobaki botamboli bwa bango ona mboka ya Nefiya. Mpe esalemaki ete ekomaki bango o engumba ya Nefiya, batelemisaki biema bya bango o esobe ya Nefiya, eye ezali penepene na engumba ya Nefiya.

19 Sikawa Moloni azalaki na mposa ete Balamani babima mpo ya kobunda na bango, likolo lya esobe; kasi Balamani, koyebaka mpiko mpenza ya bango, mpe komonoko bonene bwa mitango mya bango, yango wana bamekaki te kobima mpo ya kobunda na bango; yango wana bayaki te kobunda o mokolo mona.

20 Mpe eyaki butu, Moloni apusanaki na molili mwa butu, mpe akendeki likolo lya nsonge ya efelo mpo ya kononga o eteni nini ya engumba Balamani batiaki nganda elongo na limpinga lya bango.

21 Mpe esalemaki ete bazalaki o esti, mpembeni ya ekotelo; mpe banso balalaki. Mpe sikawa Moloni azongaki epai ya limpinga lya ye, mpe asalaki ete bango balengele na lombangu nsinga ikasi mpe bibutele, mpo ya kokitisama uta o nsonge ya efelo o kati ya eteni ya katikati ya efelo.

22 Mpe esalemaki ete Moloni asalaki ete bato ba ye bapusana mpe baya likolo lya nsonge ya efelo, mpe bamikitisa o kati ya eteni ena ya engumba, iyo, kutu o westi, wapi Balamani batiaki te nganda elongo na mampinga ma bango.

23 Mpe esalemaki ete banso bakitisamaki o kati ya engumba o butu, na nzela ya nsinga ikasi ya bango mpe bibutele bya bango; boye eyaki ntongo bazalaki banso o kati ya bifelo bya engumba.

24 Mpe sikawa, elamukaki Balamani mpe emonoki bango ete mampinga ma Moloni mazalaki o kati ya bifelo, babangaki mpenza, mpenza ete bakimaki libanda na lidusu.

25 Mpe sikawa emonoki Moloni ete bazalaki kokimaka ye, asalaki ete bato ba ye bapusana mpo ya kobunda na bango, mpe babomaki mingi, mpe bazingaki basusu mingi, mpe bakamataki bango bato ba boloko; mpe baye batikalaki bakimaki o kati ya mboka ya Moloni, eye ezalaki o ndelo mpembeni ya libongo lya mbu.

26 Boye ezwaka Moloni mpe Pawolani engumba ya Nefiya na bozangi bobungisi bwa bozo boko; mpe izalaki mingi ya Balamani baye babomamaki.

27 Sikawa esalemaki ete mingi ya Balamani baye bazalaki bato ba boloko bazalaki na mposa ya kosangana na bato ba Amona mpe ya kokoma bato nsomi.

28 Mpe esalemaki ete mingi lokola bazalaki na mposa, epai ya bango epesamaki engebene na mposa ya bango.

29 Yango wana, bato banso ba boloko ba Balamani basanganaki na bato ba Amona, mpe babandaki kosala mpenza, kolonaka na mabele, kokolisaka ndenge inso ya mboto, mpe bibwele mpe bitonga bya lolenge na lolenge; mpe boye Banefi babondisamaki na bozito boko bonene bwa bango; iyo, mpenza ete babondisamaki uta na bato banso ba boloko ba Balamani.

30 Sikawa esalemaki ete, esilisaka Moloni kozwa engumba ya Nefiya, ekamataka bango bato mingi ba boloko, eye ekitisaki mampinga ma Balamani mpenza, mpe ebotoloki bango mingi ya Banefi baye bakamatamaka bato na boloko, eye elendisaki limpinga lya Moloni mpenza; yango wana Moloni akendeki uta mboka ya Nefiya o mboka ya Lehi.

31 Mpe esalemaki ete emonoki Balamani ete Moloni azalaki koyaka kobunda na bango, babangaki lisusu mpe bakimaki liboso lya limpinga lya Moloni.

32 Mpe esalemaki ete Moloni mpe limpinga lya ye balandaki bango uta engumba na engumba, kina bakutanaki na Lehi mpe Teakumi; mpe Balamani bakimaki uta na Lehi mpe Teakumi, kutu o nse likolo lya ndelo mpembeni ya libongo lya mbu, kina bayaki o mboka ya Moloni.

33 Mpe mampinga ma Balamani masanganaki manso elongo, mpenza ete bazalaki banso o nzoto yoko o mboka ya Moloni. Sikawa Amoloni, mokonzi wa Balamani, azalaki lisusu elongo na bango.

34 Mpe esalemaki ete Moloni mpe Lehi mpe Teakumi batiaki nganda elongo na mampinga ma bango zingazinga mpembeni o ndelo ya mboka ya Moloni, mpenza ete Balamani bazingamaki o ndelo mpembeni ya esobe o sudi, mpe o ndelo mpembeni ya esobe o esti.

35 Mpe boye batiaki nganda mpo ya butu. Mpo tala, Banefi mpe Balamani lokola balembeki na ntina ya bonene bwa botamboli; yango wana bakanaki te kosala angele yoko o ntango ya butu, longola se soko ezalaki Teakumi; mpo asilikaki mpenza na Amoloni, mpenza ete atalaki ete Amoloni, mpe ndeko mobali wa ye Amalikia, bazalaki ntina ya etumba enene mpe elai o kati ya bango mpe Balamani, eye ezalaki ntina ya etumba mpe bosopi makila boike boye, iyo, mpe nzala nzike boye.

36 Mpe esalemaki ete Teakumi na nkanda ya ye akendeki o kati ya nganda ya Balamani, mpe amikitisaki o nse likolo lya bifelo bya engumba. Mpe akendeki elongo na nsinga yoko uta esika na esika, mpenza ete amonoki mokonzi; mpe abwakaki mosuki moko na ye, moye motobolaki ye penepene na motema. Kasi tala, mokonzi alamusaki basali ba ye yambo akufa, mpenza ete balandaki Teakumi, mpe babomaki ye.

37 Sikawa esalemaki ete eyebaki Lehi mpe Moloni ete Teakumi akufaki, bazalaki na mawa mpenza; mpo tala, azalaki moto oyo abundaki na mpiko mpo ya ekolo ya ye, iyo, moninga moko wa solo o lipanda; mpe ayokaki mpasi mpenza ya matungisi ma nsomo. Kasi tala, akufaki, mpe akendeki nzela ya mabele manso.

38 Sikawa esalemaki ete Moloni atambolaki o mokolo mwa nsima, mpe ayaki likolo lya Balamani, mpenza ete babomaki mingi ya bango na bobomi bonene; mpe babenganaki bango libanda lya mboka; mpe bakimaki, kutu ete bazongaki te lisusu o ntango ena mpo ya kobunda na Banefi.

39 Mpe boye esukaki mobu mwa tuku misato na moko mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi; mpe boye ezalaka bitumba, mpe bosopi makila, mpe nzala, mpe litungisi, mpo ya ntaka ya mibu mingi.

40 Mpe ezalaki bobomi, mpe boweli, mpe bokabwani, mpe ndenge inso ya bobe o ntei ya bato ba Nefi; nzokande mpo ya litomba lya basembo, iyo, na ntina ya nsambo ya basembo, babikisamaki.

41 Kasi tala, na ntina ya bolai mpenza bwa etumba o kati ya Banefi mpe Balamani mingi ya bato bakomaki mito mikasi, na ntina ya bolai mpenza bwa etumba; mpe mingi balembisamaki na ntina ya matungisi ma bango; mpenza ete bamikitisaki liboso lya Nzambe, kutu o mozindo mwa bosawa.

42 Mpe esalemaki ete esilisaki Moloni kolendisa biteni bina bya mboka biye bizalaki petepete mingi koleka na Balamani, kina bikomaki bikasi bikoki, azongaki o engumba ya Zalayemila; mpe lisusu Elamani azongaki o esika ya lisango lya ye; mpe ezalaki kimia lisusu o ntei ya bato ba Nefi.

43 Mpe Moloni atikaki bokomanda bwa mampinga ma ye o kati ya maboko ma mwana mobali wa ye, oyo ya ye nkombo ezalaki Moloniya; mpe azongaki o ndako ya yemei ete akoka kolekisa etikali ya mikolo mya ye o kimia.

44 Mpe Pawolani azongaki o kiti ya ye ya bosambisi; mpe Elamani akamataki likolo lya ye koteya epai ya bato liloba lya Nzambe; mpo na ntina ya etumba mpe boweli ebele ekomaki elongobani ete libongisi lyoko lisalema lisusu o eklezia.

45 Yango wana, Elamani mpe bandeko ba ye bakendeki, mpe basakolaki liloba lya Nzambe na nguya nzike mpo ya kondimisa bato mingi nkuna ya bango, eye esalaki bango bayambola masumu ma bango mpe babatisama epai ya Nkolo Nzambe wa bango.

46 Mpe esalemaki ete batiaki lisusu eklezia ya Nzambe, o ntaka ya mboka.

47 Iyo, mpe mabongisi masalemaki matali mobeko. Mpe basambisi mpe bakonzi ba bango baponomoki.

48 Mpe bato ba Nefi babandaki kozwa bomengo lisusu o mboka, mpe babandaki koyikana mpe koyika mpenza bokasi lisusu o mboka. Mpe babandaki kokola mpenza na bozwi.

49 Kasi ata bozwi bwa bango, to bokasi bwa bango, to bomengo bwa bango, batombwanaki te o lolendo o miso mya bango; mpe bazalaki malembe te na komikundola Nkolo Nzambe wa bango; kasi bamikitisaki mpenza liboso lya ye.

50 Iyo, bamikundolaki makambo manene Nkolo asalaki mpo ya bango, ete abikisaki bango uta o liwa, mpe uta o bokangemi, mpe uta o boloko, mpe uta o ndenge inso ya matungisi, mpe abikisaka bango libanda lya maboko ma bayini ba bango.

51 Mpe basambelaki epai ya Nkolo Nzambe wa bango ntango inso, mpenza ete Nkolo apambolaki bango, engebene na liloba lya ye, boye ete bayikaki bokasi mpe bazwaki bomengo o mboka.

52 Mpe esalemaki ete makambo maye manso masalemaki. Mpe Elamani akufaki, o mobu mwa tuku misato na mitano mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.