Makomi
Alama 42


Mokapo 42

Bokufi bozali ntango ya momekano mpo ya kokokisa moto koyambola mpe kosalela Nzambe—Bokwei bwa Adama bomemeki liwa lya ntango mpe lya molimo likolo lya bato banso—Bosikoli bokoya o nzela ya boyamboli—Nzambe yemei atumbolami mpo ya masumu ma mokili—Ngolu ezali mpo ya bango baye bayamboli—Banso basusu bayangelami na boyengebene bwa Nzambe—Ngolu ekoya na ntina ya Botumbolami—Bobele bayamboli ba solo bakobikisama. Penepene 74 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai, nasosoli ezali mwa likambo lisusu litungisi mayele ma yo, liye okoki kososola te—liye litali boyengebene bwa Nzambe na etumbu ya mosumuki; mpo omeki kobanza ete ezali boyengebene te ete mosumuki afandisama o bozali bwa bobola.

2 Sikawa tala, mwana mobali wa ngai, nalingi kolimbola likambo liye epai ya yo. Mpo tala, esilisaki Nkolo Nzambe kotinda baboti ba biso ba yambo uta o elanga ya Edene, mpo ya kokona na mabele, uta wapi bakamatamaki—iyo, abenganaki libanda moto, mpe atiaki o nsuka ya esti ya elanga ya Edene, bakeluba, mpe mopanga moko mwa moto moye mokobaluka o nzela inso, mpo mobomba nzete ya bomoi—

3 Sikawa, tomoni ete moto akomaki lokola Nzambe, koyebaka bolamu mpe bobe; mpe mbele asembola loboko la ye, mpe akamata lokola nzete ya bomoi, mpe alia mpe azala na bomoi bwa seko, Nkolo Nzambe atiaki bakeluba mpe mopanga mwa moto, ete alia mbuma ya yango te—

4 Mpe boye tomoni, ete epesamaki ntango yoko epai ya moto, mpo ya koyambola, iyo, ntango yoko ya momekano, ntango yoko ya koyambola mpe kosalela Nzambe.

5 Mpo tala, soko Adama asembolaka loboko la ye sasaipi, mpe aliaka nzete ya bomoi, alingaki kozala na bomoi bwa seko, engebene na liloba lya Nzambe, kozalaka na ntaka te mpo ya koyambola; iyo, mpe lisusu liloba lya Nzambe lilingaki kozala mpamba, mpe mwango monene mwa lobiko molingaki kokakema.

6 Kasi tala, etangamaki epai ya moto ete akufa—Yango wana, lokola bakatamaki uta o nzete ya bomoi basengelaki kokatama uta o etando ya mabele—mpe moto akomaki abunga libela, iyo, bakomaki moto akweya.

7 Mpe sikawa, omoni na eye ete baboti ba biso ba yambo bakatamaki o ntango mpe o molimo lokola mosika uta o miso mya Nkolo; mpe boye tomoni ete bakomi bayangelami mpo ya kolanda nsima ya bolingi bwa bango.

8 Sikawa tala, elongobanaki te ete moto abutwisama uta o liwa liye lya ntango, mpo elingaki kobebisa mwango monene mwa esengo.

9 Yango wana, lokola bozo bokokaki kokufa mokolo moko te, mpe bokwei bomemeki likolo lya bato banso liwa lyoko lya molimo mpe lya ntango lokola, ena ezali, bakatamaki mosika uta o miso mya Nkolo, elongobanaki ete bato banso babutwisama uta o liwa liye lya molimo.

10 Yango wana, lokola bakomaki ba mosuni, ba biyokeli, mpe ba zabulu, na lizali, bozali boye bwa momekano bokomaki bozali boko mpo ya bango kolengele; ekomaki bozali boko bwa bolengeli.

11 Mpe sikawa omikundola, mwana mobali wa ngai, soko ezalaki te mwango mwa bosikoli, (kotiaka mwango mpembeni) sasaipi lokola bakufaki bozo bwa bango bozalaki bobola, kokatamaka mosika uta o miso mya Nkolo.

12 Mpe sikawa, ezalaki nzela te ya kobutwisa bato uta o bozali bwa bokwei boye, boye moto amemeke likolo lya yemei na ntina ya bozangi botosi.

13 Yango wana, engebene na boyengebene, mwango mwa bosikoli mokokaki te komememe mpembeni, bobele likolo lya masengeli ma boyamboli bwa bato o bozali boye bwa momekano, iyo, bozali boye bwa momekano; mpo longola se soko ezalaki mpo ya masengeli maye, ngolu ekokaki te kosala longola se soko ekobebisa mosala mwa boyengebene. Sikawa mosala mwa boyengebene mokokaki te kobebisama; soko boye, Nzambe alingaki kotika kozala Nzambe.

14 Mpe boye tomoni ete bato banso bakweyaki, mpe bazalaki o maboko ma boyengebene; iyo, boyengebene bwa Nzambe, boye bofandisaki bango libela mpo ya kokatama mosika uta o miso mya ye.

15 Mpe sikawa, mwango mwa ngolu mokokaki te komememe mpembeni longola se soko botumbolami boko bokosalema; yango wana Nzambe yemei atumbolami mpo ya masumu ma mokili, mpo ya komeme mpembeni mwango mwa ngolu, mpo ya kolembisa bisenge bya boyengebene, ete Nzambe akoka kozala Nzambe moko abongo nie, mpe moyengebene, mpe Nzambe wa ngolu lokola.

16 Sikawa, boyamboli bokokaki te koya epai ya bato longola se soko ezalaki etumbu yoko, eye ezalaki ya seko lokola bomoi bwa bozo bosengeli kozala, ekangema ya bokeseni na mwango mwa esengo, eye lokola ezalaki ya seko lokola bomoi bwa bozo.

17 Sikawa, boniboni ekokaki moto koyambola longola se soko akosumuka? Boniboni ekokaki ye kosumuka soko mobeko mozalaki te? Boniboni ekokaki kozala mobeko moko longola se soko etumbu ezalaki?

18 Sikawa, ezalaki etumbu yoko ekangema, mpe mobeko moyengebene mopesamaki, moye momemi boswi bwa motema epai ya moto.

19 Sikawa, soko epesamaki mobeko te—soko moto moko abomi, akokufa—elingaki ye kobanga alingaki kokufa soko akoboma?

20 Mpe lisusu, soko epesamaki mobeko te na lisumu bato balingaki te kobanga kosumuka.

21 Mpe soko epesamaki mobeko te, soko bato basumukaki nini boyengebene bokokaki kosala, to ngolu lokola, mpo ilingaki kozala na likoki lyoko te likolo lya ekelamo?

22 Kasi epesamaki mobeko moko, mpe etumbu akangemaki, mpe boyamboli boko bopesami; boye boyamboli, ngolu esengi; soko te, boyengebene bosengeli ekelamo mpe bosaleli mobeko, mpe mobeko mopesi etumbu; soko boye te, misala mya boyengebene molingaki kobebisama, mpe Nzambe alingaki kotika kozala Nzambe.

23 Kasi Nzambe atiki te kozala Nzambe, mpe ngolu esengeli na moyamboli, mpe ngolu eyei na ntina ya botumbolami; mpe botumbolami bomemi esalema bosekwi bwa bakufi; mpe bosekwi bwa bakufi bomemi bozongisi bwa moto o kati ya miso mya Nzambe; mpe boye bazongisami o kati ya miso mya ye, mpo ya kosambisama engebene na misala mya bango, engebene na mobeko mpe boyengebene.

24 Mpo tala, boyengebene bosaleli bisenge bya bwango, mpe lisusu ngolu esengeli inso iye izali ya yangomei; mpe boye, moto te longola se moyamboli wa solo abikisami.

25 Nini, ebanzi yo ete ngolu ekoki koyiba boyengebene? Nalobi epai ya yo, Te; ata moke te. Soko boye, Nzambe alingaki kotika kozala Nzambe.

26 Mpe boye Nzambe amemi mpembeni mwango mwa ye monene mpe mwa seko, moye alengeleki uta o bokelami bwa mokili. Mpe boye eyei mpembeni lobiko mpe bosikoli bwa bato, mpe bobebisami mpe bobola bwa bango.

27 Yango wana, O mwana mobali wa ngai, onso oyo alingi koya akoki koya komele mai ma bomoi bwa seko na bonsomi; mpe onso oyo alingi koya te lolenge loko akosengisama te; kasi o mokolo mwa nsuka ekozongisama epai ya ye engebene na misala mya ye.

28 Soko azali na mposa ya kosala bobe, mpe ayamboli te o mikolo mya ye, tala, bobe bokosalema epai ya ye, engebene na bozongisi bwa Nzambe.

29 Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai, nazali na mposa ete otika makambo maye matungisa yo lisusu te, mpe bobele tika masumu ma yo matungisa yo, na matungisi maye makomeme yo epai ya boyamboli.

30 O mwana mobali wa ngai, nazali na mposa ete owangana boyengebene bwa Nzambe lisusu te. Meka lisusu komilimbisa ata moke te na ntina ya masumu ma yo, na kowanganaka boyengebene bwa Nzambe; kasi tika boyengebene bwa Nzambe, mpe ngolu ya ye, mpe motema molai mwa ye mozala na nguya mpenza o motema mwa yo; mpe tika ememe yo o nse o mputulu o bosawa.

31 Mpe sikawa, O mwana mobali wa ngai, obiangemi na Nzambe mpo ya kolakisa liloba epai ya bato baye. Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai, kende nzela ya yo, sakola liloba na bosolo mpe limemia, ete okoka komeme bozo epai ya boyamboli, ete mwango monene mwa ngolu mokoka kozala na likoki likolo lya bango. Mpe tika Nzambe apesa epai ya yo kutu engebene na maloba ma ngai. Amene.