Makomi
Alama 59


Mokapo 59

Moloni asengi Pawolani kolendisa makasi ma Elamani—Balamani bakamati engumba ya Nefiya—Moloni asiliki na boyangeli. Penepene na 62 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa esalemaki ete o mobu mwa tuku misato mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi, esilisaka Moloni kozwa mpe kotanga monkanda mwa Elamani, asepelaki mpenza na ntina ya bolamu, iyo, nkonzo eluti eye Elamani azwaki, na kozwaka mboka ina ibungaki.

2 Iyo, mpe asalaki eyebana epai ya bato ba ye banso, o mboka mobimba zingazinga mpembeni na eteni ena wapi azalaki, ete bakoka kosepela lokola.

3 Mpe esalemaki ete atindaki sasaipi monkanda moko epai ya Pawolani, kozalaka na mposa ete asala bato basangana mpo ya kolendisa Elamani, to mampinga ma Elamani, mpenza ete akoka na mpasi te kosimba eteni ena ya mboka eye na likamwasi liye akokaki kozwi lisusu.

4 Mpe esalemaki ete etindaka Moloni monkanda moye o mboka ya Zalayemila, abandaki lisusu kosala mwango moko ete akoka kozwa etikali ya bozwi bwa bango mpe bingumba biye Balamani bakamataka uta na bango.

5 Mpe esalemaki ete ntango ezalaki boye Moloni kolengeleke mpo ya kokende kobunda na Balamani o etumba, tala, bato ba Nefiya, baye basanganaki elongo uta o engumba ya Moloni mpe engumba ya Lehi mpe engumba ya Moliatoni, kabundisa maki na Balamani.

6 Iyo, kutu bango baye basengisamaki mpo ya kokima uta o mboka ya Mati, mpe uta o mboka zingazinga mpembeni, bayaka likolo mpe basanganaka na Balamani o eteni eye ya mboka.

7 Mpe kozalaka boye na motango monene mpenza, iyo, mpe kozwaka bokasi mikolo na mokolo, na etinda ya Amoloni babelemeki mpo ya kobunda na bato ba Nefiya, mpe babandaki koboma bango na bobomi bonene mpenza.

8 Mpe mampinga ma bango mazalaki na motango monene boye ete etikali ya bato ba Nefiya basengelaki kokima liboso lya bango; mpe bayaki kutu mpe basanganaki na limpinga lya Moloni.

9 Mpe sikawa lokola ebanzaki Moloni ete esengelaki kotinda bato o engumba ya Nefiya, mpo ya lisalisi lya bato mpo ya kosimba engumba, mpe koyebaka ete ezalaki petepete mingi koleka kobatela engumba uta o bokwei o kati ya maboko ma Balamani, abanzaki ete bakosimba na mpasi te engumba ena.

10 Yango wana atiaki makasi manso mpo ya kosimba bisika bina biye abotoloki.

11 Mpe sikawa, emonoki Moloni ete engumba ya Nefiya ebungaki ayokaki mawa mpenza, mpe abandaki kokoma na ntembe, na ntina ya nkuna ya bato, soko bakokweya te o kati ya maboko ma bandeko ba bango.

12 Sikawa eye ezalaki boye na bakapiteni bakonzi banso ba ye. Bakomaki na ntembe mpe bakamwaki lisusu na ntina ya nkuna ya bato, mpe eye na ntina ya nkonzo ya Balamani likolo lya bango.

13 Mpe esalemaki ete Moloni asilikaki na boyangeli, na ntina ya botali mpamba etali bonsomi bwa ekolo ya bango.