Makomi
Alama 8


Mokapo 8

Alama ateyi mpe abatisi bato o Meleki—Alama aboyami o Amoniya mpe alongwi—Anzelu atindi ye azonga mpo ya boyamboli epai ya bato—Ayambami na Amuleki, mpe babale bateyi o Amoniya. Penepene na 82 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete Alama azongaki uta o mboka ya Gideona, esilisaki ye kolakisa bato ba Gideona makambo mingi maye makoki te kokomama, etiaka ye molongo na eklezia, engebene lokola asalaka yambo o mboka ya Zalayemila, iyo, azongaki o ndako ya yemei ezalaki o Zalayemila mpo ya kopema na misala miye asalaki.

2 Mpe boye esilaki mobu mwa libwa mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.

3 Mpe esalemaki ete o ebandeli ya mobu mwa zomi mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi, Alama alongwaki uta kuna mpe akendeki mobembo bwa ye likolo o kati ya mboka Meleki, o westi ya ebale Sidoni, o westi mpembeni ya ndelo ya esobe.

4 Mpe abandaki kolakisa bato o mboka ya Meleki engebene na molongo mosantu mwa Nzambe, na bwango abiangemaki, mpe abandaki kolakisa bato o ntaka ya mboka mobimba ya Meleki.

5 Mpe esalemaki ete bato bayaki epai ya ye o ntaka ya ndelo inso ya mboka eye ezali mpembeni ya mopanzi mwa esobe. Mpe babatisamaki o ntaka ya mboka mobimba;

6 Boye ete esilisaka ye mosala mwa ye o Meleki alongwaki kuna, mpe asalaki mobembo mikolo misato o nordi ya mboka Meleki; mpe akomaki o engumba eye ebiangemaki Amoniya.

7 Sikawa ezalaki momeseno mwa bato ba Nefi kobianga mboka ya bango, mpe engumba ya bango, mpe mboka ike ya bango, iyo, kutu bituka binso bya bango, nsima ya nkombo ya ye oyo azwaki byango yambo; mpe boye ezalaki na mboka ya Amoniya.

8 Mpe esalemaki ete eyaki Alama o engumba ya Amoniya abandaki koteya liloba lya Nzambe epai ya bango.

9 Sikawa Satana azwaki esika enene o mitema mya bato ba engumba ya Amoniya; yango wana balingaki te koyokemela epai ya maloba ma Alama.

10 Nzokande Alama asalaki mingi o molimo, kobundaka na Nzambe o losambo lokasi, ete alinga kosopa libanda Molimo mwa ye likolo lya bato baye bazalaki o engumba; ete lisusu alinga ete akoka kobatisa bango mpo ya boyamboli.

11 Nzokande, bayeisaki mitema mya bango mikasi, kolobaka epai ya ye: Tala, toyebi ete ozali Alama; mpe toyebi ete ozali nganga monene likoko lya eklezia eye otiaki o biteni mingi bya mboka, engebene na momeseno mwa yo; mpe tozali te ba eklezia ya yo, mpe tondimi te na mimeseno mya ligboma lya lolenge loye.

12 Mpe sikawa toyebi ete zambi tozali te ba eklezia ya yo ozali na nguya te likolo lya biso; mpe otiki kiti ya bosambisi epai ya Nefiya; yango wana ozali te mosambisi mokonzi wa biso.

13 Sikawa elobaka bato eye, mpe etelemelaka bango maloba manso ma ye, mpe etiolaka bango ye, mpe ebwakelaka bango ye nsoi, mpe esalaka bango ete balingaki kobwaka ye libanda lya engumba ya bango, alongwaki kuna mpe akendeki mobembo mwa ye o mboka eye ebiangemaki Aloni.

14 Mpe esalemaki ete o ntango ezalaki ye kotambolaka mobembo kuna, ezalaka ye o nse ya bozito bwa mawa, kotambolaka o katikati ya mokakatano mpe nsomo ya bozo, na ntina ya nkuna ya bato baye bazalaki o engumba ya Amoniya, esalemaki ete ntango ezalaki Alama o nse ya bozito bwa mawa, tala anzelu wa Nkolo abimaki epai ya ye, kolobaka:

15 Opambolami, Alama; yango wana, tombola likolo moto mwa yo mpe sepela, mpo ozali na ntina enene ya kopesa; mpo yo ozalaki potongono na kobombaka mitindo mya Nzambe uta o ntango eye ozwaki nsango ya yambo uta na ye. Tala, nazali ye oyo apesaki yango epai ya yo.

16 Mpe tala, natindami mpo ya kotinda yo ete ozonga o engumba ya Amoniya, mpe oteya lisusu epai ya bato ba engumba; iyo, teya epai ya bango. Iyo, loba epai ya bango, longola se soko bayamboli Nkolo Nzambe akobebisa bango.

17 Mpo tala, bayekoli o ntango eye ete bakoka kobebisa lipanda lya bato ba yo, (mpo boye elobi Nkolo) eye ezali na bokeseni na meko, mpe masambisi, mpe mitindo miye apesi epai ya bato ba ye.

18 Sikawa esalemaki ete esilisaka Alama koyamba nsango eye uta na anzelu wa Nkolo azongaki noki o mboka Amoniya. Mpe akotaki o engumba na nzela esusu, iyo, na nzela eye ezali o sudi ya engumba Amoniya.

19 Mpe lokola ekotaki ye o engumba azalaki na nzala, mpe alobaki epai ya moto moko: Olingi kopesa na mosali mosawa wa Nzambe eloko moko mpo ya kolia?

20 Mpe moto alobaki epai ya ye: Ngai nazali moto Monefi moko, mpe nayebi ete yo ozali profeta moko mosantu wa Nzambe, mpo ozali moto oyo anzelu moko alobelaki o limoni lyoko: Okoyamba. Yango wana, kende elongo na ngai o kati ya ndako ya ngai mpe nakokaba epai ya yo bilei bya ngai; mpe nayebi ete okozala lipamboli lyoko epai ya ngai mpe ndako ya ngai.

21 Mpe esalemaki ete moto ayambaki ye o kati ya ndako ya ye; mpe moto abiangemaki Amuleki; mpe amemeki limpa na niama mpe atiaki liboso lya Alama.

22 Mpe esalemaki ete Alama aliaki limpa mpe atondaki; mpe apambolaki Amuleki mpe ndako ya ye, mpe apesaki matondi epai ya Nzambe.

23 Mpe esilisaka ye kolia mpe kotonda alobaki epai ya Amuleki: Nazali Alama, mpe nazali nganga monene likolo lya eklezia ya Nzambe o ntaka ya mboka mobimba.

24 Mpe tala, nabiangemi mpo ya koteya liloba lya Nzambe o ntei ya bato baye banso, engebene na molimo mwa bobimisi mpe bobikuli; mpe nazalaki o mboka eye mpe balingaki koyamba ngai te, kasi babwakaki ngai libanda mpe nazalaki penepene na kopesa mokongo mwa ngai ona mboka eye libela.

25 Kasi tala, natindamaki ete nazonga lisusu mpe nabikula epai ya bato baye, iyo, mpe natatola na bango etali mabe ma bango.

26 Mpe sikawa, Amuleki, zambi oleisi ngai mpe opesi ngai esika, opambolami; mpo nazalaki na nzala, mpo nakilaki mikolo mingi.

27 Mpe, Alama awumelaki mikolo mingi elongo na Amuleki yambo abanda koteya epai ya bato.

28 Mpe esalemaki ete bato bakolaki mpenza o mabe ma bango.

29 Mpe liloba liyaki na Alama, kolobaka boye: Kende; mpe lisusu loba epai ya mosali wa ngai Amuleki, ete kende mpe bikula epai ya bato baye, kolobaka—Yambolani, mpo boye elobi Nkolo, longola se soko boyamboli nakobimela bato baye na nkanda ya ngai; iyo, mpe nakobalola te mosika nkanda ekasi ya ngai.

30 Mpe Alama akendeki, mpe lisusu Amuleki, o ntei ya bato, mpo ya kosakola maloba ma Nzambe epai ya bango; mpe batondisamaki na Molimo Mosantu.

31 Mpe bazalaki na nguya epesamaki epai ya bango, mpo ete bakokaki te kokangema o boloko; mpe ekokaki te ete moto akoka koboma bango; nzokande basalelaki te nguya ya bango kina bakangemaki o nkanga mpe babwakamaki o boloko. Sikawa, eye esalamaki ete Nkolo akoka kolakisa nguya ya ye na bango.

32 Mpe esalemaki ete bakendeki mpe babandaki koteya mpe kobikula epai ya bato, engebene na molimo mpe nguya eye Nkolo apesaka bango.