Makomi
Alama 10


Mokapo 10

Lehi abotamaki uta na Manase—Amuleki asangeli etinda ya anzelu ete abatela Alama—Nsambo ya basembo isali bato babikisama—Basambi banzangi bosembo mpe basambisi batii bokelami bwa bobebisami bwa bato. Penepene na 82 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa, iye izali maloba Amuleki ateyaki epai ya bato baye bazalaki o mboka ya Amoniya, kolobaka:

2 Nazali Amuleki; nazali mwana mobali wa Gidona, oyo azalaki mwana mobali wa Yisamaele, oyo azalaki eboto moko wa Aminadi; mpe Aminadi ye kaka oyo alimbolaki nkoma eye ezalaki likolo lya efelo ya tempelo, eye nkoma ekomamaki na mosapi mwa Nzambe.

3 Mpe Aminadi azalaki eboto moko wa Nefi, oyo azalaki mwana mobali wa Lehi, oyo ayaki uta o mboka ya Yelusaleme, oyo azalaki eboto moko wa Manase, oyo azalaki mwana mobali wa Yosefe oyo atekemeki o kati ya Ejipito na maboko ma bandeko ba ye.

4 Mpe tala, nazali lokola moto wa boyebani boke te o ntei ya bango banso baye bayebi ngai; iyo, mpe tala, nazali na mabota mpe baninga mingi, mpe lisusu nazwaki bozwi boike na loboko la bosali biloko bwa bango.

5 Nzokande, nsima ya eye enso, nayebaki mokolo moko te nzike nzela ya Nkolo, mpe nguya ya ye ya bokamwisi. Nalobaki ete nayebaka mokolo moko te nzike makambo maye; kasi tala, nabungi, mpo namonoki nzike mibombamo mya ye mpe nguya ya ye ya bokamwisi; iyo, kutu na kobatelaka bomoi bwa bato baye.

6 Nzokande, nayeisaki motema mwa ngai mokasi, mpo nabiangemaki mbala mingi mpe nalingaki te koyoka; yango wana nayebaki etali makambo maye, nzokande nalingaki te koyeba; yango wana nakobaki kotombokaka na Nzambe, na nkuna ya motema mwa ngai, kutu kina o mokolo mwa minei mwa sanza eye ya sambo, eye ezali o mobu mwa zomi mwa bokonzi bwa basambisi.

7 Lokola nazalaki kokende mobembo mpo ya kotala ndeko moko wa mpembeni mpenza, tala anzelu wa Nkolo abimaki epai ya ngai mpe alobaki: Amuleki, zonga o ndako ya yomei, mpo okoleisa profeta moko wa Nkolo; iyo, moto moko mosantu, oyo aponomi na Nzambe; mpo akili mikolo mingi na ntina ya masuma ma bato baye, mpe azali na nzala, mpe okoyamba ye o kati ya ndako ya yo mpe okoleisa ye, mpe akopambola yo mpe ndako ya yo; mpe lipamboli lya Nkolo likotikala likolo lya yo mpe ndako ya yo.

8 Mpe esalemaki ete natosaki mongongo mwa anzelu, mpe nazongaki ona ndako ya ngai. Mpe lokola nazalaki kokende kuna namonoki moto oyo anzelu alobaki epai ya ngai: Okoyamba ye o kati ya ndako ya yo—mpe tala ezali moto oyo kaka alobi epai ya bino etali makambo ma Nzambe.

9 Mpe anzelu alobaki epai ya ngai azali moto mosantu; yango wana nayebi ete azali moto mosantu zambi elobamaki na anzelu wa Nzambe.

10 Mpe lisusu, nayebi ete makambo maye atatolaki mazali solo; mpo tala nalobi epai ya bino, ete lokola Nkolo azali na bomoi, kutu boye atindi anzelu wa ye mpo ya kosala makambo maye mamonisami epai ya ngai; mpe eye asalaki ntango efandi Alama o ndako ya ngai.

11 Mpo tala, apamboli ndako ya ngai, apamboli ngai, mpe basi ba ngai, mpe bana ba ngai, mpe tata wa ngai mpe bandeko ba ngai; iyo, kutu libota lya ngai linso apamboli, mpe lipamboli lya Nkolo litikali likolo lya biso engebene na maloba maye alobaki.

12 Mpe sikawa, elobaka Amuleki maloba maye bato bakamwaki, komonoko ezalaki mingi koleka nzeneneke moko oyo atatolaki makambo na wapi bafundamaki , engebene na molimo mwa bobikuli oyo azalaki na bango.

13 Nzokande, ezalaki boko o ntei ya bango baye bakanisaki kotuna bango, ete na misala mibe mya bango bakoka kokanga bango o maloba ma bango, ete bakoka kozwa litatoli likolo lya bango, ete bakokaki kotika bango na basambisi ba bango ete bakoka kosambisama engebene na mobeko, mpe ete bakoka kobomama to babwakama o kati ya boloko, engebene na bobe boye bakokaki kosala ebima to kotatola likolo lya bango.

14 Sikawa ezalaki bato bana baye balukaki kobebisa bango, baye bazalaki basambi, baye bafutamaki to baponomoki na bato mpo ya kosalela mobeko o ntango ya bango ya masambisi, to na masambisi ma mabe ma bato liboso lya basambisi.

15 Sikawa basambi baye bayekolaki o ntoki inso mpe mayele mabe ma bato; mpe eye ezalaki mpo ya kokokisa bango ete bakoka kozala na mayele o mosala mwa bango.

16 Mpe esalemaki ete babandaki kotuna Amuleki, ete na yango bakoka kokutisa ye na maloba ma ye, to kopendola maloba maye akoloba.

17 Sikawa bayebaki te ete Amuleki akokaki koyeba miango mya bango. Kasi esalemaki ete lokola babandaki kotuna ye, ayebaki makanisi ma bango, mpe alobaki epai ya bango: O bino nkola ya nkuna mpe ebeba, bino basambi mpe bakibisi, mpo bozali kotiaka bokelami bwa zabulu; mpo bozali kotiaka mbonga mpe mitambo mpo ya kokanga mosantu moko wa Nzambe.

18 Bozali kosalaka miango mpo ya kosantola nzela ya basembo, mpe mpo ya komeme o nse nkele ya Nzambe likolo lya mito mya bino, kutu mpo ya bobebisami nie bwa bato baye.

19 Iyo, malamu elobaki Moziya, oyo azalaki mokonzi wa biso wa nsuka, ezalaki ye penepene na kopesa bokonzi bwa ye na moto mosusu, kozalaka na moko te mpo ya kopesa yango likolo lya ye, kosalaka ete bato baye bayangelama na mokano mwa bangomei—iyo, malamu elobaki ye ete soko ntango ekoya ete mokano mwa bato baye mokopono bobe, ena ezali, soko ntango ekoya ete bakokweya o kati ya bobuki mobeko, bakotela mpo ya bobebisami.

20 Mpe sikawa nalobi epai ya bino malamu esambisi Nkolo mabe ma bino; malamu ebeleli ya epai ya bato baye, na mongongo mwa banzelu ba ye ete: Yambolani, yambolani, mpo bokonzi bwa lola bozali mpembeni.

21 Iyo, malamu ebeleli ye, na mongongo mya banzelu ba ye ete: Nakoya o nse o ntei ya bato ba ngai, na alima mpe boyengebene o maboko ma ngai.

22 Iyo, mpe nalobi epai ya bino ete soko ezalaki te mpo ye nsambo ya basembo, baye bazali sikawa o mboka, ete bolingaki kutu sikawa kobimelama na bobebisami nie; nzokande ekozala na bozindi te, lokola ezalaki bato o mikolo mya Noa, kasi ekozala na nzala, mpe na bokono, mpe mopanga.

23 Kasi ezali na nsambo ya basembo ete bobikisami; sikawa yango wana, soko bobwaki libanda basembo uta o ntei ya bino nde Nkolo akotika te loboko la ye; kasi na nkanda ekasi ya ye akoya libanda mpo ya mabe ma bino; nde bokobeteme na nzala, mpe na bokono, mpe na mopanga; mpe ntango ezali mosika te mpembeni longola se soko boyamboli.

24 Mpe sikawa esalemaki ete bato bazalaki na nkanda mingi koleka na Amuleki, mpe bagangaki, kolobaka: Moto oyo atioli mibeko mya biso miye miyengebeni, mpe basambi ba biso ba bwania baye toponoki.

25 Kasi Amuleki atandolaki loboko la ye, mpe abelelaki makasi mingi epai ya bango, kolobaka: O bino nkola ya nkuna mpe ebeba, ntina nini Satana azwi nguya enene ya lolenge loye likolo lya mitema mya bino? Ntina nini emitiki bino epai ya ye ete akoka kozala na nguya likolo lya bino, ya koboma miso mya bino, ete bososola te maloba maye malobami, engebene na bosolo bwa mango?

26 Mpo tala, etatolaki ngai mabe ma mobeko mwa bino? Bososoli te; bolobi ete nalobaki mabe ma mobeko mwa bino; kasi nasalaka yango te, kasi nalobaki bolamu bwa mobeko mwa bino, mpo ya bokweisami bwa bino.

27 Mpe sikawa tala, nalobi epai ya bino, ete bokelami bwa bobebisami bwa bato baye bozali kobandaka kotiama na bozangi bosembo bwa basambi ba bino mpe basambisi ba bino.

28 Mpe sikawa esalemaki ete elobaka Amuleki maloba maye bato bagangaki na ye, kolobaka: Sikawa toyebi ete moto oyo azali mwana wa zabulu, mpo akosi epai ya biso; mpo alobi mabe mpo ya biso. Mpe sikawa alobi ete alobi mabe te mpo ya biso.

29 Mpe lisusu, atioli basambi ba biso, mpe basambisi ba biso.

30 Mpe esalemaki ete basambisi batiaki yango o kati ya mitema mya bango ete bamikundola makambo maye likolo lya ye.

31 Mpe ezalaki moko o ntei ya bango nkombo ya ye ezalaki Zezilomi. Sikawa azalaki moto wa liboso mpo ya kofunda Amuleki mpe Alama, ye kozalaka moko wa nganga koleka o ntei ya bango, kozalaka na nkita nzike mpo ya kosala o ntei ya bato.

32 Sikawa, ntina ya basambi baye ezalaki mpo ya kozwa matabisi; mpe bazwaki matabisi engebene na mosala mwa bango.