Makomi
Alama 41


Mokapo 41

O Bosekwi bato bakoya na bozali boko bwa esengo ezanga nsuka to bobola ezanga nsuka —Nkuna mokolo moko te ekozala esengo—Bato ba mosuni bazangi Nzambe o mokili—Moto na moto akozwa lisusu o bozongisi bilembo mpe bizalela azwaki o bokufi. Penepene na 74 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa mwana mobali wa ngai, nazali na mwa moke ya koloba etali bozongisi boye bolobami; mpo tala, boko basantoli nkoma, mpe bakei mpembeni na ntina ya likambo liye. Mpe nasosoli ete mayele ma yo matungisamaki lisusu etali likambo liye. Kasi tala, nakolimbola lyango epai ya yo.

2 Nalobi epai ya yo, mwana mobali wa ngai, ete mwango mwa bozongisi elongobani na boyengebene bwa Nzambe; mpo esengeli ete biloko binso bizongisama na molongo mwa byango molamu. Tala, esengeli mpe eyengebeni, engebene na nguya mpe bosekwi bwa Klisto, ete bozo bwa moto mozongisama o nzoto ya bwango, mpe eteni na eteni ya nzoto ezongisama na yangomei.

3 Mpe elongobani na boyengebene bwa Nzambe ete bato basambisama engebene na misala mya bango; mpe soko misala mya bango mizalaki milamu na bomoi boye, mpe mposa ya mitema mya bango izalaki ilamu, ete bakoka lisusu, o mokolo mwa nsuka, kozongisama epai ya eye ezali elamu.

4 Mpe soko misala mya bango mizalaki mibe, bakozongisama o bobe. Yango wana, biloko binso bikozongisama na molongo mwa byangomei, eloko na eloko na lolenge la yango mpenza—bokufi bosekwi na bozangi bokufi, bopoli na bozangi bopoli—bisekwi na esengo ya ezanga nsuka mpo ya kosangola bokonzi bwa Nzambe, to na bobola bwa bozanga nsuka mpo ya kosangola bokonzi bwa zabulu, moko o ngambo yoko, mosusu o ngambo esusu—

5 Moko asekwi na esengo engebene na mposa ya ye ya esengo, to bolamu engebene na mposa ya ye ya bolamu; mpe mosusu na bobe engebene na mposa ya ye ya bobe; mpo lokola azalaki na mposa ya kosala bobe bolai bwa mokolo mobimba, kutu boye akozwa mbano ya ye ya bobe ekoya butu.

6 Mpe boye ezali o ngambo esusu. Soko ayambolaki masumu ma ye, mpe azalaki na mposa ya bosembo kina o nsuka ya mikolo mya ye, kutu boye akozwa mbano ya bosembo.

7 Baye bazali baye bakosikolama na Nkolo; iyo, baye bazali baye bakamatami libanda, baye babikisami na butu ezanga nsuka ya molele; mpe boye bakoteleme to bakokweya; mpo tala, bazali basambisi ba bangomei, soko bakosala bolamu to bobe.

8 Sikawa, mibeko mya Nzambe mikobongwanaka te; yango wana, nzela elengelemi ete onso oyo alingi akoki kotambola na yango mpe kobikisama.

9 Mpe sikawa tala, mwana mobali wa ngai, komeka lisusu te kotumola Nzambe wa yo likolo lya biteni bina bya malongi, na byango kina lelo omekaki kosala lisumu.

10 Kobanza te, zambi elobelami etali bozongisi, ete okozongisama uta o lisumu na esengo. Tala, nalobi epai ya yo, nkuna mokolo moko te ekozala esengo.

11 Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai, bato banso baye bazali na bozali boko bwa mokili, to nalingi koloba, na bozali bwa mosuni, bazali na lititi lya bololo mpe bowumbu bwa bobe; bazangi Nzambe na mokili, mpe batamboli na bokeseni na lizali lya Nzambe; yango wana, bazali na bozali boko bokeseni na lizali lya esengo.

12 Mpe sikawa tala, ezali ntina ya liloba bozongisi kokamata eloko ya bozali boko bwa mokili mpe kotia yango na bozali boko bwa mokili te, to kotia yango na bozali boko bokeseni na bozali bwa yango?

13 O, mwana mobali wa ngai, eye ezali te; kasi ntina ya liloba bozongisi ezali komeme ezonga lisusu bobe mpo ya bobe, to ya mosuni mpo ya ya mosuni, to ya zabulu mpo ya ya zabulu—elamu mpo ya eye ezali elamu; sembo mpo ya eye ezali sembo; eyengebene mpo ya eye ezali eyengebene; ya ngolu mpo ya eye ezali ya ngolu.

14 Yango wana, mwana mobali wa ngai, tala ete ozala na ngolu epai ya bandeko ba yo; sala na boyengebene, sambisa na bosembo, mpe sala bolamu ntango inso; mpe soko osali makambo maye manso nde okozwa mbano ya yo; iyo, okozala na ngolu ezongisami epai ya yo lisusu; okozala na boyengebene bozongisi epai ya yo lisusu; okozala na bosambisi bwa bosembo bozongisi epai ya yo lisusu; mpe okozala na bolamu bopesami mbano epai ya yo lisusu.

15 Mpo eye okotinda libanda ekozonga epai ya yo lisusu, mpe ekozongisama; yango wana, liloba bozongisi likokweyisa mpenza mingi koleka mosumuki, mpe likoyengebinia ye ata moke te.