Makomi
Alma 37


Mokapo 37

Bapalaki ya motako mpe makomi mosusu ebatelamaki mpo na komema milimo na lobiko—Bayelede babomamaki na ntina ya nkuna na bango—Ndai mpe mayokani na bango ya nkuku esengeli kobombama uta na bato—Zwa toli elongo na Nkolo na misala na bino nyonso—Lokola Liawona ekambaki Banefi, bongo liloba ya Klisto eekokamba bato na bomoi ya seko. Penepene na mobu 74 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa, mwana mobali na ngai Elamani, natindi yo ete okamata masolo ya makomi oyo kani mokumba mopesamaki na ngai;

2 Mpe natindi yo lisusu ete obomba lisolo ya makomi ya bato oyo, lokola nasalaki, likolo ya bapalaki ya Nefi, mpe obomba biloko ya bule oyo nyonso, oyo nabombaki; kutu lokola nabombaki yango; mpo bibombami mpo na ntina moko ya bwania.

3 Mpe bapalaki oyo ya motako, oyo ezali na minkoma oyo, oyo ezali na masolo ya makomi ya makomi masantu likolo na yango, oyo ezali mambi ma kala ya libota ya batata na biso ya kala, kutu uta na ebandeli—

4 Tala, esakolamaki na batata na biso, ete bikobombama mpe bikokitanisama uta nkola moko na mosusu, mpe bikobombama mpe bikobatelama na loboko ya Nkolo kino bikokende epayi na ekolo na ekolo, libota na libota, monoko na monoko, mpe bato na bato, ete bakoyeba mibombamo ezali kati na yango.

5 Mpe sikawa tala, soki bibombami esengeli kobatela bongengi na yango; iyo, mpe bikobatela bongengi na yango; iyo, mpe lisusu bapalaki nyonso oyo ezali na nkoma esantu.

6 Sikawa okoki kobanza ete oyo ezali liboma na ngai; kasi tala nalobi epayi na yo, ete na nzela ya biloko ya mike mpe ya pete makambo minene makokisamaka; mpe nzela ya mike na mbala mingi eyokisaka moto ya bwania nsoni.

7 Mpe Nkolo Nzambe asalelaka ba nzela mpo na kokokisa matomba na ye minene mpe ya seko; mpe na ba nzela ya mike mpenza Nkolo ayokisa bato ya bwanya nsoni mpe akokisaka lobiko ya milimo mingi.

8 Mpe sikawa, ezali kino lelo bwania na Nzambe ete biloko oyo bibatelama; mpo tala, bitandolaki bokundoli ya bato oyo, iyo, mpe bindimisaki bato mingi mpo na oyo etali mabunga ya banzela na bango, mpe ememaki bango na boyebi ya Nzambe na bango mpo na lobiko ya milimo na bango.

9 Iyo, nalobi epayi na yo, soki ezalaki te mpo na biloko oyo, oyo ezwami kati na masolo ya makomi oyo, oyo ezali likolo ya bapalaki oyo, Amona mpe bandeko na ye bakokaki te kondimisa nkoto mingi mpenza ya Balamani mpo na ntina ya momeseno mabe ya batata na bango; iyo, masolo ya makomi oyo mpe maloba na yango mamemaki bango na boyamboli, elingi koloba, mamemaki bango na boyebi ya Nkolo Nzambe na bango, mpe na kosepelaka na Yesu Klisto Mosikoli na bango.

10 Mpe nani ayebi soki mbele ekozala nzela ya bomemi nkoto mingi na bango, iyo, mpe lisusu nkoto mingi ya bandeko ya matoyi mangongi na biso, Banefi, baye sikawa bayeisi mitema na bango makasi kati na ezalela ya lisumu mpe mabe, na boyebi ya Mosikoli na bango?

11 Sikawa mibombamo oyo eyebisami nyonso te epayi na ngai; boye nakotika kolobela yango mingi.

12 Mpe ekoki soki nalobi bobele mibombami mpo na mwango ya bwania, oyo mwango moyebani na Nzambe; mpo apesaka toli na bwania likolo ya misala na ye nyonso, mpe nzela na ye ezali semba, mpe nzela ya botamboli na ye ezali zunguluke moko ya seko.

13 O omikundola, omikundola, mwana mobali na ngai Elamani, lolenge boni sikisiki ezali mitindo ya Nzambe. Mpe alobaki: Soki bobombi mitindo na ngai bokofuluka na mboka—kasi soki bobombi mitindo na ngai te bokokatama mosika uta na miso na ngai.

14 Mpe sikawa omikundola, mwana mobali na ngai, ete Nzambe apesi yo mokumba ya biloko oyo, oyo ezali ya bule, oyo abatelaki lokola bule, mpe lisusu oyo akobomba mpe akobatela mpo na ntina ya bwania na ye, ete akoka kolakisa nguya na ye epayi na bankola oyo ekoya nsima.

15 Mpe sikawa tala, nalobeli yo na molimo ya masakoli, ete soki obuki mitindo ya Nzambe, tala, biloko oyo ezali bule bikobotoloma uta na yo na nguya ya Nzambe, mpe okopesama na Satana, ete akoka koyungula yo lokola mpumbulu liboso ya mopepe.

16 Kasi soki obombi mitindo ya Nzambe, mpe osali na biloko oyo ezali bule engebene na oyo Nkolo akotinda yo, (mpo osengeli kobila epayi ya Nkolo mpo na makambo nyonso oyo osengeli kosala na yango) tala, nguya moko te ya mabele soki te ya lifelo ekoki kokamata yango uta na yo, mpo Nzambe azali na nguya mpo na kokokisa maloba na ye nyonso.

17 Mpo akokokisa bilaka na ye nyonso oyo akosala epayi na yo, mpo akokisi bilaka oyo asalaki epayi na batata na biso.

18 Mpo alakaki epayi na bango ete akobatela biloko oyo mpo na ntina moko ya bwania na ye, ete akoka kolakisa nguya na ye epayi na bankola oyo ekoya nsima.

19 Mpe sikawa tala, asili kokokisa ntina moko; kutu na bozongisi ya nkoto mingi ya Balamani na boyebi ya bosolo; mpe alakisi bango nguya na ye, mpe akokoba se kolakisa lisusu nguya na ye na bango epayi na bankola ekoya nsima; yango wana bikobatelama.

20 Boye natindi yo, mwana mobali na ngai Elamani, ete ozala na molende na kokokisaka maloba na ngai nyonso, mpe ete ozala na molende na kobombaka mitindo ya Nzambe lokola mikomami.

21 Mpe sikawa, nakoloba epayi na yo mpo na oyo etali bapalaki ntuku mibale na minei wana, ete obomba yango, ete mibombamo mpe misala ya molili, mpe misala na bango ya nkuku, soki te misala ya nkuku ya bato wana oyo babebisamaki, mikoka komonisama epayi ya bato na ye; iyo, bobomi nyonso ya bango, mpe koyongola, mpe bopunzi na bango, mpe nkuna mpe bonsomo nyonso ya bango, ekoka komonisama epayi ya bato oyo; iyo, mpe ete obatela bibongolelo oyo.

22 Mpo tala, Nkolo amonaki ete bato na ye babandaki kosala na molili, iyo, kosala bobomi na nkuku mpe bonsomo; boye Nkolo alobaki, soki bayamboli te bakobebisama nie mpenza na etando ya mabele.

23 Mpe Nkolo alobaki: Nakolengela mpo na mosali na ngai Gazelemi, libanga moko, oyo ekongenge na molili mpo na kobimisa pole, ete nakoka kobombola epayi ya bato na ngai oyo basalelaka ngai, ete nakoka kobombola epayi na bango misala ya bandeko na bango, iyo, misala ya nkuku, misala na bango ya molili, mpe nkuna mpe bonsomo na bango.

24 Mpe sikawa, mwana mobali na ngai, bibongolelo oyo bilengelamaki ete liloba ya Nzambe ekoka kokokisama, oyo alobaki, kolobaka:

25 Nakobimisa uta na molili epayi na pole misala na bango nyonso ya nkuku mpe bonsomo na bango; mpe longola se soki boyamboli nakobebisa bango nie mpenza na etando ya mabele; mpe nakobimisa na pole bonkuku mpe bonsomo na bango, epayi na ekolo na ekolo oyo ekokamata mokili oyo nsima.

26 Mpe sikawa, mwana mobali na ngai, tomoni ete bayambolaki te; boye babebisamaki, mpe kino sikawa liloba ya Nzambe ekokisamaki; iyo, bonsomo na bango ya nkuku ebimisami libanda uta na molili, mpe eyebani epayi na biso.

27 Mpe sikawa, mwana mobali na ngai, natindi yo ete osimba bandai nyonso ya bango, mpe mayokani na bango, mpe bondimani na bango na bonsomo na bango ya nkuku; iyo, mpe bilembo na bango nyonso mpe makamwisi na bango okobombela bato oyo, ete bayeba yango te, na kobangaka ete mbele bakweya kati na molili mpe babebisama.

28 Mpo tala, ezali bolakeli mabe likolo ya mboka oyo mobimba, ete bobebisami ekoya likolo ya basali wana nyonso ya molili, engebene na nguya ya Nzambe, ntango bakokomela malamu mpenza; boye nazali na mposa ete bato oyo bakoka kobebisama te.

29 Boye okobomba miango ya nkuku oyo ya bandai na bango mpe mayokani na bango uta na bato oyo, mpe bobele nkuna na bango mpe bobomi na bango mpe bonsomo na bango okosala ete eyebana epayi bango; mpe okoteya bango koyina nkuna mpe bonsomo mpe bobomi ya lolenge oyo; mpe okolakisa bango lisusu ete bato oyo babebisamaki na ntina ya nkuna bonsomo na bango mpe bobomi na bango.

30 Mpo tala, babomaki baprofeta nyonso ya Nkolo baoyo bayaki na kati na bango mpo na kosakola epayi na bango na ntina ya mabe na bango; mpe makila na bango oyo babomaki ezalaki kobelela epayi ya Nkolo Nzambe na bango mpo na bobekoli likolo na bango oyo babomamaki; mpe boye masambisi ya Nzambe eyaki likolo ya basali baye ya molili mpe ya makelemba ya nkuku.

31 Iyo, mpe mboka elakelama mabe libela na libela mpo na basali bana ya molili mpe ya makelemba ya nkuku, kutu kino na bobebisami, longola se soki bayamboli yambo ete bakomela mpenza.

32 Mpe sikawa, mwana mobali na ngai, omikundola maloba oyo nalobaki epayi na yo; kopesa te miango oyo ya nkuku epayi ya bato oyo, kasi teya bango boyini ya libela ya masumu mpe mabe.

33 Teya bango boyamboli, mpe bondimi na Nkolo Yesu Klisto; teya bango ete bamikitisa mpe bazala basokemi mpe bato na mitema mikita; lakisa bango kotelemela masenginia nyonso ya zabulu, na bondimi na bango likolo ya Nkolo Yesu Klisto.

34 Lakisa bango ete balemba mokolo moko te na misala malamu, kasi bazala basokemi mpe bato na mitema mikita; mpo baye ya lolenge wana bakozwa bopemi mpo na milimo na bango.

35 O, omikundola, mwana na ngai ya mobali, mpe oyekola bwanya na bolenge na yo; iyo, yekola na bolenge na yo kobatela mitindo ya Nzambe.

36 Iyo, mpe belela epayi ya Nzambe mpo na lisalisi na yo; iyo, tika misala na yo nyonso mizala epayi ya Nkolo, mpe esika nyonso ekokende yo tika yango ezala na Nkolo; iyo, tika ete makanisi na yo nyonso ekambama epayi ya Nkolo; iyo, tika ete bolingo ya motema na yo etiama likolo ya Nkolo libela.

37 Solola na Nkolo na nyonso okosala, mpe akokamba yo mpo na bolamu; iyo, ntango ekolala yo na butu lala na Nkolo, ete akoka kokengela yo na mpongi na yo; mpe ntango ekolamuka yo na ntongo tika motema na yo etonda na matondi epayi ya Nzambe; mpe soki osali makambo oyo, okotombwama na mokolo ya nsuka.

38 Mpe sikawa, mwana mobali na ngai, nazali na mwa moke ya koloba mpo na oyo etali eloko oyo batata na biso babiangaki libungutulu, to mokambi—to batata na biso babiangaki yango Liawona, oyo ezali, na kolimbolaka, kompa; mpe Nkolo alengelaki yango.

39 Mpe tala, ezali na moto moko te oyo akoki kosala mosala malonga na lolenge ya esalelo ya ntoki boye. Mpe tala, elengelamaki mpo na kolakisa epayi na batata na biso nzela wapi basengelaki kotambola kati na mobembo na bango na esobe.

40 Mpe esalaki mpo na bango engebene na bondimi na bango na Nzambe; boye, soki bazalaki na bondimi mpo na kondima ete Nzambe akokaki kosala ete makonga wana malakisa nzela bakokende, tala, esalemaki; boye bazwaki likamwisi oyo, mpe lisusu makamwisi mosusu masalemaki, na nguya ya Nzambe, mokolo na mokolo.

41 Nzokande, mpo makamwisi wana masalemaki na banzela ya mike mike, yango elakisaki epayi na bango misala ya kokamwa. Bazalaki goigoi, mpe babosanaki kosalela bondimi mpe molende na bango mpe nde misala wanawana ya kokamwa esilaki, mpe bazalaki lisusu te kokende liboso na mobembo na bango.

42 Boye, bawumelaki esika moko na esobe, to basalaki mobembo na kotambolaka semba te, mpe batungisamaki na nzala mpe mposa ya mai, na ntina ya masumu na bango.

43 Mpe sikawa, mwana mobali na ngai, nalingi ete ososola ete makambo oyo mazangi elilingi te; mpo lokola batata na biso bazalaki goigoi na kosala keba na kompa oyo (sikawa makambo oyo ezalaki ya ntango) bafulukaki te; kutu ezali bongo na makambo oyo ezali ya molimo.

44 Mpo tala, ezali mpasi te ya kotia bokebi na liloba ya Klisto, oyo ekolakisa yo nzela ya kotambola na alima na esengo ya seko, lokola esengelaki mpo na batata na biso kosala keba na kompa, oyo elakisaki bango kotambola na nzela ya alima na mboka elakelama.

45 Mpe sikawa nalobi, oyo ezali na elilingi moko te na likambo oyo? Mpo lokola mpenza ezali solo ete mokambi oyo ememaki batata na biso, na kolandaka botamboli na bango, na mboka elakelama, maloba ya Klisto, soki tolandi botamboli na yango, makomema biso koleka na ngambo mosusu ya lobwaku oyo ya mawa kati na mboka ya elaka ya malamu mingi koleka.

46 O mwana mobali na ngai, tozala goigoi te mpo nzela ezali ya mpasi te; mpo bongo nde ezalaki batata na biso; mpo esalemaki bongo mpo na bango, mpo elengelamaki bongo mpo na bango, ete soki batalaki bakokaki kozala na bomoi. Nzela elengelami, mpe soki tokotala yango tokozala na bomoi libela.

47 Mpe sikawa, mwana mobali na ngai, tala ete obatela biloko ya bule oyo, iyo, tala ete otala na Nzambe mpe ozala na bomoi. Kende epayi ya bato oyo kosakolaka liloba, mpe zala na limemia. Mwana mobali na ngai, sese.

Bimisa na lokasa