Makomi
Alama 4


Mokapo 4

Alama abatisi nkoto ya babongwami—Bobe bokoti o Eklezia, mpe bokoli bwa Eklezia bokangemi—Nefiya aponomi mosambisi mokonzi—Alama, lokola nganga monene, amipesaki o mosala. Penepene na 86–83 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa esalemaki ete o mobu mwa motoba mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi, ezalaki boweli te to bitumba te o mboka ya Zalayemila;

2 Kasi bato batungisamaki, iyo, batungisamaki mpenza mpo ya bobungisi bandeko ba bango, mpe lisusu mpo ya bobungisi bibwele mpe bitonga bya bango, mpe lisusu mpo ya bobungisi bilanga bya bango bya mboto, biye biniatamaki o nse ya lokolo mpe bibebisamaki na Balamani.

3 Mpe boye bonene ezalaki matungisi ma bango ete bozo bonso bozalaki na ntina ya kolela; mpe bandimaki ete ezalaki masambisi ma Nzambe matindamaka likolo lya bango na ntina ya nkuna ya bango mpe bonsomo bwa bango; yango wana balamukisamaki o bokundoli bwa lotomo la bango.

4 Mpe babandaki kobongisa eklezia mpenza; iyo, mpe mingi babatisamaki o mai ma Sidoni mpe basanganaki o eklezia ya Nzambe; iyo, babatisamaki na loboko la Alama, oyo abulisamaka nganga monene likolo lya bato ba eklezia, na loboko la tata wa ye Alama.

5 Mpe esalemaki ete o mobu mwa sambo mwa bokonzi bwa basambisi ezalaki bato nkoto isato na nkama itano baye bakomaki bomoko na eklezia ya Nzambe mpe babatisamaki. Mpe boye esilaki mobu mwa sambo mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi; mpe ezalaki kimia ya ntango inso o ntango ena enso.

6 Mpe esalemaki ete o mobu mwa mwambe mwa bokonzi bwa basambisi, ete bato ba eklezia babandaki kokola o lolendo, na ntina ya bozwi boluti bwa bango mpe siliki malonga ya bango, mpe lino mapasa-malonga lya bango, mpe na ntina ya bibwele mpe bitonga mingi bya bango, mpe wolo ya bango mpe mpauni ya bango, mpe ndenge inso ya biloko bya motuya mingi, biye bazwaki na bosali biloko bwa bango; o biloko binso biye etombwanaki bango o lolendo la miso mya bango, mpo babandaki kolata monzele mwa ntalo.

7 Sikawa eye esalaki mpasi nzike na Alama, iyo, mpe mingi ya bato baye Alama abulisaka mpo ya kozala balakisi, mpe banganga, mpe bankulutu likolo lya eklezia; iyo, mingi ya bango bayokaki mawa mwa nsomo mpo ya nkuna eye bamonoki ebandaka kozala o ntei ya bato ba bango.

8 Mpo bamonoki mpe bazalaki koyoka mawa mpenza ete bato ba eklezia babandaki kotombwana likolo o lolendo la miso mya bango, mpe kotia mitema mya bango likolo lya bozwi mpe likolo lya biloko bya mpamba bya mokili, ete babandaki kotalana mpamba, moko ona mosusu, mpe babandaki koniokola bango baye bandimaki te engebene na bolingi mpe elengi ya bango.

9 Mpe boye, o mobu moye mwa mwambe mwa bokonzi bwa basambisi, ebandaki kozala boweli bonene o ntei ya bato ba eklezia; iyo, ezalaki boluli, mpe songisongi, mpe nko, mpe boniokoli, mpe lolendo, kutu koleka lolendo la bango baye bazalaki te ba eklezia ya Nzambe.

10 Mpe boye esukaki mobu mwa mwambe mwa bokonzi bwa basambisi; mpe nkuna ya eklezia ezalaki libanga lya libaku linene na baye bazalaki te ba eklezia; mpe boye eklezia ebandaki kokita o bokoli bwa yango.

11 Mpe esalemaki ete o ebandeli ya mobu mwa libwa, Alama amonoki nkuna ya eklezia, mpe amonoki lisusu ete ndakisa ya eklezia ebandaki kokamba bango baye bandimi te lisusu uta o eteni yoko ya bobe boko o esusu, boye komemeke lisusu bobebisami bwa bato.

12 Iyo, amonoki bokeseni bonene o ntei ya bato, boko komitombwanaka likolo o lolendo la bango, kokitisaka basusu, kopesaka mikongo likolo lya bazangi mpe ba bolumbu mpe bango baye bazalaki na nzala, mpe bango baye bazalaki na mposa ya mai, mpe baye bazalaki bakoni mpe batungisami.

13 Sikawa eye ezalaki ntina enene mpo ya bomileli o ntei ya bato, ntango ezalaki basusu komikitisa, kosalisaka bango baye batelemaki na mposa ya lisalisi, lokola kokabaka bilei bya bango na bakeleli mpe bazangi, koleisaka baye bazali na nzala, mpe kondimaka ndenge inso ya matungisi, mpo ya ntina ya Klisto, oyo akoya engebene na molimo mwa bobikuli;

14 Kotalaka o boso o mokolo mona, boye kokangaka bolimbisi bwa masumu ma bango; kotondisamaka na bosepeli bonene na ntina ya bosekwi bwa bakufi, engebene na bolingi mpe nguya mpe libiki lya Yesu Klisto uta o nkanga ya liwa.

15 Mpe sikawa esalemaki ete Alama, emonoki ye matungisi ma balandi basawa ba Nzambe, mpe boniokoli boye bozalaki likolo lya bango na batikali ba bato ba ye, mpe na komonoko bokeseni bwa bango bonso, abandaki koyoka mawa mpenza; nzokande Molimo mwa Nkolo atikaki ye te.

16 Mpe aponoki moto moko wa bwania oyo azalaki o ntei ya bankulutu ba eklezia, mpe apesaki ye nguya engebene na mokano mwa bato ba ye, ete akoka kozala na nguya ya kosala mibeko engebene na mibeko miye mipesamaka, mpe alendisaki myango engebene na nkuna mpe bobe bwa bato.

17 Sikawa nkombo ya moto oyo ezalaki Nefiya, mpe aponomoki mosambisi mokonzi; mpe afandaki o kiti ya bosambisi mpo ya kosambisa mpe koyangela bato.

18 Sikawa Alama apesaki te epai ya ye mosala mwa kozala nganga monene likolo lya eklezia, kasi asimbaki mosala mwa nganga monene epai ya yemei; kasi atikaki kiti ya bosambisi epai ya Nefiya.

19 Mpe eye asalaki ete yemei akoka kokende o ntei ya bato ba ye, to o ntei ya bato ba Nefi, ete akoka koteya liloba lya Nzambe epai ya bango, kolamusaka bango o bokundoli bwa lotomo la bango, mpe ete akoka kobenda o nse, na liloba lya Nzambe, lolendo lonso mpe angile mpe boweli bonso boye bozalaki o ntei ya bato ba ye, komonoko nzela te ete akoka kobutwisa bango longola se soko ezalaki na kopesaka mpenza likundoli lya peto mpo ya bobe bwa bango.

20 Mpe boye o ebandeli ya mobu mwa libwa mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi, Alama atikaki kiti ya bosambisi na Nefiya, mpe amipesaki mobimba o bonganga bonene bwa molongo mosantu mwa Nzambe, mpo ya kotatola liloba, engebene na molimo mwa bobimisi mpe wa bobikuli.