Makomi
Alma 61


Mokapo 61

Pawolani ayebisi Moroni mpo na oyo etali eyoma mpe botomboki na mbulamatari—Bato ya mokonzi bakamati Zalayemila mpe basali likita elongo na Balamani—Pawolani asengi lisalisi ya basoda mpo na kobunda na batomboki. Penepene na mobu 62 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Tala, sikawa esalemaki ete kala mingi te nsima ete Moroni atinda mokanda na ye epayi ya mokambi ya etuka mokonzi, azwaki mokanda uta na Pawolani, mokambi ya etuka mokonzi. Mpe oyo ezali maloba oyo azwaki:

2 Ngai, Pawolani, oyo nazali mokambi ya etuka mokonzi ya mboka oyo, natindi maloba oyo epayi ya Moroni, kapitene mokonzi likolo ya mampinga. Tala, nalobi epayi na yo, Moroni, ete nazali te kosepela na mitungisi minene na yo, iyo, esali mpasi na molimo na ngai.

3 Kasi tala, ezali na bango oyo bazali kosepela na mitungisi na yo, iyo, na lolenge ete batelemi mpo na kotomboka na ngai, mpe lisusu na bato na ngai oyo bazali bato-nsomi, iyo, mpe bango oyo batelemi bazali motango mingi koleka.

4 Mpe ezali na bango oyo balukaki kobotola kiti ya bosambisi uta na ngai oyo bazali ntina ya mabe monene oyo; mpo basaleli malete minene, mpe bakosi mitema ya bato mingi, oyo ekozala ntina ya mitungisi ya nsomo na kati na biso; balongoli bilei na biso, mpe babangisaki bato na biso bato-nsomi ete baya epayi na yo te.

5 Mpe tala, babengani ngai libanda liboso na bango, mpe nakimi na mboka ya Gideona, elongo na bato mingi lokola ekokaki ngai komema.

6 Mpe tala, natindi bosakoli epayi nyonso na eteni oyo ya mboka; mpe tala, bazali kobukana epayi na biso na mokolo na mokolo, kokamata manduki na bango, mpo na bobateli ya ekolo na bango mpe bonsomi na bango, mpe mpo na kobekola mbeba basali biso.

7 Mpe bayei epayi na biso, na lolenge ete bango oyo batelemaki na kotombokaka na biso batiami na ezalela ya bokebisi, iyo, na lolenge ete babangi biso mpe bameki te kobima mpo na kobunda na biso.

8 Bakamati mboka, soki te engumba, ya Zalayemila; baponi mokonzi moko likolo na bango, mpe akomi mokanda epayi ya mokonzi ya Balamani, kati na yango asangani na boyokani na ye; na boye wapi boyokanaki andimaki kosimba engumba ya Zalayemila, bosimbi boye wapi abanzaki ekopesa Balamani makoki ya kolonga ndambo etikali ya mboka, mpe akotiama mokonzi likolo ya bato oyo ntango bakolongama na nse ya Balamani.

9 Mpe sikawa, na mokanda na yo okitisi ngai, kasi likambo ezali te; nasiliki te, kasi nasepeli na bonene ya motema na yo. Ngai, Pawolani, nazali te koluka nguya, longola se kosimba kiti na ngai ya bosambisi ete nakoka kobatela makoki mpe lipanda ya bato na ngai. Molimo na ngai motelemi ngwi na lipanda oyo wapi Nzambe akomisi biso bansomi.

10 Mpe sikawa, tala, tokotelemela nkuna kutu kino na bosopi makila. Tokosopa te makila ya Balamani soki bakotikala na mboka na bango moko.

11 Tolingaki te kosopa makila ya bandeko na biso soki batelemaki te na botomboki na biso mpe bakamati te mompanga mpo na kobunda na biso.

12 Tolingaki komitika na boyangeli ya nkanga ya boumbu soki esengelaki na boyengebene ya Nzambe, to soki atindaki biso kosala bongo.

13 Kasi tala atindi biso te ete tomitika na boyangeli ya banguna na biso, kasi ete tosengeli kotia motema na biso na ye, mpe akobikisa biso.

14 Boye, molingami ndeko na ngai ya mobali, Moroni, tika totelemela mabe, mpe mabe nyonso kani oyo tokokoka te kotelemela na maloba na biso, iyo, lokola botomboki mpe bokabwani, tika totelemela yango na mipanga na biso, ete tokoka kosimba bonsomi na biso, ete tokoka kosepela na makoki ya eklezia na biso, mpe na ntina ya Mosikoli mpe Nzambe na biso.

15 Boye, yaka epayi na ngai na lombangu elongo na ndambo moke ya bato na yo, mpe tika ndambo mosusu oyo etikali na mokumba ya Lehi mpe Teakumi; pesa epayi na bango nguya mpo na kokamba etumba na eteni wana ya mboka, engebene na Molimo ya Nzambe, oyo azali lokola molimo ya bonsomi oyo ezali na bango.

16 Tala natindi ndambo moko ya bilei epayi na bango, ete bakoka kowa na nzala te kino bokokoka koya epayi na ngai.

17 Sangisa esika moko basoda nyonso kani okoki kosangisa na botamboli na yo awa, mpe tokokende na lombangu kobunda na bakabwani wana, na bokasi ya Nzambe na biso engebene na bondimi boye ezali na biso.

18 Mpe tokokamata na biso engumba ya Zalayemila, ete tokoka kozwa bilei mingi koleka mpo na kotinda epayi ya Lehi mpe Teakumi; iyo, tokokende kobunda na bango na bokasi ya Nkolo, mpe tokotia nsuka na mabe minene oyo.

19 Mpe sikawa, Moroni, nasepeli kozwa mokanda na yo, mpo nazalaki mwa moke motema likolo mpo na oyo etali nini tosengeli kosala, soki ekozala alima mpo na biso kokende kobunda na bandeko na biso.

20 Kasi olobi, longola se soki bayamboli Nkolo atindaki yo ete okende kobunda na bango.

21 Tala ete olendisa Lehi mpe Teakumi na Nkolo; yebisa bango babanga te, mpo Nzambe akobikisa bango, iyo, mpe lisusu bango nyonso oyo bakotelema ngwi na lipanda na nzela ya oyo wapi Nzambe akomisi bango nsomi. Mpe sikawa nakangi mokanda na ngai epayi ya molingami ndeko na ngai ya mobali, Moroni.

Bimisa na lokasa