Makomi
Alma 18


Mokapo 18

Mokonzi Lamoni abanzi ete Amona azali Molimo Monene—Amona ateyi mokonzi mpo na oyo etali Bokeli, lolenge ya kosala ya Nzambe elongo na bato, bosikoli boye ekoya na nzela ya Klisto—Lamoni andimi mpe akwei na mabele lokola soki akufaki. Penepene na mobu 90 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete mokonzi Lamoni asalaki ete basali na ye batelema mpe batatola makambo nyonso oyo bamonaki mpo na oyo etali likambo yango.

2 Mpe etatolaki bango nyonso makambo bamonaki, mpe eyokaki ye oyo etali bosembo ya Amona na kobatelaka bitonga na ye, mpe lisusu nguya monene oyo alakisaki na kowelaka na bango oyo balingaki koboma ye, akamwaki mpenza, mpe alobaki: Solo, oyo azali monene koleka moto moko. Tala, ezali ye oyo te Molimo Monene oyo atindaka bitumbu minene ya lolenge oyo likolo ya bato oyo, na ntina ya bobomi na bango?

3 Mpe bayanolaki mokonzi, mpe balobaki: Soki ezali ye Molimo Monene to moto moko, biso toyebi te; kasi oyo toyebi mingi, ete akoki kobomama te na banguna ya mokonzi; mpe bakokoka te kopanza bitonga ya mokonzi ntango azali elongo na biso, na ntina ya mayele mpe makasi na ye; boye toyebi ete azali moninga na mokonzi. Mpe sikawa, O mokonzi, tondimi te ete moto moko akoki kozala na nguya ya lolenge oyo, mpo toyebi akoki kobomama te.

4 Mpe sikawa, eyokaki mokonzi maloba oyo, alobaki epayi na bango: Sikawa nayebi ete azali Molimo Monene; mpe ayei na nse na ntango oyo mpo na kobatela bomoi na bino, ete nakoka koboma bino te lokola nasalaki bandeko na bino. Sikawa oyo ezali Molimo Monene oyo batata na biso balobelaki.

5 Sikawa oyo ezalaki momeseno ya Lamoni, oyo azwaki uta na tata na ye, ete ezali na Molimo Monene moko. Ata bandimaki Molimo Monene moko, babanzaki ete nyonso oyo basalaki ezalaki semba; nzokande, Lamoni abandaki kobanga mingi koleka, na kobangaka ete mbele asalaki mbeba na kobomaka basali na ye;

6 Mpo abomaki mingi kati na bango mpo bandeko na bango bapanza bitonga na bango na esika ya mai; mpe boye, mpo batikaki bitonga na bango bipanzama babomamaki.

7 Sikawa ezalaki momeseno ya Balamani oyo ya kotelemaka mpembeni na esika ya mai ya Sebu mpo na kopanza bitonga ya bato, ete na nzela oyo bakoka kobengana mingi kati na oyo bipanzanaki epayi na mboka na bango moko, yango ezalaki momeseno ya bopunzi na kati na bango.

8 Mpe esalemaki ete mokonzi Lamoni atunaki na basali na ye, kolobaka: Azali wapi moto oyo azali na nguya monene ya lolenge oyo?

9 Mpe bango balobaki epayi na ye: Tala, azali koleisa bampunda na yo. Sikawa mokonzi atindaki basali na ye, yambo na ntango ya komelisa bitonga na bango mai, ete balengela bampunda mpe makalo na ye mpe bakamba ye na mboka ya Nefi; mpo kuna lipati moko monene elakamaki na tata ya Lamoni, oyo azalaki mokonzi likolo ya mboka mobimba ya Nefi.

10 Sikawa eyokaki mokonzi Lamoni ete Amona azalaki kolengela bampunda na ye mpe makalo na ye akamwaki mingi koleka, na ntina ya bosembo ya Amona, kolobaka: Solo ezalaki na mosali moko te na kati ya basali na ngai nyonso oyo azali sembo mpenza lokola moto oyo; mpo kutu azali komikundola mitindo na ngai nyonso mpo na kosalela yango.

11 Sikawa nayebi solo ete oyo ezali Molimo Monene, mpe nazali na mposa na ye ete aya epayi na ngai, kasi nakoki komeka te.

12 Mpe esalemaki ete esilaki Amona kobongisa bampunda mpe makalo mpo na mokonzi mpe basali na ye, ayingelaki epayi ya mokonzi, mpe amonaki ete elongi ya mokonzi ebongwanaki; boye azalaki penepene na kozonga libanda uta na miso na ye.

13 Mpe moko ya basali ya mokonzi alobaki epayi na ye, Rabana, oyo ezali, na kolimbolaka, atonda na nguya to mokonzi monene, mpo bazalaki kotala bakonzi na bango lokola bato ya nguya; mpe boye alobaki epayi na ye ete: Rabana, mokonzi alingi ete otikala.

14 Boye Amona abalukaki epayi na mokonzi mpe alobaki epayi na ye: Nini olingi nasala mpo na yo, O, mokonzi? Mpe mokonzi ayanolaki ye te mpo na ntaka ya ngonga yoko engebene na ntango na bango, mpo ayebaki te nini asengelaki koloba epayi na ye.

15 Mpe esalemaki ete Amona alobaki epayi na ye lisusu: Nini ezali mposa na yo epayi na ngai? Kasi mokonzi ayanolaki te.

16 Mpe esalemaki ete Amona, etondisamaki ye na Molimo ya Nzambe, boye ayebaki makanisi ya mokonzi. Mpe alobaki epayi na ye: Ezali mpo oyoki ete nabatelaki basali na yo mpe bitonga na yo, mpe nabomaki sambo ya bandeko na bango na bilingongo mpe na mompanga, mpe nabakolaki maboko ya basusu, mpo na kobatela bitonga mpe basali na yo; tala, ezali oyo nde esali bokamwi na yo?

17 Nazali koloba epayi na yo, nini yango ezali, ete bokamwi na yo ezala monene? Tala, nazali moto, mpe nazali mosali na yo; boye, nyonso oyo ozali na yango mposa oyo ezali sembo, yango wana nde nakosala.

18 Sikawa eyokaki mokonzi maloba oyo, akamwaki lisusu, mpo amonaki ete Amona akokaki kososola makanisi na ye; kasi atako bokamwi boye, mokonzi Lamoni afungolaki monoko mpe alobaki epayi na ye boye: Ozali nani? Ezali yo Molimo Monene, oyo ayebi makambo nyonso?

19 Amona ayanolaki mpe alobaki epayi na ye: Nazali te.

20 Mpe mokonzi alobaki: oyebi lolenge nini makanisi ya motema na ngai? Okoki koyebisa ngai na mpiko, mpe lobela ngai mpo na oyo etali makambo oyo; mpe lisusu lobela ngai na nguya kani obomaki mpe obakolaki maboko ya bandeko na ngai baoyo bapanzaki bitonga na ngai—

21 Mpe sikawa, soki olobeli ngai mpo na oyo etali makambo oyo, nyonso oyo ozali na yango mposa nakopesa epayi na yo; mpe soki esengelamaki, nalingaki kokengela yo na mampinga na ngai; kasi nayebi ete yo ozali na nguya mingi koleka bango; nzokande, nyonso oyo ozali na yango mposa nakopesa yango epayi na yo.

22 Sikawa Amona ezalaki ye na bwania, nzokande na mabe te, alobaki epayi ya Lamoni ete: elingi yo koyokela maloba na ngai, soki nalobeli yo na nguya kani nasali makambo oyo? Mpe oyo ezali likambo nazali na yango mposa uta na yo.

23 Mpe mokonzi ayanolaki ye, mpe alobaki: Iyo, nakondima maloba na yo nyonso. Mpe boye azwamaki na mayele mabe.

24 Mpe Amona abandaki kolobela ye na mpiko, mpe alobaki epayi na ye: Ezali yo kondima ete ezali na Nzambe moko?

25 Mpe ayanolaki, mpe alobaki epayi na ye: Nayebi te nini elingi koloba.

26 Mpe nde Amona alobaki: Ezali yo kondima ete ezali na Molimo Monene moko?

27 Mpe alobaki, Iyo.

28 Mpe Amona alobaki: Oyo ezali Nzambe. Mpe Amona alobaki epayi na ye lisusu: Ezali yo kondima ete Molimo Monene oyo, oyo azali Nzambe, akelaki biloko nyonso ezali na lola mpe na mabele?

29 Mpe alobaki: Iyo, nandimi ete akelaki biloko nyonso oyo ezali na mabele; kasi nayebi lola te.

30 Mpe Amona alobi epayi na ye: Lola ezali esika Nzambe afandi mpe banjelu basantu nyonso na ye.

31 Mpe mokonzi Lamoni alobaki: Ezali likolo ya mabele?

32 Mpe Amona alobaki: Iyo, mpe atalaka na nse likolo ya bana nyonso ya bato; mpe ayebi makanisi nyonso mpe mikano ya mitema; mpo na loboko na ye bakelamaki nyonso uta na ebandeli.

33 Mpe mokonzi Lamoni alobaki: Nandimi makambo nyonso olobi. Etindami yo uta na Nzambe?

34 Amona alobaki epayi na ye: Nazali moto; mpe na ebandeli moto akelamaki na elili ya Nzambe, mpe nabiangami na Molimo Mosantu na ye mpo na koteya makambo oyo epayi ya bato oyo, mpo ete bakoka komemama na boyebi ya oyo wana ezali semba mpe solo;

35 Mpe ndambo yoko ya Molimo mona afandaka na ngai, oyo apesi ngai boyebi, mpe lisusu nguya engebene na bondimi na ngai mpe mposa oyo ezali na Nzambe.

36 Sikawa ntango Amona alobaki maloba oyo, abandaki na bokeli ya mokili, mpe lisusu bokeli ya Adama, mpe ayebisaki ye makambo nyonso etali bokwei ya moto, mpe azongelaki koyebisa mpe atiaki liboso na ye masolo ya makomi mpe makomi masantu ya bato, oyo elobamaki na baprofeta, kutu kino na ntango oyo tata na bango, Lehi, atikaki Yelusaleme.

37 Mpe lisusu azongelaki koyebisa epayi na bango (mpo ezalaki epayi ya mokonzi mpe basali na ye) mibembo nyonso ya batata na bango na esobe, mpe mpasi nyonso na bango na nzala mpe mposa ya mai, mpe bwale na bango, mpe bongo na bongo.

38 Mpe lisusu azongelaki koyebisa epayi na bango oyo etali botomboki ya Lamani mpe Lemuele, mpe bana mibali ya Yisamaele, iyo, botomboki nyonso na bango asangelelaki bango; mpe asembolaki epayi na bango masolo ya makomi mpe makomi nyonso uta na ntango Lehi atikaki Yelusaleme kino na ntango ya lelo.

39 Kasi oyo ezali nyonso te; mpo asembolaki epayi na bango mwango ya bosikoli, oyo molengelamaki uta na bokeli ya mokili; mpe lisusu ayebisaki epayi na bango oyo etali boyei ya Klisto, mpe misala nyonso ya Nkolo nde ayebisaki epayi na bango.

40 Mpe esalemaki ete nsima ya kolobaka makambo oyo nyonso, mpe kolimbolaka yango na mokonzi, ete mokonzi andimaki maloba na ye nyonso.

41 Mpe abandaki kobondela epayi ya Nkolo, kolobaka: O, Nkolo, lakisa boboto; engebene na boboto na yo ya beboo oyo ozalaki na yango likolo ya bato ya Nefi, lakisa boboto likolo na ngai, mpe bato na ngai.

42 Mpe sikawa, ntango alobaki oyo, akweyaki na mabele, lokola soki akufaki.

43 Mpe esalemaki ete basali na ye bakamataki ye mpe bamemaki ye epayi ya mwasi na ye, mpe balalisaki ye likolo ya mbeto; alalaki lokola soki akufaki na ntaka ya mikolo mibale mpe butu mibale; mpe mwasi na ye, mpe bana mibali na ye, mpe bana basi na ye balelaki ye, na lolenge ya Balamani, kolelaka mingi liwa na ye.

Bimisa na lokasa