Makomi
Alma 19


Mokapo 19

Lamoni azwi pole ya bomoi ya libela mpe amoni Mosikoli—Baye ya ndako na ye bakwei na ezaleli ya botutuki, mpe mingi bamoni banjelu—Amona abatelami na lolenge ya likamwisi—Abatisi mingi mpe atii eklezia na kati na bango. Penepene na mobu 90 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete nsima ya mikolo mibale mpe butu mibale bazalaki penepene na kokamata nzoto na ye mpe kolalisa yango na lilita, oyo basalaki mpo na ntina ya bokundi bakufi na bango.

2 Sikawa mwasi mokonzi eyokaki ye nsango ya lokumu ya Amona, boye atindaki moto mpe azalaki na mposa ete ayingela epayi na ye.

3 Mpe esalemaki ete Amona asalaki lokola atindamaki, mpe ayingelaki epayi ya mwasi mokonzi, mpe azalaki na mposa ya koyeba nini alingaki ete asala.

4 Mpe alobaki epayi na ye: Basali ya mobali na ngai bayebisi epayi na ngai ete ozali profeta ya Nzambe mosantu, mpe ete ozali na nguya ya kosala misala mingi ya nguya na nkombo na ye;

5 Boye, soki ezali bongo, ngai nalingi ete oyingela mpe otala mobali na ngai, mpo azali kolala likolo ya mbeto na ye mpo na ntaka ya mikolo mibale mpe butu mibale; mpe boko bato balobi ete akufi te, kasi basusu balobi ete akufi mpe azali kolumba solo, mpe asengelaki kotiama na lilita; kasi mpo na ngai moko, na ngai azali kolumba solo te.

6 Sikawa, oyo ezali likambo Amona azalaki na yango mposa, mpo ayebaki ete mokonzi Lamoni azalaki na nse ya nguya ya Nzambe; ayebaki ete elamba ya mwindo ya bozangi boyambi ezalaki kobenganama mosika uta na mayele na ye, mpe pole oyo engengisaki mayele na ye, oyo ezalaki pole ya nkembo ya Nzambe, oyo ezalaki pole ya kokamwa ya bolamu na ye—iyo, pole oyo ekotisaki bosepeli ya lolenge wana kati na molimo na ye, nsima ya kolongolaka lipata ya molili, mpe ete pole ya bomoi ya libela engengisaki molimo na ye, iyo, ayebaki ete oyo elongaki nzoto ya nzoto na ye ya mosuni, mpe amemamaki mosika na Nzambe—

7 Boye, nini mwasi mokonzi azalaki na yango mposa ezalaki bobele mposa na ye. Boye, ayingelaki mpo na kotala mokonzi engebene na oyo ezalaki mposa ya mwasi ya mokonzi mpo na ye; mpe amonaki mokonzi, mpe ayebaki ete azalaki ya kokufa te.

8 Mpe alobaki epayi ya mwasi mokonzi: Akufi te, kasi alali na Nzambe, mpe na mokolo ya nsima akolamuka lisusu; boye bokunda ye te.

9 Mpe Amona alobaki epayi na ye: Ezali yo kondima oyo? Mpe alobaki epayi na ye: Nazali na litatoli te longola se liloba na yo, mpe liloba ya basali na biso; nzokande nandimi ete ekozala engebene na oyo olobi.

10 Mpe Amona alobaki epayi na ye: Opambolami na ntina ya bondimi koleka ya yo; nalobi epayi na yo, mwasi, ezali te na bondimi monene ya lolenge oyo na kati ya bato nyonso ya Banefi.

11 Mpe esalemaki ete akengelaki likolo ya mbeto ya mobali na ye, uta na ntango wana kutu kino na ntango wana na mokolo ya nsima oyo Amona alakaki ete akolamuka.

12 Mpe esalemaki ete alamukaki, engebene na maloba ya Amona; mpe lokola alamukaki, asembolaki loboko na ye epayi na mwasi, mpe alobaki: Nkombo ya Nzambe epambolama, mpe opambolami.

13 Mpo lokola solo ozali na bomoi, tala, namonaki Mosikoli na ngai; mpe akoya mpe akobotama na mwasi, mpe akosikola bato nyonso oyo bakondima na nkombo na ye. Sikawa, ntango alobaki maloba oyo, motema na ye evimbaki kati na ye, mpe akweyaki lisusu na mabele mpo na bosepeli; mpe mwasi mokonzi akweyaki na nse mpe lokola, mpo alongamaki na Molimo.

14 Sikawa Amona komonaka ete Molimo ya Nkolo asopanaki engebene na sambo na ye likolo ya Balamani, bandeko na ye, baoyo bazalaki ntina ya boleli mingi mpenza na kati ya Banefi, soki te na kati ya bato nyonso ya Nzambe na ntina ya mabe na bango mpe mimesano na bango, akweyaka likolo ya mabolongo na ye, mpe abandaki kosopa molimo na ye na losambo mpe bopesi matondi na Nzambe mpo na nini asalaki mpo na bandeko na ye; mpe lisusu alongamaki na bosepeli; mpe boye bango nyonso misato bakweyaki na mabele.

15 Sikawa, ntango basali ya mokonzi bamonaki ete bakweyaki, bango mpe lokola babandaki kobelela epayi na Nzambe, mpo bobangi ya Nkolo boyaki likolo na bango mpe lokola, mpo ete ezalaki bango oyo batelemaki liboso ya mokonzi mpe batatolaki epayi na ye mpo na oyo etali nguya monene ya Amona.

16 Mpe esalemaki ete babelelaki nkombo ya Nkolo, na makasi na bango, kutu kino bakweyaki na mabele, longola se ezalaki na moko ya basi ya Balamani, oyo kani nkombo na ye ezalaki Abisi, mpe ye abongwamaki epayi ya Nkolo uta mibu mingi, na ntina ya limoni moko monene ya tata na ye—

17 Boye, lokola abongwanaki na Nkolo, mpe lokola ayebisaki yangna mokolo moko te, boye, emonaki ye ete basali nyonso ya Lamoni bakweyaki na mabele, mpe lisusu nkolo na ye, mwasi mokonzi, mpe mokonzi, mpe Amona balalaki makalekale likolo ya mabele, ayebaki ete ezalaki nguya ya Nzambe; mpe lokola abanzaki ete libaku oyo, na kosalaka ete eyebana epayi ya bato nini ekomeli bango, ete na komonaka likambo oyo ekosala ete bango bandima nguya ya Nzambe, boye, akimaki mbangu uta ndako na ndako, koyebisaka yango epayi ya bato.

18 Mpe babandaki kosangana elongo epayi na ndako ya mokonzi. Mpe kuna lokola bayaki ebele, mpe na bokamwi na bango, bamonaki mokonzi, mpe mwasi mokonzi, mpe basali na bango makalekale likolo ya mabele, mpe bango nyonso balalaki kuna lokola soki bakufaki; mpe bamonaki Amona, mpe tala azalaki Monefi.

19 Mpe sikawa bato babandaki koyima-yima na kati na bango moko; boko bato babandaki kolobaka ete ezalaki mabe monene oyo eyaki likolo na bango, soki te likolo ya mokonzi mpe ndako na ye, mpo apesaki nzela ete Monefi atikala na mboka.

20 Kasi basusu bapamelaki bango, kolobaka: Mokonzi nde amemi mabe oyo likolo ya ndako na ye, mpo abomaki basali na ye baoyo batikaki bitonga na bango bipanzana na mai ya Sebu.

21 Mpe lisusu bapamelamaki na bango oyo batelemaki na mai ya Sebu mpe bapanzaki bitonga oyo ezalaki ya mokonzi, mpo bazalaki na nkanda na Amona na ntina ya motango ya bandeko na bango oyo abomaki na mai ya Sebu, wana ezalaki bango kobatela bitonga ya mokonzi.

22 Sikawa, moko na bango, oyo na ye ndeko abomamaki na mompanga ya Amona, lokola azalaki na nkanda koleka na Amona, abendaki mompanga na ye mpe abelemaki ete akoka kotika yango kokweya likolo ya Amona, mpo na koboma ye; mpe lokola atombolaki mompanga mpo na kokata ye, tala, akweyaki mokufi.

23 Sikawa tomoni ete Amona akokaki kobomama te, mpo Nkolo alobaki epayi ya Mosiya, tata na ye: Nakobatela ye, mpe ekosalemela ye engebene na bondimi na yo—boye, Mosiya atikalaki kopesa ye na maboko ya Nkolo.

24 Mpe esalemaki ete ntango ebele ya bato oyo bamonaki ete moto akweyaki mokufi, oyo atombolaki mompanga na ye mpo na koboma Amona, bobangi eyaki likolo na bango nyonso, mpe bamekaki te kotia maboko na bango mpo na kosimba ye to moko na bango oyo bakweyaki; mpe babandaki kokamwa lisusu na kati na bango moko nini ekokaki kozala ntina ya nguya ya monene wana, soki te nini makambo oyo nyonso elingaki koloba.

25 Mpe esalemaki ete ezalaki na bato mingi na kati na bango oyo balobaki ete Amona azalaki Molimo Monene, mpe basusu balobaki ete atindamaki na Molimo Monene;

26 Kasi basusu bapamelaki bango nyonso, kolobaka ete azalaki dongolomiso, oyo atindamaki uta na Banefi mpo na konyokola bango.

27 Mpe ezalaki na boko bato oyo balobaki ete Amona atindamaki na Molimo Monene mpo na kotungisa bango na ntina ya mabe na bango; mpe ete Molimo Monene oyo akengelaka Banefi ntango nyonso, oyo abikisaka bango ntango nyonso uta na maboko na bango; mpe balobaki ete ezalaki Molimo Monene oyo abebisaki mingi ya bandeko na bango, Balamani.

28 Mpe boye boweli ebandaki kozala makasi mpenza na kati na bango. Mpe ntango ewelaki bango boye, mwasi mosali oyo asalaki ete ebele ya bato basangani ayaki, mpe lokola amonaki boweli oyo ezalaki na kati ya ebele ya bato oyo azalaki na mawa mpenza, kutu kino na mai ya miso.

29 Mpe esalemaki ete akendaki kokamata mwasi mokonzi na loboko, ete mbele akoka kotelemisa ye uta na mabele; mpe sasaipi lokola asimbaki loboko na ye atelemeki na makolo na ye, mpe agangaki na mongongo makasi, kolobaka: O Yesu mopambolami, oyo abikisi ngai uta na lifelo ya nsomo! O Nzambe mopambolami, zala na boboto likolo ya bato oyo!

30 Mpe elobaki ye makambo oyo, abetaki maboko na ye, lokola atondaki na bosepeli, kolobaka maloba mingi oyo masosolamaki te; mpe esalaki ye oyo, akamataki mokonzi, Lamoni, na loboko, mpe tala atelemeki na makolo na ye.

31 Mpe ye, sasaipi, ntango amonaki boweli boye ezalaki na kati ya bato na ye, abelemaki mpe abandaki kopamela bango, mpe koteya bango maloba oyo ayokaki uta na monoko ya Amona; mpe lokola mingi bayokaki maloba na ye bandimaki, mpe babongwanaki epayi ya Nkolo.

32 Kasi mingi na kati na bango balingaki te koyoka maloba na ye; boye bakendaki nzela na bango.

33 Mpe esalemaki ete ntango Amona alamukaki asalisaki lisusu bango, mpe basali ya Lamoni nyonso basalaki mpe lokola; mpe nyonso basakolaki epayi ya bato se likambo moko wana kaka—ete mitema na bango mibongwanaki; mpe bazalaki lisusu te na mposa ya kosala mabe.

34 Mpe tala, mingi bayebisaki epayi ya bato ete bamonaki banjelu mpe basololaki elongo na bango; mpe boye balobelaki bango makambo etali Nzambe, mpe etali bosembo na ye.

35 Mpe esalemaki ete ezalaki na mingi baoyo bandimaki maloba na bango; mpe mingi lokola bandimaki babatisamaki; mpe bakomaki boko bato ya sembo, mpe batiaki eklezia na kati na bango.

36 Mpe boye mosala ya Nkolo ebandaki na kati ya Balamani; boye Nkolo abandaki kosopa Molimo na ye likolo na bango; mpe tomoni ete loboko na ye etandolamaki na bato nyonso oyo bakoyambola mpe bakondima na nkombo na ye.

Bimisa na lokasa