Makomi
Alma 25


Mokapo 25

Etumba ya Balamani epanzani—Nkona ya banganganzambe ya Noa bakufi lokola Abinadi asakolaki—Balamani mingi babongwani mpe basangani na bato ya Anti-nefi-lehi—Bandimi Klisto mpe babateli mobeko ya Mose. Penepene na mibu 90–77 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe tala, sikawa esalemaki ete Balamani wana basilikaki mingi koleka mpo babomaki bandeko na bango; boye balapaki ndai ya bobekoli likolo ya Banefi; mpe bamekaki lisusu te koboma bato ya Anti-nefi-lehi na ntango wana.

2 Kasi bakamataki mampinga na bango mpe bamataki kati na ndelo ya mboka ya Zalayemila, mpe bakweyaki likolo ya bato oyo bazalaki na mboka ya Amoniya mpe babebisaki bango.

3 Mpe nsima na yango, bazalaki na bitumba mingi na Banefi, na oyo wapi babenganamaki mpe babomamaki.

4 Mpe na kati ya Balamani baoyo babomamaki ezalaki penepene na nkona nyonso ya Amuloni mpe bandeko na ye, baoyo bazalaki banganganzambe ya Noa, mpe babomamaki na maboko ya Banefi;

5 Mpe baoyo batikali, lokola bakimaki na esobe ya esti, mpe lokola babotolaki nguya mpe likoki likolo ya Balamani, basalaki ete mingi ya Balamani bakoka kowa na moto na ntina ya boyambi na bango—

6 Mpo mingi kati na bango, nsima ya koyoka mpasi ya kobungisa bato mingi mpe kozwa mitungisi mingi, babandaki kolamusama na bokundoli ya maloba oyo Alona mpe bandeko na ye bateyaki bango na mboka na bango; boye baoyo batikali babandaki kondima mimesano ya batata na bango, mpe kondima Nkolo, mpe ete apesaki nguya monene epayi ya Banefi; mpe boye ezalaki na mingi kati na bango oyo babongwanaki na esobe.

7 Mpe esalemaki ete bayangeli bana oyo bazalaki montika ya bana ya Amuloni basalaki ete bakoka kotiama na liwa, iyo, bango nyonso oyo bandimaki makambo oyo.

8 Sikawa liwa ya martiru oyo esalaki ete mingi ya bandeko na bango balamusama na nkanda; mpe boweli ebandaki kozala na esobe; mpe Balamani babandaki kolanda bato ya nkona ya Amuloni mpe bandeko na ye mpe babandaki koboma bango; mpe bakimaki kati na esobe ya esti.

9 Mpe tala balandami na mokolo ya lelo na Balamani. Boye maloba ya Abinadi mamemamaki mpo na kosalema, oyo alobaki mpo na oyo etali nkona ya banganganzambe baoyo basalaki ete ayoka mpasi ya liwa na moto.

10 Mpo alobaki epayi na bango: Nini bokosala epayi na ngai ekozala elilingi ya makambo ekoya.

11 Mpe sikawa Abinadi azalaki moto ya yambo oyo ayokaki mpasi ya liwa na moto na ntina ya boyambi na ye na Nzambe; sikawa oyo ezali nini alingaki koloba, ete mingi bakoyoka mpasi ya liwa na moto, lokola ayokaki.

12 Mpe alobaki epayi ya banganganzambe ya Noa ete nkona na bango ekosala ete mingi batiama na liwa, na lolenge moko lokola ezalaki ye, mpe ete bakopanzama libanda mpe bakobomama, lokola mpate oyo ezanga mobateli ebenganamaka mpe ebomamaka na banyama ya zamba; mpe sikawa tala, maloba oyo mamonanaki solo, mpo babenganamaki na Balamani, mpe balandamaki, mpe babetamaki.

13 Mpe esalemaki ete emonaki Balamani ete bakokaki te kolonga Banefi bazongaki lisusu na mboka na bango moko; mpe mingi kati na bango bayaki kofanda na mboka ya Yisamaele mpe na mboka ya Nefi, mpe basanganaki na bato ya Nzambe, oyo bazalaki bato ya Anti-nefi-lehi.

14 Mpe bakundaki mpe lokola bibundeli na bango ya etumba, engebene na lolenge bandeko na bango basalaki, mpe babandaki kozala bato ya sembo; mpe batambolaki na banzela ya Nkolo, mpe batosaki kobatela mitindo na ye mpe meko na ye.

15 Iyo, mpe babatelaki mobeko ya Mose; mpo elongobanaki ete babatela mobeko ya Mose mpo na sikawa, mpo mokokisamaki mobimba te. Kasi ata mobeko ya Mose, bazelaki boyei ya Klisto, mpo basosolaki ete mobeko ya Mose ezalaki elilingi ya boyei na ye, mpe bandimaki ete basengeli kobatela misala oyo wana ekokisamaki libanda kino na ntango oyo akobimisama epayi na bango.

16 Sikawa babanzaki ete lobiko ekoya na nzela ya mobeko ya Mose te; kasi mobeko ya Mose esalisaki mpo na kopesa bokasi na bondimi na bango na Klisto; mpe boye basimbaki elikya na nzela ya bondimi, mpo na lobiko ya seko, kotalelaka molimo ya masakoli, oyo alobelaki makambo oyo wana ekoya.

17 Mpe sikawa tala, Amona, mpe Alona, mpe Omina, mpe Imini, mpe bandeko na bango basepelaki mingi koleka mpenza, mpo na elonga oyo bazwaki na kati ya Balamani, komonaka ete Nkolo apesaki bango engebene na sambo na bango, mpe alakisaka lisusu bosolo ya liloba na ye epayi na bango na likambo moko moko.

Bimisa na lokasa