Makomi
Alama 50


Mokapo 50

Moloni alendisi mboka ya Banefi—Batongi bingumba mingi bya sika—Etumba mpe bobebisami bokomeli Banefi o mikolo mya nkuna mpe bonsomo bwa bango—Moliatoni mpe bakabwani ba ye balongami na Teakumi—Nefiya akufi mpe mwana mobali wa ye Pawolani akamati kiti ya bosambisi. Penepene na 72–67 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete Moloni atikaki te kosalaka bolengeleli mpo ya etumba, to kobatela bato ba ye na Balamani; mpo asalaki ete mampinga ma ye mabanda o ebandeli ya mobu mwa ntuku mibale mwa bokonzi bwa basambisi, ete mabanda na kotimolaka mabondo ma mabele zingazinga mpembeni na bingumba bya bango binso, o ntaka ya mboka mobimba izwamaki na Banefi.

2 Mpe likolo lya nsonge ya etutu eye ya mabele asalaki ete ezala mabaya, iyo, misala mya mabaya mitongama miteleme o bosanda bwa moto moko, zingazinga mpembeni na bingumba.

3 Mpe asalaki ete likolo lya misala mina mya mabaya ezala lolenge loko la pike itongama likolo lya mabaya zingazinga mpembeni; mpe izalaki ikasi mpe ilai.

4 Mpe asalaki manongi matelemisama ete maleka misala mina mya pike, mpe asalaki bisika bizangi likama bitongama likolo lya manongi mana, ete mabanga mpe makonga ma Balamani makoka kosala bango mpasi te.

5 Mpe malengelemeki ete bakoka kobwaka mabanga uta o nsonge ya mango, engebene na elengi mpe makasi ma bango, mpe koboma ye oyo akomeka kobeleme penepene na bifelo bya engumba.

6 Boye Moloni alengeleki bisika bikasi mpo ya boyei bwa bayini ba bango, zingazinga mpembeni na engumba enso o mboka mobimba.

7 Mpe esalemaki ete Moloni asalaki ete mampinga ma ye makende o kati ya esobe ya esti; iyo, mpe bakendeki mpe babenganaki Balamani baye bazalaki o esobe ya esti o kati ya mboka ya bangomei, iye izalaki o sudi ya mboka ya Zalayemila.

8 Mpe mboka ya Nefi ekendeki o nzela yoko alima uta mbu ya esti na westi.

9 Mpe esalemaki ete ebenganaka Moloni Balamani banso libanda lya esobe ya esti, eye ezalaki o nordi ya mboka ya bozwi bwa bangomei, asalaki bafandi baye bazalaki o mboka ya Zalayemila mpe o mboka ya zingazinga mpembeni bakende o kati ya esobe ya esti, kutu o ndelo ya libongo lya mbu, mpe bazwa mboka.

10 Mpe atiaki lisusu mampinga o sudi, o ndelo ya bozwi bwa bango, mpe asalaki bango batelemisa bifelo bikasi ete bibatela uta o likama mampinga ma bango mpe bato ba bango uta o maboko ma bayini ba bango.

11 Mpe boye akataki bisika bikasi binso bya Balamani o esti ya esobe, iyo, mpe lisusu o westi, koyeisaka makasi monkoloto o kati ya Banefi mpe Balamani, o kati ya mboka ya Zalayemila mpe mboka ya Nefi, uta o mbu ya westi, kolekaka o moto mwa ebale Sidoni—Banefi bazwaki mboka mobimba epai ya Nordi, iyo, kutu mboka enso ezalaki epai ya nordi ya mboka Beboo engebene na elengi ya bango.

12 Boye Moloni, elongo na mampinga ma ye, maye mayikanaki mokolo na mokolo na ntina ya bozangi bobangi bwa bobatelami boye misala mya ye momememi epai ya bango, alukaki kokata makasi mpe nguya ya Balamani mosika uta o bozwi bwa bango, ete bazala na nguya te likolo lya mboka ya bozwi bwa bango.

13 Mpe esalemaki ete Banefi babandaki bokelami bwa engumba yoko, mpe babiangaki nkombo ya engumba Moloni; mpe ezalaki penepene na mbu ya esti; mpe ezalaki o sudi penepene na monkoloto mwa bozwi bwa Balamani.

14 Mpe babandaki lisusu bokelami boko mpo ya engumba yoko o kati o engumba ya Moloni mpe engumba ya Aloni, kokangisaka ndelo ya Aloni mpe Moloni; mpe babiangaki nkombo ya engumba, to mboka, Nefiya.

15 Mpe babandaki lisusu o mobu mona kaka kotonga bingumba mingi o nordi, yoko o lolenge loko eye babiangaki Lehi, eye ezalaki o nordi penepene na ndelo ya libongo lya mbu.

16 Mpe boye esilaki mobu mwa tuku mibale.

17 Mpe o ezalela eye ya bomengo ezalaki bato ba Nefi o ebandeli ya mobu mwa tuku mibale na moko mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.

18 Mpe bazwaki mpenza, mpe bakomaki bazwi mpenza; iyo, mpe bayikanaki mpe bayikaki bokasi o mboka.

19 Mpe boye tomoni boniboni ya ngolu mpe eyengebene ezali bosali bwa Nkolo, na bokokisi maloba ma ye manso epai ya bana ba bato; iyo, tokoki komono ete maloba ma ye mamonisami solo, kutu o ntango eye, eye alobaki epai ya Lehi, kolobaka:

20 Bopambolami, yo mpe bana ba yo; mpe bakopambolama, mbala nzike lokola ekobatela bango mitindo mya ngai bakozwa bomengo o mboka. Kasi omikundola, mbala nzike lokola ekobatela bino te mitindo mya ngai bokokatama mosika uta o miso mya Nkolo.

21 Mpe tomoni ete bilako bimonisami solo na bato ba Nefi; mpo ezalaki boswani bwa bango mpe boweli bwa bango, iyo, bobomi bwa bango, mpe bopunzi bwa bango, bosambeli bikeko bwa bango, pite ya bango, mpe bonsomo bwa bango, miye mizalaki o ntei ya bango, miye mimemeki likolo lya bango bitumba bya bango mpe bobebisami bwa bango.

22 Mpe bango baye bazalaki potongono na kobatelaka mitindo mya Nkolo babikisamaki o ntango ena, ntango nkoto na nkoto ya bandeko ba nkuna ba bango bakangemaki o bowumbu, to na kowa na mopanga, to na kokulumwa o bozangi bondimi, mpe basanganaki elongo na Balamani.

23 Kasi tala ezalaki mokolo moko te ntango yoko ya bosepeli o ntei ya bato ba Nefi, uta o mikolo mya Nefi, koleka o mikolo mya Moloni, iyo, kutu o ntango eye, o mobu mwa tuku mibale na moko mwa bokonzi bwa basambisi.

24 Mpe esalemaki ete mobu mwa tuku mibale na mibale mwa bokonzi bwa basambisi lisusu mosukaki na kimia; iyo, mpe lisusu mobu mwa tuku mibale na misato.

25 Mpe esalemaki ete o ebandeli ya mobu mwa tuku mibale na minei mwa bokonzi bwa basambisi, kimia elingaki kozala lisusu o ntei ya bato ba Nefi soko ezalaki te boweli boko boye bokomaki o ntei ya bango botali mboka ya Lehi, mpe mboka ya Moliatoni, eye ekangana likolo lya ndelo ya mboka ya Lehi; ibale izalaki o ndelo ya libongo lya mbu.

26 Mpo tala, bato baye bazwaki mboka ya Moliatoni basengeki eteni yoko ya mboka ya Lehi; yango wana ebandaki kozala boweli bwa moto o kati ya bango, mpenza ete bato ba Moliatoni bakamataki mandoki mpo ya kobunda na bandeko ba bango, mpe balingaki mpenza na mopanga koboma bango.

27 Kasi tala, bato baye bazwaki mboka ya Lehi bakimaki o nganda ya Moloni, mpe babilaki epai ya ye mpo ya lisalisi; mpo tala, bazalaki te na mbeba.

28 Mpe esalemaki ete bato ba Moliatoni, baye bakambemaki na moto moko oyo ya ye nkombo ezalaki Moliatoni, emonoko bango ete bato ba Lehi bakimaka o nganda ya Moloni, babangaki mpenza mbele mampinga ma Moloni maya likolo lya bango mpe maboma bango.

29 Yango wana, Moliatoni atiaki o kati ya mitema mya bango ete bakima o mboka eye ezalaki epai ya nordi, eye ezipamaki na nzoto inene ya mai, mpe bakamata bozwi bwa mboka eye ezalaki epai ya nordi.

30 Mpe tala, balingaki komeme mwango moye o mosala, (eye elingaki kozala ntina yoko ya koyimayima) kasi tala, Moliatoni kozalaka moto moko wa nkanda nzike, yango wana asilikaki na moko wa basali ba ye ba basi, mpe akweyaki likolo lya ye mpe abeteki ye nzike.

31 Mpe esalemaki ete akimaki, mpe ayaki likolo lya nganda ya Moloni, mpe alobelaki Moloni makambo manso matalaki likambo lyango, mpe lisusu matalaki mokano mwa bango mwa kokima o kati ya mboka ya epai ya nordi.

32 Sikawa tala, bato baye bazalaki o mboka Beboo, to kutu Moloni, babangaki ete bayokemela epai ya maloba ma Moliatoni mpe basangana elongo na bato ba ye, mpe boye alingaki kokamata bozwi bwa biteni bina bya mboka, eye elingaki kotia bokelami boko mpo ya bikomi bya ndongo o ntei ya bato ba Nefi, iyo, bikomi bina bilingaki kokamba o bokwei bwa lipanda lya bango.

33 Yango wana Moloni atindaki limpinga lyoko, elongo na nganda ya bango, mpo ya kozala o moto mwa bato ba Moliatoni, mpo ya kopekisa bokimi bwa bango o kati ya mboka ya epai ya nordi.

34 Mpe esalemaki ete bazalaki te moto mwa bango kina bayaka o ndelo ya mboka Mpamba; mpe kuna bazalaki moto mwa bango, na nzela ya nkaka eye ekambi mpembeni ya mbu o kati ya mboka ya epai ya nordi, iyo, mpembeni ya mbu, o westi mpe o esti.

35 Mpe esalemaki ete limpinga liye litindamaki na Moloni, liye likambemaki na moto moko oyo ya ye nkombo ezalaki Teakumi, likutanaki na bato ba Moliatoni; mpe boye ezalaki nkanza ya bato ba Moliatoni, (efulamaki bango na nkuna mpe maloba ma koleteke ma ye) ete etumba yoko ebandaki o kati ya bango, o eye Teakumi abomaki Moliatoni mpe alongaki limpinga lya ye, mpe akamataki bango bato ba boloko, mpe bazongaki o nganda ya Moloni. Mpe boye esukaki mobu mwa ntuku mibale na minei mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.

36 Mpe boye bato ba Moliatoni bamememeki nsima. Mpe likolo lya boyokani bwa bango mpo ya kobatela kimia bazongisamaki o mboka ya Moliatoni, mpe lisanga lyoko lisalemaki o kati ya bango mpe bato ba Lehi; mpe bazongisamaki lokola o mboka ya bango.

37 Mpe esalemaki ete o mobu mona kaka moye bato ba Nefi na kimia bazala zongisamaki epai ya bango, Nefiya, mosambisi mokonzi wa babale, akufaki, nsima ya kozala na kiti ya bosambisi alima ebongo nie liboso lya Nzambe.

38 Nzokande, aboyaka Alama kokamata bozwi bwa makundoli mana mpe biloko bina biye bimononoki na Alama mpe batata ba ye bizalaki bya bule mingi koleka; yango wana Alama apesaki byango epai ya mwana mobali wa ye, Elamani.

39 Tala, esalemaki ete mwana mobali wa Nefiya aponomoki mpo ya kokamata kiti ya bosambisi, esika ya tata wa ye; iyo, aponomoki mosambisi mokonzi mpe moyangeli likolo lya bato, na ndai yoko mpe bokuli bwa bule mpo ya kosambisa na bosembo, mpe kobatela kimia mpe bonsomi bwa bato, mpe kopesa epai ya bango matomba ma bango ma bule mpo ya kokumbamela Nkolo Nzambe wa bango, iyo, mpo ya kosalisa mpe kobatela likambo lya Nzambe mikolo mya ye minso, mpe mpo ya komeme bato ba nkuna o boyengebene engebene na bobe bwa bango.

40 Sikawa tala, nkombo ya ye ezalaki Pawolani. Mpe Pawolani akamataki kiti ya tata wa ye, mpe abandaki bokonzi bwa ye o nsuka ya mobu mwa tuku mibale na minei, likolo lya bato ba Nefi.