Makomi
Alama 27


Mokapo 27

Nkolo atindi Amona akamba bato ba Ati-Nefi-Lehi o bozangi likama—Likolo lya bokutani na Alama, bosepeli bwa Amona bolembisaki ye—Banefi bapesi Baati-Nefi-Lehi mboka ya Yesoni—Babiangemi bato ba Amona. Penepene na 90–77 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa esalemaki ete ntango Balamani bana baye bakendeke kosala etumba na Banefi, bamonoki ete nsima ya bitumba mingi mpo ya kobebisa bango, ete ezalaki mpamba koluka bobebisami bwa bango, bazongaki lisusu o mboka ya Nefi.

2 Mpe esalemaki ete Baamaleki, na ntina ya bobungisi bwa bango, basilikaki mpenza. Mpe emonoki bango ete bakokaki te koluka bobekoli uta na Banefi, babandaki kolamusa bato na nkanda likolo lya bandeko ba bango, bato ba Ati-Nefi-Lehi; yango wana babandaki lisusu kobebisa bango.

3 Sikawa bato baye baboyaki lisusu kokamata mandoki ma bango, mpe bandimaki bangomei babomama engebene na mposa ya bayini ba bango.

4 Sikawa emonoki Amona mpe bandeko ba ye mosala moye mwa bobebisami o ntei ya bango baye balingaki na boboto boye, mpe o ntei ya bango baye balingaka bango na boboto boye—mpo basalelaki bango lokola soko bazalaki banzelu batindami na Nzambe mpo ya kobikisa bango na bobebisami bwa libela—yango wana, ntango Amona mpe bandeko ba ye bamonoki mosala monene moye mwa bobebisami, baningisamaki na mawa, mpe balobaki epai ya mokonzi:

5 Tosangisa elongo bato baye ba Nkolo, mpe tokita o mboka ya Zalayemila na bandeko ba biso Banefi, mpe tokima libanda lya maboko ma bayini ba biso, ete tobebisama te.

6 Kasi mokonzi alobaki epai ya bango: Tala, Banefi bakobebisa biso, na ntina ya bobomi mpe masumu mingi tosalaki na bango.

7 Mpe Amona alobaki: Nakokende mpe nakotuna na Nkolo, mpe soko alobi epai ya biso, kitani epai ya bandeko ba bino, ekolinga bino kokende?

8 Mpe mokonzi alobaki epai ya ye: Iyo, soko Nkolo alobi epai ya biso kendeni, tokokita epai ya bandeko ba biso, mpe tokozala bawumbu ba bango kina tokobongisa epai ya bango bobomi mingi tosalaki na bango.

9 Kasi Amona alobaki epai ya ye: Ezali te na mobeko mwa bandeko ba biso, moye motiamaki na tata wa ngai, ete ezala bawumbu o ntei ya bango; yango wana tokita mpe toyekeme na ngolu ya bandeko ba biso.

10 Kasi mokonzi alobaki epai ya ye: Tuna liboso na Nkolo, mpe soko alobi epai ya biso kendeni, tokokende; soko te tokowa o mboka.

11 Mpe esalemaki ete Amona akendeki mpe atunaki na Nkolo, mpe Nkolo alobaki epai ya ye:

12 Kamata bato baye libanda lya mboka eye, ete bawa te; mpo Satana azali na nguya monene likolo lya mitema mya Baamaleki, baye bazali kolamusa Balamani na nkanda na bandeko ba bango mpo ya koboma bango; yango wana kende libanda lya mboka eye; mpe bapambolami bato baye na nkola eye, mpo nakobatela bango.

13 Mpe sikawa esalemaki ete Amona akendeki mpe alobelaki mokonzi maloba manso maye Nkolo alobaka epai ya ye.

14 Mpe basangisaki elongo bato ba bango banso, iyo, bato banso ba Nkolo, mpe basangisaki elongo bibwele mpe bitonga bya bango mpe bakendeki libanda lya mboka, mpe bayaki o kati ya esobe eye ekaboli mboka ya Nefi na mboka ya Zalayemila, mpe bakomaki mpembeni ya ndelo ya mboka.

15 Mpe esalemaki ete Amona alobaki epai ya bango: Tala, ngai mpe bandeko ba ngai tokokende o kati ya mboka ya Zalayemila, mpe bokotikala awa kina tokozonga; mpe tokomeka mitema mya bandeko ba biso, soko balingi ete bokoka kokota o mboka ya bango.

16 Mpe esalemaki ete lokola Amona azalaki kokendeke o kati ya mboka, ete ye na bandeko ba ye bakutanaki na Alama, likolo lya esika eye elobelami; mpe tala, eye ezalaki bokutani bwa bosepeli.

17 Sikawa bosepeli bwa Amona bozalaki monene boye kutu ete atondisamaki; iyo, aminamaki mobimba na bosepeli bwa Nzambe wa ye, kina nzoto ya ye elembeki; kutu kina na bolembi bwa bokasi mpe akweyaki lisusu o mabele.

18 Sikawa ezalaki te eye bosepeli boluti? Tala, eye ezali bosepeli boye moko te azwi longola se soko ezali moyamboli wa solo mpe moluki mosawa wa esengo.

19 Sikawa bosepeli bwa Alama na bokutani na bandeko ba ye bozalaki solo bonene, mpe lisusu bosepeli bwa Aloni, bwa Omina, mpe Imini; kasi tala bosepeli bwa bango bozalaki te ete boleka bokasi bwa bango.

20 Mpe sikawa esalemaki ete Alama akambaki bandeko ba ye na bozongi o mboka ya Zalayemila; kutu o ndako ya yemei. Mpe bakendeki mpe balobelaki mosambisi mokonzi manso maye makomaki epai ya bango o mboka ya Nefi, o ntei ya bandeko ba bango, Balamani.

21 Mpe esalemaki ete mosambisi mokonzi atindaki esakola yoko o ntaka ya mboka mobimba, kozalaka na mposa ya mokano mwa bato etali bondimami bwa bandeko ba bango, baye bazalaki bato ba Ati-Nefi-Lehi.

22 Mpe esalemaki ete mokano mwa bato moyaki, kolobaka: Tala, tokotika mboka ya Yesoni, eye ezali na esti ya mbu, eye ekangi mboka Beboo, eye ezali o sudi ya mboka Beboo; mpe mboka eye Yesoni ezali mboka eye tokopesa epai ya bandeko ba biso lokola lisango lya bango.

23 Mpe tala, tokotia mampinga ma biso o kati ya mboka Yesoni mpe mboka Nefi, ete tobatela bandeko ba biso o mboka Yesoni; mpe eye tosali mpo ya bandeko ba biso, na ntina ya bobangi bwa bango na kotombola mandoki likolo lya bandeko ba bango mbele basala lisumu; mpe eye bobangi bonene bwa bango boyaki na ntina ya boyamboli bwa nsomo boye basalaka, engebene na bobomi mingi bwa bango mpe nkuna ya nsomo ya bango.

24 Mpe sikawa tala, eye tokosala epai ya bandeko ba biso, ete bakoka kosangola mboka Yesoni; mpe tokokengele bango na bayini ba bango na mampinga ma biso, soko bakopesa biso ndambo ya biloko bya bango mpo ya kosunga biso ete tokoka kosalisa mampinga ma biso.

25 Sikawa, esalemaki ete eyokaka Amona eye, azongaki na bato ba Ati-Nefi-Lehi, mpe lokola elongo na Alama, o kati ya esobe, wapi batelemisaki biema bya bango, mpe bayebisaki bango makambo manso. Mpe Alama asangelaki epai ya bango mbongwana ya ye, mpe Amona mpe Aloni, mpe bandeko ba ye.

26 Mpe esalemaki ete yango esalaki bosepeli bonene o ntei ya bango. Mpe bakitaki o mboka ya Yesoni, mpe bakamataki mboka ya Yesoni; mpe babiangemaki na Banefi bato ba Amona; yango wana bakesenisamaki na nkombo ena nsima libela.

27 Mpe bazalaki o ntei ya bato ba Nefi, mpe lisusu, batangemaki o ntei ya bato baye bazalaki ba eklezia ya Nzambe. Mpe bakesenisamaki lokola mpo ya mpila ya bango ona Nzambe, mpe ona bato lokola; mpo bazalaki mpenza sembo mpe alima o makambo manso; mpe bazalaki sikisiki o bondimi bwa Klisto, kutu kina o nsuka.

28 Mpe batalaki bosopi makila ma bandeko ba bango na nsomo enene; mpe bakokaki mokolo moko te kolongama mpo ya kotombola mandoki likolo lya bandeko ba bango; mpe batalaki mokolo moko te likolo lya liwa na ndambo moko te ya nsomo, mpo ya elikia mpe bomoni bwa bango bwa Klisto mpe bosekwi; yango wana, liwa liminamaki mpenza mpo ya bango na elonga ya Klisto likolo lya lyango.

29 Yango wana, bandimaki koyoka mpasi ya liwa na lolenge loleki la kpokoso mpe nsomo loye lokokaki kosalema na bandeko ba bango, yambo bandima kokamata mopanga to mopanga mogumbama mpo ya kobete bango.

30 Mpe boye bazalaki bato boko ba mpila mpe balingama, mpe bato boko basungama mingi ba Nkolo.