Makomi
Alma 12


Mokapo 12

Alma azali koloba na Zezilomi—Mibombamo ya Nzambe ekoki kopesama bobele na bandimi ya sembo—Bato bakosambisama na makanisi, boyambi, maloba, mpe misala na bango—Bato ya nkuna bakoyoka mpasi ya liwa ya molimo—Bomoi oyo ya kufa ezali ntango yoko ya momekano—Mwango ya bosikoli ekosala ete bosekwi esalema mpe, na nzela ya bondimi, bolimbisi ya masumu—Moto oyo ayamboli azali na bosenga na boboto na nzela ya Mwana Mobotami se Moko. Penepene na mobu 82 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa Alma, komonaka ete maloba ya Amuleki esilisaki makelele ya Zezilomi, mpo amonaki ete Amuleki akangaki ye na lokuta na ye mpe bokosi mpo na kobebisa ye, mpe komonaka ete abandaki kolenge na nse ya mayele ya motema ya elindo na ye, afungolaki monoko na ye mpe abandaki koloba epayi na ye, mpe kondimisa maloba ya Amuleki, mpe kolimbola makambo koleka, soki te kobombola makomi koleka oyo Amuleki asalaki.

2 Sikawa maloba oyo Alma alobaki epayi na Zezilomi mayokanaki na bato nzinganzinga mpembeni; mpo ebele ya bato yango bazalaki monene, mpe alobaki na lolenge oyo:

3 Sikawa Zezilomi, komonaka ete ozwami na lokuta na yo mpe na mayele mabe na yo, mpo okosi bobele epayi ya bato te kasi okosi epayi ya Nzambe; mpo tala, ayebi makanisi nyonso ya yo, mpe omoni ete makanisi na yo eyebisami epayi na biso na Molimo na ye;

4 Mpe omoni ete biso toyebi ete mwango na yo ezalaki mwango ya mayele mabe mpenza, lokola ya mayele mabe ya zabulu, mpo na kobuka lokuta mpe kokosa bato oyo ete otutisa bango na biso, mpo bafinga biso mpe babengana biso—

5 Sikawa oyo ezalaki mwango ya moyini na yo, mpe asalelaki nguya na ye na yo. Sikawa nalingi omikundola ete oyo nalobi epayi na yo nalobi yango epayi ya nyonso.

6 Mpe tala nalobi epayi na bino nyonso ete oyo ezalaki se motambo ya moyini, oyo atandaki mpo na kokanga bato oyo, ete akoka komema bino na nse ya makolo na ye, ete akoka kozinga bino mpembeni na miniololo na ye, ete akoka kokitisa bino na nse na miniololo na bobebisami ya libela, engebene na nguya ya bokangemi na ye.

7 Sikawa ntango Alma alobaki maloba oyo, Zezilomi abandaki kolenge mingi koleka mpenza, mpo andimisamaki mingi mpe mingi na nguya ya Nzambe; mpe andimisamaki lisusu ete Alma mpe Amuleki bazalaki na boyebi na ye, mpo andimaki ete bayebaki makanisi mpe mikano ya motema na ye; mpo nguya epesamaki epayi na bango ete bakoka koyeba makambo oyo engebene na molimo ya masakoli.

8 Mpe Zezilomi abandaki kotuna bango na molende, ete akoka koyeba mingi mpo na oyo etali bokonzi ya Nzambe. Mpe alobaki epayi na Alma: Nini elingi koloba oyo Amuleki alobaki mpo na oyo etali bosekwi ya bakufi, ete nyonso bakosekwa uta na bakufi, bayengebene mpe baoyo bazangi boyengebene mpe lokola, mpe bamemami mpo na koteleme liboso ya Nzambe mpo na kosambisama engebene na misala na bango?

9 Mpe sikawa Alma abandaki kolimbola makambo oyo epayi na ye, kolobaka: Epesami epayi ya mingi koyeba mibombamo ya Nzambe; nzokande batiami na nse ya motindo moko ya sikisiki ete bakoyebisa bobele engebene na ndambo ya liloba na ye oyo apesi epayi na bana ya bato, engebene na bokebi mpe molende oyo bakopesa epayi na ye.

10 Mpe boye, ye oyo akoyeisa motema na ye makasi, se ye moko wana akozwa ndambo eleki moke ya liloba; mpe ye oyo akoyeisa motema na ye makasi te, na ye epesami ndambo eleki monene ya liloba, kino ekopesama epayi na ye koyeba mibombamo ya Nzambe kino akoyeba myango na mobimba.

11 Mpe bango oyo bakoyeisa mitema na bango makasi, na bango ekopesama ndambo eleki moke ya liloba kino bakoyeba eloko moko te mpo na oyo etali mibombamo na ye; mpe nsima bakamatani bakangemi na zabulu, mpe bamemami engebene na bolingi na ye na nse na bobebisami. Sikawa oyo ezali nini miniololo ya lifelo elingi koloba.

12 Mpe Amuleki alobaki polele mpo na oyo etali liwa, mpe kosekwisama uta na bokufi boye mpo na kokoma na ezalela ya bozangi kufa, mpe komemama liboso ya esambiselo ya Nzambe, mpo na kosambisama engebene na misala na biso.

13 Nde soki mitema na biso eyeisamaki makasi, iyo, soki toyeisaki mitema na biso makasi na liloba, na lolenge ete ezwami te na biso, nde ezalali na biso ekozala nsomo, mpo soki bongo tokokitisama.

14 Mpo maloba na biso makokitisa biso, iyo, misala na biso nyonso ekokitisa biso; tokozwama te lokola bato bazanga mbindo; mpe makanisi na biso makokitisa biso; mpe na ezaleli oyo ya nsomo tokomeka te kotala likolo epayi ya Nzambe na biso; mpe tokosepela malamu soki tokoki kotinda mabanga mpe bangomba mpo na kokweya likolo na biso, mpo na kobomba biso uta na miso na ye.

15 Kasi oyo ekoki kozala te. Tosengeli kobima mpe koteleme liboso na ye na nkembo na ye, mpe nguya na ye, mpe makasi na ye, mpe lokumu na ye, mpe mpifo na ye, mpe kondima na nsoni na biso ya libela ete masambisi na ye ezali alima; ete azali alima na misala na ye nyonso, mpe ete atonda na boboto epayi na bana ya bato, mpe ete azali na nguya nyonso mpo na kobikisa moto nyonso oyo akondima na nkombo na ye mpe akobimisa mbuma oyo elongobani mpo na boyamboli.

16 Mpe sikawa tala, nalobi epayi na bino nde ekoya liwa, kutu liwa ya mibale, oyo ezali liwa ya molimo; nde ezali ntango yoko wapi moto nyonso oyo akokufa na masumu na ye, na kotalaka liwa ya ntango, akokufa lisusu liwa ya molimo; iyo, akokufa na kotalaka makambo etali bosembo.

17 Nde ezali ntango wapi minioko na bango ekozala lokola liziba ya moto mpe libanga ya fofolo, oyo kani mololi mokomata likolo libela na libela; mpe nde ezali ntango wapi bakokangama na nse ya miniololo mpo na bobebisami ya libela, engebene na nguya mpe bokangemi ya Satana, mpo ayangelaki bango engebene na bolingi na ye.

18 Nde, nalobi epayi na bino, bakozala lokola soki bosikoli esalemaki te; mpo bakoki kosikolama te engebene na boyengebene ya Nzambe; mpe bakoki kokufa lisusu te, komonaka ete ezali lisusu te na bopoli.

19 Sikawa esalemaki ete etiaki Alma nsuka ya kolobaka maloba oyo, bato nyonso babandaki kokamwa mingi;

20 Kasi ezalaki na Ationa moko, oyo azalaki moyangeli mokonzi moko na kati na bango, abimaki mpe alobaki epayi na ye: Nini ezali oyo olobi, ete moto akosekwa uta na bakufi mpe akobongwana uta na ezalela oyo ya kufa mpo na kokoma na ezalela ya bozangi kufa, ete molimo ekoka kokufa soki moke te?

21 Nini elingi koloba ekomi oyo, oyo elobi ete Nzambe atiaki bakelupa mpe mompanga ya moto na esti ya elanga ya Edene, mbele baboti na biso ya yambo bakota mpe kolia mbuma ya nzete ya bomoi, mpe kozala na bomoi libela? Mpe boye tomoni ete elonga ekokaki kozala te ete bazala na bomoi libela.

22 Sikawa Alma alobaki epayi na ye: Oyo ezali likambo oyo nazalaki penepene na kolimbola. Sikawa tomoni ete Adama akweyaki na koliaka mbuma epekisami, engebene na liloba ya Nzambe; mpe boye tomoni ete, na bokwei na ye, bato nyonso bakomaki bato babunga mpe bakweya.

23 Mpe sikawa tala, nalobi epayi na bino ete, soki ekokaka kosalema ete Adama alia mbuma ya nzete ya bomoi na ntango wana, liwa elingaki kozala te, mpe liloba elingaki kozala mpamba, kokomisaka Nzambe mobuki lokuta, mpo alobaki: Soki olei solo okokufa.

24 Mpe tomoni ete liwa eyei likolo ya bato nyonso, iyo, liwa oyo elobamaki na Amuleki, oyo ezali liwa ya ntango; nzokande ntaka moko ya ntango epesamaki epayi ya moto wapi akokaki koyambola; yango wana bomoi oyo ekomaki ezalela moko ya momekano; ntango moko ya komilengela mpo na kokutana na Nzambe; ntango moko mpo na komilengela mpo na ezalela oyo ezanga nsuka oyo tolobelaki, oyo ezali nsima ya bosekwi ya bakufi.

25 Sikawa, soki ezalaka mwango ya bosikoli te, oyo etiamaki uta na bokelami ya mokili, bosekwi ya bakufi elingaki kozala te. Kasi etiami mwango moko ya bosikoli, oyo ekomema esalema bosekwi ya bakufi, oyo molobelamaki.

26 Mpe sikawa tala, soki ekokaki kosalema ete baboti na biso ya yambo bakende kino na kolia mbuma ya nzete ya bomoi balingaki kozala bato ya mpasi libela, mpo balingaki kozala na ntango ya ezalela ya bolengeli te; mpe boye mwango ya bosikoli elingaki kobebisama, mpe liloba ya Nzambe elingaki kozala mpamba, kopesaka eloko moko te.

27 Kasi tala, ezalaki bongo te; kasi epesamaki epayi ya bato ete basengeli kokufa; mpe nsima ya liwa, basengeli koya na bosambisi, kutu bosambisi se moko oyo tolobelaki, oyo ezali ya nsuka.

28 Mpe esilaki Nzambe kosala ete makambo oyo esengeli koyela moto, tala, nde amonaki ete elongobanaki ete moto asengeli koyeba mpo na oyo etali makambo wapi apesaki epayi na bango;

29 Yango wana atindaki banjelu mpo na kosolola na bango, baoyo basalaki ete bato bamona ndambo ya nkembo na ye.

30 Mpe babandaki uta na ntango wana kobelela nkombo na ye; boye Nzambe asololaki na bato, mpe asalaki ete bayeba mwango ya bosikoli, oyo alengelaki uta na bokeli ya mokili; mpe oyo asalaki eyebisama epayi na bango engebene na bondimi mpe boyamboli na bango mpe misala esantu na bango.

31 Yango wana, apesaki mitindo epayi ya bato, mpo yambo babukaki mibeko ya yambo na kotalaka makambo oyo ezali ya ntango, mpe kokomaka lokola banzambe, mpe bayebaki bolamu mpe mabe, komitiaka na ezalela yoko ya kosala, soki te bamitiaki na ezalela ya kosala engebene na bolingi mpe litombeli na bango, ezala soki mpo na kosala bolamu to mpo na kosala mabe—

32 Boye Nzambe apesaki epayi na bango mitindo, nsima ya koyebisa bango mwango ya bosikoli, ete basala mabe te, etumbu na yango kozalaka liwa ya mibale, oyo ezalaki liwa ya libela mpo na makambo etali bosembo; mpo likolo ya baye ya lolenge oyo, mwango ya bosikoli mokokaki te kozala na nguya, mpo misala ya boyengebene ekokaki kobebisama te, engebene na nta bolamu ya Nzambe.

33 Kasi Nzambe abiangaki bato, na nkombo ya Mwana na ye, (oyo kozalaka mwango ya bosikoli oyo etiamaki) kolobaka: Soki boyamboli, mpe boyeisi mitema na bino makasi te, nde nakolakisa boboto epayi na bino, na nzela ya Mwana Mobotami se Moko na ngai;

34 Boye, moto nyonso oyo ayamboli, mpe ayeisi motema na ye makasi te, akozala na likoki na boboto na nzela ya Mwana Mobotami se Moko na ngai, mpo na kozwa bolimbisi ya masumu na ye; mpe baoyo bakokota kati na bopemi na ngai.

35 Mpe moto nyonso oyo akoyeisa motema na ye makasi mpe akosala mabe, tala, nalapi ndai na nkele na ngai ete akokota te kati na bopemi na ngai.

36 Mpe sikawa, bandeko na ngai, tala, nalobi epayi na bino ete soki bokoyeisa mitema na bino makasi, bokokota te na bopemi ya Nkolo; boye mabe na bino matumolaka ye ete atinda nkele na ye na nse likolo na bino lokola na ntango ya botumoli ya yambo; iyo, engebene na liloba na ye na botumoli ya nsuka mpe lokola ya yambo, mpo na kosukisa na bobebisami libela ya milimo na bino; boye, engebene na liloba na ye, kino na liwa ya nsuka, lokola mpe ya yambo.

37 Mpe sikawa, bandeko na ngai, komonaka ete toyebi makambo oyo, mpe ete ezali solo, tika toyambola, mpe toyeisa mitema na biso makasi te, ete totumola te Nkolo Nzambe na biso mpo na komema nkele na ye na nse likolo na biso na mitindo na ye ya mibale oyo apesi epayi na biso; kasi tika tokota kati na bopemi ya Nzambe, boye alengelaki engebene na liloba na ye.

Bimisa na lokasa