Makomi
2 Nefi 6


Mokapo 6

Yakobo asangeli lisusu mambi ma Bayuda: Bokangemi bwa Babiloni mpe bozongi; misala mpe bobakami o ekulusu bwa Mosantu Moko wa Yisalaele; lisalisi lizwami uta o Bapaganu; mpe bozongisami bwa mokolo-mwa-nsuka bwa Bayuda ntango bakondima na Masiya. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Maloba ma Yakobo, ndeko mobali wa Nefi, maye alobaki na bato ba Nefi:

2 Tala, bandeko babali balingami ba ngai, ngai Yakobo, ebiangemaki ngai na Nzambe, mpe ekulisamaki ngai nsima ya molongo mosantu mwa ye, mpe ebulisamaki ngai na ndeko mobali wa ngai Nefi, oyo bokotala lokola mokonzi moko to mobateli moko, mpe likolo lya nani boyekemi mpo ya bozangi likama, tala boyebi ete nalobaki epai ya bino makambo mingi mpenza.

3 Nzokande, nakoloba epai ya bino lisusu; mpo nazali na mposa ya bolamu bwa bozo bwa bino. Iyo, motema mwa ngai mozali likolo mpo ya bino; mpe binomei boyebi ete ekozalaka ntango inso. Mpo nalendisaki bino na etingia enso; mpe nalakisaki bino maloba ma tata wa ngai; mpe nalobaki epai ya bino etali makambo manso maye makomami, uta o bokeli bwa mokili.

4 Mpe sikawa, tala, nalingi koloba epai ya bino etali makambo maye mazali, mpe maye makoya; yango wana, nakotangela bino maloba ma Yisaya. Mpe mazali maloba maye ndeko mobali wa ngai alingaki ete naloba epai ya bino. Mpe nalobi epai ya bino mpo ya litomba lya bino, ete bokoka koyekola mpe kokembela nkombo ya Nzambe wa bino.

5 Mpe sikawa, maloba maye nakotanga mazali maye Yisaya alobaki etali ndako mobimba ya Yisalaele; yango wana makoki kokokisama epai ya bino, mpo bozali baye ndako ya Yisalaele. Mpe ezali makambo mingi malobama naYisaya maye makoki kokokisama epai ya bino, zambi bozali baye ndako ya Yisalaele.

6 Mpe sikawa, maye mazali maloba: Boye elobi Nkolo Nzambe: Tala, nakotombola loboko la ngai na Bapaganu, mpe nakotelemisa bendele ya ngai na bato; mpe bakokumba bana babali ba yo o maboko ma bango, mpe bana basi ba yo bakomememe likolo lya mapeka ma bango.

7 Mpe bakonzi bakozala batata babokoli ba yo, mpe basi ba bakonzi ba bango bamama babokoli ba yo; bakogumbamela yo na bilongi bya bango ona mabele, mpe bakolemola mputulu ya makolo ma yo; mpe okoyeba ete nazali Nkolo, mpo bakoyokisama nsoni te baye bakozela ngai.

8 Mpe sikawa ngai, Yakobo, nalingi kolobela mwa moke etali maloba maye. Mpo tala, Nkolo alakisaki ngai ete bango baye bazalaki o Yelusaleme, uta wapi toyaki, babomami, mpe bamememi mosika bakangemi.

9 Nzokande, Nkolo alakisaki epai ya ngai ete bakozonga lisusu. Mpe lisusu alakisaki epai ya ngai ete Nkolo Nzambe, Mosantu Moko wa Yisalaele, akomimonisa epai ya bango o mosuni; mpe ekosila ye komimonisa epai ya bango bakokanga mpe bakofiakola ye mpe bakobaka ye o ekulusu, engebene na maloba ma anzelu maye alobaki epai ya ngai.

10 Mpe ekosila bango koyeisa mitema mya bango mikasi mpe kotimbisa nkingo ya bango na Mosantu Moko wa Yisalaele, tala, masambisi ma Mosantu Moko wa Yisalaele makoya likolo lya bango. Mpe mokolo mokoya moye bakobeteme mpe bakotungisama.

11 Yango wana, ekosila bango kokumbana epai na epai, mpo boye elobi anzelu, mingi bakotungisama o mosuni, mpe bakoyokisama te mpasi ya kowa te, na ntina ya nsambo ya mondimi; bakopalanganisama, mpe bakobeteme, mpe bakoyinama; nzokande, Nkolo akoyoka ngolu epai ya bango, ete ekokoma bango o boyebi bwa Mosikoli wa bango, bakosangisama elongo lisusu o mboka ya lisango lya bango.

12 Mpe bapambolami Bapaganu, ya bango profeta akomaki; mpo tala, soko ekozala ete bakoyambola mpe bakobunda te na Siona, mpe bakomisangisa te o eklezia enene mpe ya nsomo te, bakobikisama; mpo Nkolo Nzambe akokokisa mayokani maye asalaki epai ya bana ba ye; mpe mpo ya ntina eye profeta akomaki makambo maye.

13 Yango wana, baye bakobunda na Siona mpe bato ba boyokani bwa Nkolo, bakolembola mputulu ya makolo ma bango; mpe bato ba Nkolo bakoyoka nsoni te. Mpo bato ba Nkolo bazali baye bakozela ye; mpo bazali naino kozela boyei bwa Masiya.

14 Mpe tala, engebene na maloba ma profeta, Masiya akomitia lisusu mbala ya mibale mpo ya kobutwisa bango lisusu; yango wana, akomimonisa epai ya bango o nguya mpe nkembo enene, mpo ya bobebisami bwa bayini ba bango, ekoya mokolo mona ntango bakondima na ye; mpe moko te akobebisa baye bakondima na ye.

15 Mpe baye bakondima na ye te bakobebisama, na moto, mpe na ekumbaki, mpe na boningani bwa mabele, mpe na bosopi makila, mpe na bokono, mpe na nzala. Mpe bakoyeba ete Nkolo azali Nzambe, Mosantu Moko wa Yisalaele.

16 Mpo niama bakangi ekobotolomo uta o mokasi, to mokangemi wa mobeko akobikisama?

17 Kasi boye elobi Nkolo: Kutu bakangemi ba mokasi bakobotolomo, mpe niama bakangi na moto wa nsomo akobikisama; mpo Nzambe Mokasi akobikisa bato ba ye ba boyokani. Mpo boye elobi Nkolo: Nakowela na baye bakowela na yo—

18 Mpe nakoleisa bango baye bakokakema yo, na mosuni mwa bangomei; mpe bakolangwisama na makila ma bangomei lokola na vino ya sukali; mpe mosuni monso mokoyeba ete ngai Nkolo nazali Mobikisi mpe Mosikoli wa yo, Mokasi Moko wa Yakobo.