Makomi
2 Nefi 21


Mokapo 21

Mobimbi mwa Yisai (Klisto) mokosambisa o bosembo—Boyebi Nzambe bokozipa mokili o nkoto yoko ya mibu—Nkolo akotombola bendele mpe akosangisa Yisalaele—Mekisani Yisaya 11. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Mpe ekobima lingenda lyoko uta o mobimbi mwa Yisai, mpe ekokola etape yoko uta o misisa mya ye.

2 Mpe Molimo mwa Nkolo akofanda likolo lya ye, molimo mwa bwania mpe wa bososoli, molimo mwa toli mpe wa bokasi, molimo mwa boyebi mpe wa bobangi bwa Nkolo;

3 Mpe akoyeisa ye na bososoli bwa noki o bobangi bwa Nkolo; mpe akosambisa te nsima ya bomoni bwa miso mya ye, to akopalela te nsima ya boyoki bwa matoyi ma ye.

4 Kasi na bosembo akosambisa bakeleli, mpe akopalela na alima mpo ya baye basokemi ba mabele; mpe akobete mabele na lingenda lya monoko mwa ye, mpe na mpema ya mbebo ya ye akoboma moto wa nkuna.

5 Mpe bosembo bokozala mokaba mwa nketo ya ye, mpe bopotongono mokaba mwa mokongo mwa ye.

6 Mbwa ya zamba akofanda elongo na mwana wa mpate, mpe nkoi akolala elongo na mwana wa ntaba, mpe mwana wa ngombe mpe elenge ya nkosi mpe niama ya mafuta elongo; mpe mwana moke akokamba bango.

7 Mpe Ngombe mpe ngombolo ikolia; bilenge bya bango bikolala elongo; mpe nkosi akolia matiti bo ngombe.

8 Mpe mwana na libele akosakana likolo lya libulu lya etupa, mpe mwana atika libele akotia loboko la ye likolo lya lidusu lya libate.

9 Bakosala mpasi te to bakobebisa te o ngomba mobimba esantu ya ngai, mpo mabele makotonda na boyebi Nkolo, lokola mai mazipi mbu.

10 Mpe o mokolo mona ekozala mobimbi mwa Yisai, oyo ekoteleme lokola bendele ya bato; yango Bapaganu bakoluka; mpe bopemi bwa ye bokozala bwa nkembo.

11 Mpe ekosalema o mokolo mona ete Nkolo akotia loboko la ye lisusu mbala ya ibale mpo ya kobutwisa montika mwa bato ba ye baye bakotikala, uta o Asulia, mpe uta o Ejipito, mpe uta o Pataloso, mpe uta o Etiopi, mpe uta o Elama, mpe uta o Sinala, mpe uta o Hamata, mpe uta o bisanga bya mbu.

12 Mpe akotia likolo bendele mpo ya bikolo, mpe akoyanganisa babenganama ba Yisalaele, mpe akosangisa baye bapanzani ba Yuda uta o bitumu binei bya mabele.

13 Boluli bwa Efelaima lisusu bokolongwa, mpe bayini ba Yuda bakokatama mosika; Efelaima akolula Yuda te, mpe Yuda akotungisa Efelaima te.

14 Kasi bakopimbwa likolo lya mapeka ma Bafilisitia ona westi; bakopunza bango ba esti elongo; bakotia loboko la bango likolo lya Edome mpe lya Moaba; mpe bana ba Amona bakotosa bango.

15 Mpe Nkolo akobebisa lolemo la Mbu ya Ejipito mobimba; mpe o mopepe mokasi akoningisa loboko la ye likolo lya ebale, akobete yango ekabwana o mikele nsambo, mpe akosala bato baleka likolo sapato ikauka.

16 Mpe ekozala balabala enene mpo ya montika mwa bato ba ye baye bakotikala, uta o Asulia, lokola ezalaki o Yisalaele o mokolo moye babutaki uta o mboka ya Ejipito.