Makomi
1 Nefi 13


Mokapo 13

Nefi amoni o limoni eklezia ya zabulu esalemi o ntei ya Bapaganu, bobomboli mpe kolonizasio bwa Amerika, bobungisi bwa biteni mingi polele mpe bya motuya bya Biblia, ezalela elandi bopengwi bwa Bapaganu, bozongisi bwa nsango elamu, boyei bwa nkoma ya mikolo mya nsuka, botongi bwa Siona. Penepene na 600–592 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete anzelu alobaki epai ya ngai kolobaka: Tala! Mpe natalaki mpe namonoki bikolo mpe bokonzi boike.

2 Mpe anzelu alobaki epai ya ngai: Omoni nini? Mpe nalobaki: Namoni bikolo mpe bokonzi boike.

3 Mpe alobaki epai ya ngai: Oyo ezali bikolo mpe bokonzi boike bwa Bapaganu.

4 Mpe esalemaki ete namonoki o ntei ya bikolo bya Bapaganu, bokeli bwa eklezia enene.

5 Mpe anzelu alobaki epai ya ngai: Tala bokeli bwa eklezia eye ezali ya nsomo mingi koleka likolo biklezia binso bisusu, eye ebomi basantu ba Nzambe, iyo, mpe eniokoli bango mpe ekakemi bango, mpe ekangi bango na nkanga ya ebende, mpe ememi bango onse o kati bokangemi.

6 Mpe esalemaki ete namonoki eklezia enene mpe ya nsomo; mpe namonoki zabulu ete azalaki mokeli wa yango.

7 Mpe lisusu namonoki wolo, mpauni, mpe swa, mpe nsalaba mpe lino lya mapasa-malonga, mpe ndenge inso ya bilamba bya motuya; mpe namonoki basi ba pite.

8 Mpe anzelu alobaki epai ya ngai, kolobaka: Tala wolo, mpe mpauni, mpe swa, mpe nsalaba, mpe lino lya mapasa-malonga, mpe bilamba bya motuya, mpe basi ba pite, bazali mposa ya eklezia enene mpe ya nsomo.

9 Mpe lisusu mpo ya bosanzoli bwa mokili babebisi basantu ba Nzambe, mpe bamemi bango o nse o kati ya bokangemi.

10 Mpe esalemaki ete natalaki mpe namonoki mai mingi; mpe makabolaki Bapaganu na nkona ya bandeko babali ba ngai.

11 Mpe esalemaki ete anzelu alobaki epai ya ngai: Tala nkele ya Nzambe ezali likolo lya nkona ya bandeko babali ba yo.

12 Mpe natalaki mpe namonoki moto moko o ntei ya Bapaganu, oyo akabwanaki na nkona ya bandeko babali ba ngai na mai mingi; mpe namonoki Molimo mwa Nzambe, ete akitaki mpe asalaki likolo lya moto ona; mpe akendeki likolo lya mai mingi, kutu epai ya nkona ya bandeko babali ba ngai, baye bazalaki o mboka elakelama.

13 Mpe esalemaki ete namonoki Molimo mwa Nzambe, ete asalaki likolo lya Bapaganu basusu; mpe bakendeki libanda lya bokangemi, likolo lya mai mingi.

14 Mpe esalemaki ete namonoki ebele mingi ya Bapaganu likolo lya mboka ya elako; mpe namonoki nkele ya Nzambe, ete ezalaki likolo lya nkona ya bandeko babali ba ngai; mpe ipalanganisamaki liboso lya Bapaganu mpe ibetemeki.

15 Mpe namonoki Molimo mwa Nkolo, ete azalaki likolo lya Bapaganu, mpe bazwaki bomengo mpe bazwaki mboka mpo ya lisango lya bango; mpe namonoki ete bazalaki mpembe, mpe banzenga mpenza mpe kitoko, bo bato ba ngai yambo babomama.

16 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, namonoki ete Bapaganu baye bakendeki libanda lya bokangemi bamikitisaki liboso lya Nkolo, mpe nguya ya Nkolo ezalaki elongo na bango.

17 Mpe namonoki ete mama wa bango Bapaganu basanganaki elongo likolo lya mai, mpe likolo lya mboka lokola, mpo ya kobunda na bango.

18 Mpe namonoki ete nguya ya Nzambe ezalaki elongo na bango, mpe lisusu ete nkele ya Nzambe ezalaki likolo lya bango banso basanganaki elongo mpo ya kobunda na bango.

19 Mpe ngai, Nefi, namonoki ete Bapaganu baye bakendeki libanda lya bokangemi babikisamaki na nguya ya Nzambe libanda lya maboko ma bikolo bisusu.

20 Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, namonoki ete bazwaki bomengo o mboka; mpe namonoki buku, mpe emememeki o ntei ya bango.

21 Mpe anzelu alobaki epai ya ngai: Oyebi ntina ya butu eye?

22 Mpe nalobaki epai ya ye: Nayebi te.

23 Mpe alobaki: Tala ebimi libanda lya monoko mwa Moyuda moko. Mpe ngai, Nefi, namonoki yango; mpe alobaki epai ya ngai: Buku eye omoni ezali likundoli lya Bayuda, liye lizali na mayokani ma Nkolo, maye asalaki epai ya ndako ya Yisalaele; mpe lisusu ezali na mingi ya mabikuli ma baprofeta basantu; mpe ezali likundoli lokola minkoma miye mizali likolo lya palaki ya motako, longola se mizali mingi boye te; nzokande, mikwi mayokani ma Nkolo, maye asalaki epai ya ndako ya Yisalaele; yango wana, milongobani mpenza epai ya Bapaganu.

24 Mpe anzelu wa Nkolo alobaki epai ya ngai: Omonoki ete buku eye ebimaki uta o monoko mwa Moyuda moko; mpe ntango ebimaki uta o monoko mwa Moyuda moko ezalaki na litondi lya nsango elamu, lya yango bapostolo zomi na babale bapesi litaloli; mpe bapesi litatoli engebene na bosolo boye bozali na Mwana wa Mpate wa Nzambe.

25 Yango wana, makambo maye makendeki uta o Bayuda na bopeto epai ya Bapaganu, engebene na bosolo boye bozali na Nzambe.

26 Mpe esili mango kokende na loboko la bapostolo zomi na babale ba Mwana wa Mpate, uta na Bayuda epai ya Bapaganu, omoni bokeli bwa eklezia ena enene mpe ya nsomo, eye ezali ya nsomo mingi koleka likolo lya biklezia binso bisusu; mpo tala, elongoli uta o nsango elamu ya Mwana wa Mpate biteni mingi biye bizalaki polele mpe bya motuya mingi koleka; mpe lisusu mayokani mingi ma Nkolo balongolaki.

27 Mpe enso eye basalaki ete bakoka kobebisa nzela sembo ya Nkolo, ete bakoka kokanga miso mpe koyeisa mitema mya bana ba bato mikasi.

28 Yango wana, omoni ete esilaki buku kokende o nzela ya maboko ma eklezia enene mpe ya nsomo, ete makambo mingi polele mpe ma motuya malongolamaki uta o buku, eye ezali buku ya Mwana wa Mpate wa Nzambe.

29 Mpe esilaki makambo maye polele mpe ma motuya kolongolama, ekendeki epai ya bikolo binso bya Bapaganu; mpe esilaki kokende epai ya bikolo binso bya Bapaganu, iyo, kutu o bokatisi mai mingi maye omonoki na Bapaganu baye bakendeki libanda lya bokangemi, omoni—na ntina ya makambo mingi polele mpe ma motuya maye malongolama libanda lya buku, maye mazalaki polele mpo ya bososoli bwa bana ba bato, engebene na polele eye ezali na Mwana wa Mpate wa Nzambe—na ntina ya makambo maye malongolami libanda lya nsango elamu ya Mwana wa Mpate, boike boko bonene mpenza bokwei, iyo, mingi ete Satana azali na nguya enene likolo lya bango.

30 Nzokande, omoni ete Bapaganu oyo bakendeki libanda lya bokangemi, mpe batombolamaki na nguya ya Nzambe likolo lya bikolo bisusu, likolo lya etando ya mboka eye eponomo likolo lya mboka inso isusu, eye ezali mboka eye Nkolo Nzambe ayokanaki elongo na tata wa yo ete nkona ya ye ekozwa lokola mboka ya lisango lya bango; yango wana, omoni ete Nkolo Nzambe akotika te ete Bapaganu babebisa mobimba bopotoni bwa nkona ya yo, iye izali o ntei ya bandeko babali ba yo.

31 Mpe akotika te ete Bapaganu babebisa nkona ya bandeko babali ba yo.

32 Mpe Nkolo Nzambe akotika te ete Bapaganu bawumela o bozali bwa nsomo bwa lolanda, boye omoni bazali na yango, na ntina ya biteni polele mpe bya motuya mingi koleka bya nsango elamu biye bitiamaki mpembeni o eklezia eye ya nsomo, ya yango bokeli omonoki.

33 Yango wana, elobi Mwana wa Mpate wa Nzambe: Nakoyoka ngolu epai ya Bapaganu, kobimelaka montika mwa ndako ya Yisalaele na bosambisi bonene.

34 Mpe esalemaki ete anzelu wa Nkolo alobaki epai ya ngai, kolobaka: Tala, elobi Mwana wa Mpate wa Nzambe, ekosilisa ngai kobimela montika mwa ndako ya Yisalaele—mpe montika moye nalobeli mozali nkona ya tata wa yo—yango wana, ekosilisa ngai kobimela bango na bosambisi, mpe kobete bango na loboko la Bapaganu, mpe ekosila Bapaganu kokweya mpenza, na ntina ya biteni polele mingi mpe bya motuya bya nsango elamu biye bitiamaki mpembeni o eklezia ya nsomo, eye ezali mama wa basi ba pite, elobi Mwana wa Mpate—nakoyoka ngolu epai ya Bapaganu o mokolo mona, mingi ete nakomeme epai ya bango, na nguya ya ngaimei, boike bwa nsango elamu, eye ekozala polele mpe ya motuya, elobi Mwana wa Mpate.

35 Mpo, tala, elobi Mwana wa Mpate: Nakomilakisa epai ya nkona ya yo, ete bakokoma makambo mingi maye nakosala epai ya bango, maye makozala polele mpe ma motuya; mpe ekosila nkona ya yo kobebisama, mpe kokulumwa o bozangi bondimi, mpe nkona ya bandeko babali ba yo lokola, tala, makambo maye makobombama, mpo ya kokende epai ya Bapaganu, na likabo mpe nguya ya Mwana wa Mpate.

36 Mpe o mango ekokomama nsango elamu ya ngai, elobi Mwana wa Mpate, mpe libanga lya ngai mpe lobiko la ngai.

37 Mpe bakopambolama bango baye bakoluka komeme o boso Siona ya ngai o ntango ena, mpo bakozwa likabo mpe nguya ya Molimo Mosantu; mpe soko bakotia molende kina o nsuka, bakotombolama likolo o mokolo mwa nsuka, mpe bakobikisama o bokonzi bwa seko bwa Mwana wa Mpate; mpe banso baye akobimisa kimia, iyo, nsango ya bosepeli bonene, boniboni kitoko likolo lya ngomba bakozala.

38 Mpe esalemaki ete namonoki montika mwa nkona ya bandeko babali ba ngai, mpe lisusu buku ya Mwana wa Mpate wa Nzambe, eye ebimaka uta o monoko mwa Moyuda, ete ekomaki uta o Bapaganu epai ya montika mwa nkona ya bandeko babali ba ngai.

39 Mpe esilaka yango kokoma epai ya bango, namonoki buku isusu, iye iyaki na nguya ya Mwana wa Mpate, uta o Bapaganu epai ya bango, mpo ya kondimisa Bapaganu mpe montika mwa nkona ya bandeko babali ba ngai, mpe Bayuda lokola baye bapalanganisamaki likolo lya etando enso ya mabele ete makundoli ma baprofeta mpe ma bapostolo zomi na babale ba Mwana wa Mpate mazali ma solo.

40 Mpe anzelu alobaki epai ya ngai, kolobaka: Makundoli maye ma nsuka, maye omonoki o ntei ya Bapaganu, makotia bosolo bwa maye ma yambo, maye mazali maye ma bapostolo zomi na babale ba Mwana wa Mpate, mpe makoyebisa makambo polele mpe ma motuya maye malongolamaki uta o mango, mpe makoyebisa o mabota, minoko, mpe bato banso, ete Mwana wa Mpate wa Nzambe azali Mwana wa Tata wa Seko, mpe Mobikisi wa mokili; mpe ete bato banso basengeli koya epai ya ye, soko te bakoki kobikisama.

41 Mpe esengeli baya engebene na maloba maye makotiama na monoko mwa Mwana wa Mpate; mpe maloba ma Mwana wa Mpate makoyebisama o makundoli ma nkona ya yo, lokola lisusu o makundoli ma bapostolo zomi na babale ba Mwana wa Mpate; yango wana, mango mabale makotiama o lyoko; mpo ezali Nzambe moko mpe Mobateli moko likolo lya mabele manso.

42 Mpe ntango ekoya ete akomilakisa epai ya bikolo binso, epai ya Bayuda mpe lisusu epai ya Bapaganu lokola; mpe ekosila ye komilakisa epai ya Bayuda mpe lisusu epai ya Bapaganu, nde akomilakisa epai ya Bapaganu mpe epai ya Bayuda, mpe baye ba nsuka bakozala ba yambo, mpe baye ba yambo bakozala ba nsuka.