Makomi
1 Nefi 6


Mokapo 6

Nefi akomi makambo ma Nzambe—Mwango mwa Nefi mozali ete andimisa bato mpo ya koya epai ya Nzambe wa Abalayama mpe kobikisama. Penepene na 600–592 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa ngai, Nefi, napesi bonkoko bwa batata ba ngai te o eteni eye ya likundoli lya ngai; mpe o ntango yoko te nakopesa mwango nsima, likolo lya palaki iye nazali kokoma; mpo mopesamaki o likundoli liye tata wa ngai abatelaki; yango wana , nakomi mwango te o mosala moye.

2 Mpo ekoki na ngai koloba ete tozali biboto bya Yosefe.

3 Mpe ezali lotomo la ngai te ete nasengeli kopesa nsango mobimba ya makambo manso ma tata wa ngai, mpo ekoki kokomama te likolo lya palaki iye, mpo nasengeli na esika ete nakoka kokoma makambo ma Nzambe.

4 Mpo litondi lya mokano mwa ngai ezali ete nakoka kondimisa bato mpo ya koya epai ya Nzambe wa Abalayama, mpe Nzambe wa Yisaka, mpe Nzambe wa Yakobo, mpe kobikisama.

5 Yango wana, makambo maye mazali elengi epai ya mokili, nakomi te; kasi makambo mazali elengi epai ya Nzambe mpe bango baye bazali ba mokili te.

6 Yango wana, nakopesa motindo epai ya nkona ya ngai, ete batondisa palaki iye te na makambo maye malongobani te epai ya bana ba bato.